Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
LUKE
Prev Up Next
Chapter 22
Luke LinVB 22:1  Eyenga ya ‘Mámpa mazángí nkísi’ eye bakobéngaka Pásiká, ekómí penepene.
Luke LinVB 22:2  Banganga bakonzi na batéyi ba Mobéko bazalákí koluka nzelá ya koboma Yézu, zambí bazalákí kobánga bato.
Luke LinVB 22:3  Nzókandé Sátana akótí o motéma mwa Yudási, óyo bakobéngaka Iskarióte, mǒkó wa ba-zómi na bábalé.
Luke LinVB 22:4  Akeí koyókana na banganga bakonzi mpé na bayángeli ba bakéngeli ba Témpelo bóníbóní akokaba yě o mabóko ma bangó.
Luke LinVB 22:5  Bangó basepélí mpé bayókání ’te bakopésa yě mosolo.
Luke LinVB 22:6  Yudási andimí mpé abandí koluka nzelá ebongí na bokabi Yézu o mabóko ma bangó, mpô ’te bato bánso báyéba yangó té.
Luke LinVB 22:7  Ekómí eyenga ya Mámpa mazá­ngí nkísi, mokolo basengélí koboma mpatá ya Pásiká,
Luke LinVB 22:8  Yézu atíndí Pétro na Yoáne, alobí : « Bókende koléngelele bísó limpáti lya Pásiká, tólía lya­ngó. »
Luke LinVB 22:9  Batúní yě : « Oli­ngí tókende kolámba lyangó wápi ? »
Luke LinVB 22:10  Alobí na bangó : « Sókó bokómí o mbóka, bokokúta moto mǒ­kó amemí mbéki ya mái o motó ; bólanda yě kín’o ndáko akokóto,
Luke LinVB 22:11  mpé bóloba na nkóló wa ndáko : ‘Motéyi atúní yǒ : Esíká níni nakokí kolía limpáti lya Pásiká elo­ngó na bayékoli ba ngáí ?’
Luke LinVB 22:12  Akolakisa bínó eténi enéne o mokili mwa ndáko, eye babongísí malámu ; bóléngele bínso kúná. »
Luke LinVB 22:13  Bangó bakeí, bakútí bínso lokóla alobákí na bangó, mpé balámbí limpáti lya Pásiká.
Luke LinVB 22:14  Awa ntángo ekokí, Yézu akeí kofánda o méza elongó na bapóstolo.
Luke LinVB 22:15  alobí na bangó : « Nayókí mpósá míngi ya kolía Pásiká eye elongó na bínó libosó ’te náyóka mpási.
Luke LinVB 22:16  Nalobí na bínó : Nakolía yangó lisúsu té téé mokolo Pásiká eye ekokokisama o Bokonzi bwa Nzámbe. »
Luke LinVB 22:17  Na nsima akamátí nkéni, atóndí Nzámbe, alobí : « Kamátáni, bómele yangó bínó bánso.
Luke LinVB 22:18  Nalobí na bínó : Nakomele víno lisúsu té téé mokolo Bokonzi bwa Nzámbe bokoyâ. »
Luke LinVB 22:19  Na nsima akamátí límpa, atóndí Nzámbe, abúkí lyangó, apésí bayékoli, alobí : « Eye ezalí Nzóto ya ngáí ekokabama mpô ya bínó. Bósálaka bôngó mpô ya kokanisa ngáí. »
Luke LinVB 22:20  Esílísí bangó kolía, akamátí mpé nkéni, alobí : « Nkéni eye ezalí nkéni ya Bondeko bwa Sika ya makilá ma ngáí, makosopana mpô ya bínó. »
Luke LinVB 22:21  « Nzókandé moto óyo akokaba ngáí, afándí o méza elongó na ngáí.
Luke LinVB 22:22  Mwána wa Moto akokende lokóla eyébání kala, kasi mawa na moto óyo akokaba yě. »
Luke LinVB 22:23  Bôngó babandí kotúnana sókó náni o ntéi ya bangó akokí kosála bôngó.
Luke LinVB 22:24  Babandí kowélana ntembe sókó náni o ntéi ya bangó alekí bonéne.
Luke LinVB 22:25  Alobí na bangó : « Bakonzi ba nsé bakotíndaka bato ba bangó bitíndá, mpé baye bakoyángelaka bangó balingí ’te bátángema bato balámu.
