Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II SAMUEL
Prev Up Next
Chapter 3
II S LinVB 3:1  Bitumba biumeli mingi kati ya bato ba libota lya Saul na bato ba libota lya Davidi. Davidi azalaki se kolenda mokolo na mokolo, kasi libota lya Saul lizalaki se kozonga nsima.
II S LinVB 3:2  Bana ba Davidi babotami o Ebron, bango baye : Amon, mwana mobali wa yambo ; mama wa ye Akinoam wa Yizreel.
II S LinVB 3:3  Mozimi wa ye Kileab, mama wa ye Abigayil, mwasi wa Nabal, moto wa Karmel. Mwana wa basato Absalom ; mama wa ye Maka, mwana wa Talmai, mokonzi wa Gesur.
II S LinVB 3:4  Mwa­na wa banei, Adonia ; mama wa ye Kagit. Mwana wa batano, Sefatia ; mama wa ye Abital.
II S LinVB 3:5  Mwana wa motoba, Yitream. Davidi abotaki ye na Egla. Bango banso bana ba Davidi babotami o Ebron.
II S LinVB 3:6  O ntango bato ba Saul na bato ba Davidi bazalaki kobunda, Abner aluki kokoma mokonzi wa libota lya Saul.
II S LinVB 3:7  Saul azalaki na makango, nko­mbo ya ye Rispa, mwana wa Aya. Isboset atuni Abner : « Mpo nini ota-mbolaki na makango wa tata wa ngai ? »
II S LinVB 3:8  Eyoki Abner maloba mana, asiliki mingi mpe azongisi : « Nazali nde lokola mbwa ya ba-Yuda ? Nazali kotala libota lya tata wa yo Saul se malamu, na bandeko na baninga ba ye banso. Nabikisaki yo o maboko ma Davidi, mpe sikawa opaleli ngai na likambo lya mwasi ona !
II S LinVB 3:9  Yawe asala ngai Abner lokola alingi mpe apesa ngai etumbu soko nakokisi te maye Yawe alakelaki Davidi na ndai,
II S LinVB 3:10  alobaki ’te akobotolo libota lya Saul bokonzi mpe akopesa Davidi ngwe­nde ya bokonzi bwa Israel na Yuda, banda Dan tee Berseba. »
II S LinVB 3:11  Isboset ameki kozongisela Abner liloba lyoko te, zambi abangi ye.
II S LinVB 3:12  Abner atindeli Davidi bantoma ba­tuna ye : « Mokili moye mwa nani ? Malamu okata na ngai bondeko mpe nakopesa yo maboko mpo ’te ba-Israel banso bandima yo. »
II S LinVB 3:13  Davidi ayanoli : « Malamu ! Nakokata bondeko na yo. Nakosenge yo se mpo yoko. Liboso ’te okoma epai ya ngai, yaka elongo na Mikal, mwana wa Saul, soki te obima o miso ma ngai te. »
II S LinVB 3:14  Davidi atindeli Isboset bantoma na maloba maye : « Pesa ngai mwasi wa ngai Mikal, oyo nabalaki nta­ngo nabomaki ba-Filisti monkama. »
II S LinVB 3:15  Isboset atindi bato bakende kokamata ye epai ya mobali wa ye Paltiel, mwana wa Lais.
II S LinVB 3:16  Mobali wa ye akei na ye elongo. Alandi ye tee Bakurim, o nzela azalaki se kolela. Kasi Abner alobi na ye : « Zonga o mboka ! » Bo­ngo azongi.
II S LinVB 3:17  Abner ayokani na bakolo ba Israel. Alobi na bango : « Banda kala bino bolingi Davidi azala mokonzi wa bino.
II S LinVB 3:18  Bobongisa likambo lina sikawa, zambi Yawe alobaki mpo ya Davidi : Na mosaleli wa ngai nakobikisa bato ba ngai ba-Israel o maboko ma ba-Filisti mpe ma banguna ba bango ba­nso. »
II S LinVB 3:19  Abner alobi se bongo na bato ba Benyamin ; na nsima akei o Ebron koyebisa Davidi makambo manso ba-Israel na bato ba Benyamin bandimaki kosala.
II S LinVB 3:20  Abner akei elongo na bato ntuku ibale, akomi epai ya Davidi o Ebron. Davidi alambeli Abner na bato ba ye limpati.
