LUKE
Chapter 16
Luke | LinVB | 16:1 | Na nsima Yézu alobí na bayékoli ba yě : « Moto mǒkó wa nkita azalákí na kapíta ; kasi bayéí kofúnda kapíta óyo ’te azalákí kobébisa bilóko bya yě. | |
Luke | LinVB | 16:2 | Abéngí kapíta, alobí na yě : ‘Nazalí koyóka níni ? Lakísá ngáí mosálá osálí, zambí okokí kozala kapíta lisúsu té’. | |
Luke | LinVB | 16:3 | Kapíta amílobélí : ‘Násála níni, áwa mokonzi akolongola ngáí o mosálá ? Kokáta bilanga, nazalí na makási té ! Koséngeke bato bilóko, nsóni míngi… | |
Luke | LinVB | 16:4 | Nayébí níni nakosála mpô ’te, ntángo bakolongola ngáí o mosálá, bato basúsu báyamba ngáí o ndáko ya bangó’. | |
Luke | LinVB | 16:5 | Abéngí mǒkó mǒkó wa bato bazalákí na nyongo ya mokonzi wa yě. Atúní óyo wa libosó : ‘Ozalí na nyongo ya mokonzi wa ngáí bóní ?’ | |
Luke | LinVB | 16:6 | Azóngísí : ‘Pípa ya mafúta monkámá.’ Alobí na yě : ‘Kamátá monkandá mwa nyongo, fándá mpé komá nokí : ntúkú ítáno.’ | |
Luke | LinVB | 16:7 | Atúní mosúsu : ‘Yǒ ozalí na nyongo bóní ?’ Oyo alobí : ‘Sáki ya masángú monkámá’. Alobí na yě : ‘Kamátá monkandá mwa nyongo mpé komá : ntúkú mwambe’. | |
Luke | LinVB | 16:8 | Mokonzi akúmísí kapíta óyo azángí bosémbo, mpô abongísí likambo na mayéle. Ya sôló, o makambo na báníngá bato ba nsé eye balekí bána ba mwínda na mayéle. | |
Luke | LinVB | 16:9 | Mpé ngáí nayébísí bínó : Elóko ekokómisaka moto moyíbi, ndé mosolo, bínó bóluka kozwa na mwangó bandeko, mpô ’te bangó báyamba bínó o biéma bya lobíko mokolo mosolo mokozánga. | |
Luke | LinVB | 16:10 | Moto azalí na bosémbo o makambo maké, azalí mpé na bosémbo o makambo manéne. Mpé moto azángí bosémbo o makambo maké, azángí mpé bosémbo o makambo manéne. | |
Luke | LinVB | 16:11 | Bôngó sókó mpô ya mosolo, elóko ekokómisaka moto moyíbi, bozalí na bosémbo té, náni akopésa bínó bomengo bwa sôló ? | |
Luke | LinVB | 16:12 | Sókó bozalí na bosémbo té na bilóko bya moto mosúsu, náni akopésa bínó bilóko bya bínó mǒkó ? | |
Luke | LinVB | 16:13 | Mosáli mǒkó té akokí kosálela bakonzi bábalé : tǒ akobóya mǒkó mpé akolinga mosúsu, tǒ akolanda mǒkó mpé akokínola mosúsu. Bokokí kosálela ná Nzámbe ná mosolo té. » | |
Luke | LinVB | 16:14 | Ba-Farizéo bazalákí kolinga mbóngo míngi ; eyókí bangó maloba mâná mánso, basekí yě. | |
Luke | LinVB | 16:15 | Alobí na bangó : « Bínó mpenzá bokomílakisaka lokóla bato ba bosémbo o míso ma bato, kasi Nzámbe ayébí mitéma mya bínó. Elóko ya lokúmu o míso ma bato, Nzámbe akoyóka yangó mpi. | |
Luke | LinVB | 16:16 | Tozalákí na búku ya Mobéko mpé na minkandá mya baproféta téé ntángo Yoáne ayákí. Ut’o ntángo êná bakosangelaka Bokonzi bwa Nzámbe, mpé bato bánso bakosálaka makási mpô ya kokóto kúná. | |
Luke | LinVB | 16:18 | Moto óyo abengání mwásí wa yě mpé abálí mosúsu, asálí bokáli. Moto abálí mwásí óyo mobáli wa yě abengání, asálí bokáli. | |
Luke | LinVB | 16:19 | Ezalákí moto mǒkó wa nkita. Azalákí koláta bilambá kitóko bya motúya monéne. Mokolo na mokolo azalákí kolía malámu mpenzá. | |
Luke | LinVB | 16:20 | Mobóla mǒkó, nkómbó ’te Lazáro, azalákí kobéla makwánza o nzóto mobimba ; azalákí kolála pene na ezibeli ya ndáko ya yě. | |
Luke | LinVB | 16:21 | Azalákí koyóka mpósá ya biléi bikwéí o nsé ya méza ya moto wa nkita, kasi mbwá kaka izalákí koyâ koléte mpótá ya yě. | |
Luke | LinVB | 16:22 | Mokolo mobóla awéí, bǎnzelú bamemí yě penepene na Abaráma. Moto wa nkita mpé awéí, bakundí yě. | |
Luke | LinVB | 16:23 | O mbóka ya bawá anyókwámí míngi. Atálí likoló, amóní Abaráma mosíká, ná mpé Lazáro afándí penepene na yě. | |
Luke | LinVB | 16:24 | Agángí : ‘Tatá Abaráma, yókélá ngáí mawa. Tíndá Lazáro átía nsóngé ya mosapi o mái mpé átangisa mangó o lolému la ngáí ; bôngó mpási ékita atâ mwâ moké ; nazalí konyókwama míngi o móto moye.’ | |
Luke | LinVB | 16:25 | Kasi Abaráma ayanólí : ‘Mwána, kanísá ’te ozwákí bomengo ntángo ya bomoi bwa yǒ o nsé, kasi Lazáro azalákí sé koyóka mpási. Sikáwa yě azalí kozwa libóndí, mpé yǒ ozalí konyókwama. | |
Luke | LinVB | 16:26 | Kanísá mpé : Káti ya bísó na bínó libúlú linéne lizalí, mpô ’te baye balingí kolongwa áwa mpé kokóma epái ya bínó, bákoka té ; moto mǒkó álongwa mpé kúná té mpô ya kokóma epái ya bísó.’ | |
Luke | LinVB | 16:28 | zambí nazalí na bandeko babáli bátáno. Akende kokébisa bangó, mpô ’te bangó mpé bákóma o esíká eye ya minyóko té.’ | |
Luke | LinVB | 16:29 | Abaráma azóngísí : ‘Bazalí na mibéko mya Móze mpé na minkandá mya baproféta, báyóka bangó.’ | |
Luke | LinVB | 16:30 | Kasi yě alobí : ‘Yangó ekokí té, tatá Abaráma ; kasi sókó mǒkó wa baye bawá akeí epái ya bangó, bakobóngola mitéma.’ | |