Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JUDITH
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16
Prev Up Next
Chapter 5
Judi LinVB 5:1  Bayebisi Oloferne, komanda wa basoda ba Asur, ’te ba-Israel bazalaki komilengele mpo ya etumba. Balobi ’te ba-Israel bakangi nzela o kati ya ngomba, batii basoda o nsonge ya ngomba, batii mpe mitambo o esobe.
Judi LinVB 5:2  Oloferne ayoki nkanda enene, abengi bankumu banso ba Moab, bakomanda banso ba Amon, na bakonzi ba mikili penepene na mbu.
Judi LinVB 5:3  Alobi na bango : « Bino bato ba Kanana, boyebisa ngai : Bato bafandi kuna o kati ya ngomba banani ? Mboka ya bango izali boni ? Bazali na basoda boni ? Bokasi bwa bango bouti wapi ? Mokonzi akoyangela basoda ba ba­ngo, ye nde nani ?
Judi LinVB 5:4  Mpo nini baboyi koyamba ngai lokola bato ba bikolo bisusu bya Westi bayambaki ngai ? »
Judi LinVB 5:5  Akior, mokonzi wa ba-Amon, azongiseli ye : « E Mokonzi, nabondeli yo, yoka maloba ma ngai mosaleli wa yo. Nakoloba na yo se likambo lya solo mpo ya bato bafandi o ngo­mba, baye bakomi pene na yo. Liloba lyoko lya lokuta likobima o monoko mwa ngai mosaleli wa yo te.
Judi LinVB 5:6  Bato ba ekolo ena bazali bankoko ba bato ba Kaldea.
Judi LinVB 5:7  Bakendeki kofanda o Me­sopotamia, mpo baboyaki kolanda ba­nzambe ba batata ba bango, baye bazalaki o Kaldea.
Judi LinVB 5:8  Batiki kolanda mimeseno mya bankoko ba bango mpe bakumisi Nzambe wa likolo, Nza­mbe se moko oyo bango bandimi. Ba-Kaldea babengani bango o mokili mwa banzambe ba bango ; ya­ngo wana bakimi ; bakei o Mesopotamia esika bafandi mbula ebele.
Judi LinVB 5:9  Nza­mbe wa bango ayebisi bango ’te balongwa o mokili mona mpe bakende o mokili mwa Kanana ; yango wana bakei kopasola mboka kuna, bazwi wolo na palata na ngombe ebele.
Judi LinVB 5:10  Na nsima bakei o Ezipeti, mpo nzala enene enga­laki o mokili mwa Kanana ; batikali kuna tee bazalaki naino kozwa biloko bya kolia ; bongo bakomi ekolo enene, moto moko akoki kotanga bango lisusu te.
Judi LinVB 5:11  Kasi mokonzi wa Ezipeti asilikeli bango, asali bango mayele, apesi bango mosala mwa kobete biliki mpo ’te bakoma baombo ba ye.
Judi LinVB 5:12  Babeleli Nzambe wa bango. Nzambe ayokisi mokili mobimba mwa Ezipeti mpasi ndenge na nde­nge, iye bakokaki kokima te. Ba-Ezipeti babengani bango mosika.
Judi LinVB 5:14  akambi bango o nzela ya Sinai mpe ya Kades-Barne. Bakimisi bato banso bafandaki o eliki.
Judi LinVB 5:15  Bayei kopasola mboka o mokili mwa ba-Amor ; na mpiko enene babomi bato banso ba Kesbon. Na nsima bakatisi Yordane, babotoli mokili mobimba mwa ngomba.
Judi LinVB 5:16  Babengani bato bafandaki kuna : ba-Kanana, ba-Perizi, ba-Yebus, ba-Sikem na ba-Girgas ; bafandi kuna mikolo ebele.
Judi LinVB 5:17  Mikolo bazalaki kosala masumu te o miso ma Nzambe wa bango, makambo manso mazalaki kotambola malamu, mpo Nzambe wa bango ayi­ni makambo mazangi bosembo.
Judi LinVB 5:18  Kasi mbala inso, soko batiki nzela eye Nzambe alakisi bango, bazalaki kokufa ebele o bitumba to bazalaki kokangema baombo o ekolo esusu mosika. Banguna babebisi Tempelo ya Nzambe wa bango mpe babotoli bi­ngumba bya bango.
Judi LinVB 5:19  Kasi sikawa bazongeli lisusu Nza­mbe wa bango ; yango wana bazongi ut’o bikolo esika bapanzanaki o ekolo ya bango. Bayei o Yeruzalem esika Tempelo ya bango ezali, mpe batongi mboka o bisika bya ngomba, mpo bato bazalaki wana lisusu te.
Judi LinVB 5:20  Bo­ngo, yo nkumu mpe mokonzi wa ngai, soko bato bana babungi to basali lisumu o miso ma Nzambe wa ba­ngo, mpe soko tomoni ’te bango basali mabe, biso tokokende kobu­ndisa bango.
Judi LinVB 5:21  Kasi soko basali lika­mbo lyoko te, ebongi yo mokonzi wa ngai, otika kobunda na bango, mpo Mokonzi Nzambe wa bango ako­batela bango. Soki bongo te, bato banso ba mokili bakoseke biso. »
Judi LinVB 5:22  Esilisi Akior koloba bongo, bato baye bazingi ema babandi kotomboko. Bayangeli ba Oloferne na bato banso ba ekolo penepene na mbu mpe ba-Moab balingi kobete Akior,
Judi LinVB 5:23  balobi : « Tobanga ba-Israel ntina nini ? Bazangi bokasi ; soko etumba enga­li, bakoki kobika soki moke te.
Judi LinVB 5:24  Yango wana, mokonzi Oloferne, tokende kobundisa bango mpe basoda ba yo bakosilisa bango nye. »