II S LinVB 3:21  Na nsima Abner alobi : « Na­kokende kosangisa ba-Israel ba­nso pe­nepene na mokonzi wa ngai. Bakokata na yo bondeko mpe yo okozala mokonzi bipai binso olingi. » Davidi atiki Abner akende ; Abner akei na boboto.
II S LinVB 3:22  Basoda ba Davidi na Yoab balongwi o esika ya bitumba mpe bazongi na biloko ebele babotoloki o etumba. Abner azalaki lisusu epai ya Davidi o Ebron te, zambi Davidi apesaki ye nzela ya kokende na boboto.
II S LinVB 3:23  Ezongi Yoab na basoda ba ye o mboka, bayebisi Yoab ’te Abner, mwana wa Ner, ayaki epai ya Davidi ; oyo atikaki ye akende na boboto.
II S LinVB 3:24  Yoab akei epai ya mokonzi mpe alobi na ye : « Osali nini ? Abner ayaki epai ya yo ! Mpe otikaki ye akende lisusu !
II S LinVB 3:25  Oyebi Abner, mwana wa Ner, ayaki awa bobele mpo ’te akosa yo, ayeba ngonga nini okobimaka mpe okozongaka, ayeba mpe makambo manso okosalaka. »
II S LinVB 3:26  Ebimi Yoab o ndako ya Davidi, atindi bantoma bakende koluka Abner mpe bazongisa ye ut’o esika ake­ndeki epai ya etima ya Sira, Davidi ayebi yango te.
II S LinVB 3:27  Abner azongi o Ebron, Yoab abendi ye mpembeni, pene na ezibeli ya ndako, asali lokola alingi koloba na ye malembe, mpe kuna atuti ye o libumu, abomi ye, mpo abomaki ndeko wa ye Asael.
II S LinVB 3:28  Eyo­ki Davidi likambo lina, alobi : « Mpo ya liwa lya Abner, mwana wa Ner, biso na bato ba ekolo ya ngai tozali na likambo lyoko te o miso ma Yawe.
II S LinVB 3:29  Makila maye masopani ma­kwela Yoab na bandeko ba ye banso ! O libota lya Yoab mpasi ezanga mokolo moko te, emonono epai ya ba­ngo ntango inso : to moto atanga nzoto mai, to moto abele bokono bwa maba, to moto atambola na lingenda, to moto akufa na mopanga, to moto akelela mampa ! »
II S LinVB 3:30  Yoab na ndeko wa ye Abisai babomaki Abner, zambi ye abomaki ndeko wa bango Asael o etumba ya Gabaon.
II S LinVB 3:31  Davidi alobi na Yoab mpe na bato ba ye banso : « Bopasola bilamba bya bino, bolata mpili mpe bosala lilaka mpo ya Abner. » Mokonzi Davidi alandi epomba.
II S LinVB 3:32  Bakundi Abner o Ebron. Pene na lilita lya Abner mokonzi aleli makasi, mpe bato banso baleli lokola.
II S LinVB 3:33  Mpo ya kolela Abner mokonzi ayembi nzembo eye : « Abner akufa bongo lokola elema akokufaka ?
II S LinVB 3:34  Bakangaki maboko ma yo te, bakangaki makolo ma yo na minyololo te. Okufi lokola moto akwei o maboko ma bayibi ! » Mpe bato banso babandi kolela ye lisusu.
II S LinVB 3:35  Na nsima bato banso bakei epai ya Davidi mpo ya kobondela ye alia ntango moi mokiti naino te. Kasi Davidi alayi ndai : « Yawe asala ngai lokola alingi mpe apesa ngai etumbu soko nalei mampa to eloko ata nini awa moi mokiti naino te. »
II S LinVB 3:36  Bato ba­nso bamoni yango mpe bandimi, za­mbi bandimi makambo manso Davidi azalaki kosala.
II S LinVB 3:37  O mokolo mona ba-Israel banso bamoni ’te liwa lya Abner, mwana wa Ner, lizalaki lika­mbo lya mokonzi te.
II S LinVB 3:38  Mokonzi alobi na basaleli ba ye : « Bino boyebi te ’te lelo nkumu mpe moto monene akufi o Israel ?
II S LinVB 3:39  Sikawa nalendi naino te, ata bapakolaki ngai mafuta ma bokonzi. Kasi bana ba Seruya baleki ngai na bokasi. Malamu Yawe azo­ngisela moto mabe maye manso asalaki. »