II SAMUEL
Chapter 16
II S | LinVB | 16:1 | Esilaki Davidi koleka nsonge ya ngomba, Siba, mosaleli wa Mefiboset, ayei kokutana na ye ; azalaki na mpunda ibale, ikumbi mampa nkama ibale, bituka bya mbuma ya vino ya kokauka, bituka bya mbuma ya vino ya mobesu na ngoto ya vino. | |
II S | LinVB | 16:2 | Mokonzi atuni Siba : « Okosala nini na biloko bina ? » Siba azongisi : « Mpunda ikokumba bato ba libota lya mokonzi ; mampa na mbuma ikozala bilei bya bilenge mpe vino ekolendisa baye balembi mpo ya mobembo o eliki. » | |
II S | LinVB | 16:3 | Mokonzi atuni lisusu : « Wapi mwana wa mokonzi wa yo ? » Siba ayanoli mokonzi : « Ye atikali o Yeruzalem, zambi amilobeli : Lelo bato ba Israel bakozongisela ngai bokonzi bwa tata wa ngai. » | |
II S | LinVB | 16:4 | Mokonzi alobi na Siba : « Banda lelo, biloko binso bya Mefiboset bizali bya yo. » Siba alobi : « E mokonzi, nafukami o boso bwa yo. Nazwa ntango inso bolamu o miso ma yo. » | |
II S | LinVB | 16:5 | Ekomi Davidi o mboka Bakurim, akutani na moto moko wa libota lya Saul, nkombo ya ye Simei, mwana wa Gera ; abandi kobetele Davidi mobondo. | |
II S | LinVB | 16:6 | Ata limpinga mobimba mpe basoda ba mpiko bazalaki kobatela Davidi epai na epai, Simei abwakeli mokonzi na bato ba ye mabanga. | |
II S | LinVB | 16:7 | Simei abeteli Davidi mobondo boye : « Longwa, mobomi wa bato ! Longwa, yo efaka ya moto ! | |
II S | LinVB | 16:8 | Yawe asali ’te makila ma libota lya Saul makwela yo : obotoloki ye bokonzi, sikawa Yawe apesi bwango o maboko ma mwana wa yo Absalom. Omoni, sikawa okomi koyoka mpasi, zambi ozali mobomi. » | |
II S | LinVB | 16:9 | Abisai, mwana wa Seruya, alobi na mokonzi : « Mpo nini mbwa oyo abeteli yo mokonzi monene mobondo ? Lingisa ngai nakende kokata ye nkingo ! » | |
II S | LinVB | 16:10 | Kasi Davidi azongisi : « Biso na yo, mwana wa Seruya, tozali na likambo te. Soko abeteli moto mbondo, mpe soko Yawe ayebisaki ye bongo, nani akoki kotuna ye ntina nini asali bongo ? » | |
II S | LinVB | 16:11 | Davidi alobi na Abisai me na bato ba ye : « Tala, mwana ngai nabotaki alingi koboma ngai, bongo tika moto oyo wa libota lya Benyamin abetele ngai mobondo, soki Yawe alingi bongo ! | |
II S | LinVB | 16:12 | Mbele Yawe akotala mawa ma ngai mpe akozongisela ngai bolamu o esika ya mobondo abeteli ngai lelo. » | |
II S | LinVB | 16:13 | Davidi na bato ba ye bakobi nzela ya bango. Simei atamboli o mopanzi mwa ngomba ; azalaki se kobetele Davidi mobondo mpe kobwakela ye mabanga na mabelé. | |
II S | LinVB | 16:14 | Mokonzi na bato ba ye banso basukisi mobembo mwa bango, balembi mingi. Kuna bazwi ntango ya kopema. | |
II S | LinVB | 16:16 | Kusai, moto wa Arka, moninga wa Davidi, akomi epai ya Absalom mpe alobi na ye : « Mokonzi kuma ! » | |
II S | LinVB | 16:17 | Absalom alobi na Kusai : « Olakisi bolingi ona nkolo wa yo bongo ? Mpo nini okendeki elongo na nkolo wa yo te ? » | |
II S | LinVB | 16:18 | Kusai ayanoli Absalom : « Ezali bongo te : moto oyo Yawe na ba-Israel banso baponoki, nalingi bobele kosalela ye, nakotikala se epai ya ye ! | |
II S | LinVB | 16:19 | Bongo nasalela nani ? Bobele mwana wa ye te ? Lokola nasalelaki tata wa yo, nakosalela yo se bongo. » | |
II S | LinVB | 16:20 | Absalom alobi na Akitofel : « Bosangana likita mpo toyeba makambo nini tosengeli kosala. » | |
II S | LinVB | 16:21 | Akitofel ayanoli : « Kende epai ya bamakango ba tata wa yo, baye atikaki mpo ’te bakengele ndako ya mokonzi. Bongo bato banso ba Israel bakoyeba ’te osali likambo likoyokisa tata wa yo nkanda enene, mpe bato ba ye banso bakozwa bongo mpiko ya sika. » | |
II S | LinVB | 16:22 | Batandeli Absalom ema o mokili mwa ndako, mpe Absalom akei epai ya bamakango ba tata wa ye o miso ma ba-Israel banso. | |