Luke LinVB 22:26  Kasi bínó bósálaka bôngó té. Oyo alekí bonéne ámíkómisa lokóla mwána ; óyo azalí moyángeli ámíkómisa lokóla mosáleli.
Luke LinVB 22:27  Náni alekí bonéne : óyo afándí o méza, tǒ óyo azalí kosálela yě ? Ezalí té óyo afándí o méza ? Kasi ngáí nazalí o ntéi ya bínó lokóla mosáleli !
Luke LinVB 22:28  Bínó botíkákí ngáí té o ntángo nayókákí mpási.
Luke LinVB 22:29  Yangó wâná nakoléngelele bínó Bokonzi lokóla Tatá aléngélélí ngáí,
Luke LinVB 22:30  mpô ’te bólía mpé bómele o méza ma Bokonzi bwa ngáí, mpé bófánda o ngwendé mpô ya kosámbisa mabótá zómi na mábalé ma Israél.
Luke LinVB 22:31  Simóni, Simóni, yébá ’te Sátana aséngí ’te áyongela bínó lokóla bakoyongeleke fufú.
Luke LinVB 22:32  Kasi ngáí nasá­mbélélí yǒ, mpô ’te boyambi bwa yǒ bólembe té. Bôngó, sókó osílí obó­ngólí motéma, léndísáká ba­ndeko ba yǒ. »
Luke LinVB 22:33  Pétro alobí : « Mokonzi, nandimí kolanda yǒ kín’o bolóko mpé o liwá. »
Luke LinVB 22:34  Kasi Yézu azóngísí : « Pétro, nayébísí yǒ : Leló libosó ’te nsósó élela, okowá­ngana mbala ísáto ’te oyébí ngáí. »
Luke LinVB 22:35  Na nsima alobí na bangó : « Ntá­ngo natíndákí bínó, mpé bozalákí na líbenga lya mosolo té, sáki té, sapáto té, bozángákí ndé elóko ? » Bazó­ngísí : « Elóko té ! »
Luke LinVB 22:36  Alobí na bangó : « Kasi sikáwa, óyo azalí na líbenga lya mosolo, ákamata lyangó ; sé bôngó óyo azalí na sáki ya kotía bilóko bya kolía ; óyo azalí na mompánga té, átéke monkóto mwa yě mpô ya kosómba mompánga.
Luke LinVB 22:37  Nalobí na bínó : Ngáí nasengélí kokokisa maye makomámí o Minkandá Misántu : Batíí yě o molo­ngó mwa bato babé. Ya sôló, maye matálí ngáí, malingí másálema. »
Luke LinVB 22:38  Bangó balobí : « Mokonzi, tálá tozalí na mimpánga míbalé áwa. » Ayanólí bangó : « Ekokí bôngó ! »
Luke LinVB 22:39  Yézu abimí mpé akeí o ngómbá ya Olíva, lokóla ameséní kosála. Bayékoli balandí yě.
Luke LinVB 22:40  Ekómí yě kúná, alobí na bangó : « Bósámbela mpô ’te bóndima masénginyá té. »
Luke LinVB 22:41  Alongwí epái ya bangó mpé akeí mosíká lokóla ntáká bakobwákaka libángá. Afukámí mpé asámbélí :
Luke LinVB 22:42  « Tatá, sókó olingí, longólá nkéni eye epái ya ngáí. Nzókandé ésálema té lokóla ngáí nalingí, kasi lokóla yǒ olingí ! »
Luke LinVB 22:43  O ntángo êná ǎnzelú mǒkó aútí o likoló, abimélí yě mpé aléndísí yě.
Luke LinVB 22:44  Awa abandí koyóka nsómo ya liwá, aléndísí naín­o kosámbela. Mitoki mya yě mikómí lokóla matangá manéne ma makilá, matangí o nsé.
Luke LinVB 22:45  Atélémí, atíkí losámbo. Ntángo akómí epái ya bayékoli, akútí bangó balálí mpongí mpô ya mawa.
Luke LinVB 22:46  Alobí na bangó : « Bozalí ndé kolála mpongí ? Bótéleme mpé bósámbela mpô ’te bóndima maséngi­nyá té. »
Luke LinVB 22:47  Ezalákí yě naíno koloba, bato ebelé bayéí. Yudási, mǒkó wa ba-zómi na bábalé, akambí bangó ; abelémí na Yézu mpô ya kozínga yě ekópi.
Luke LinVB 22:48  Kasi Yézu alobí na yě : « Yudási, ozalí ndé kokaba Mwána wa Moto na ekópi ? »
Luke LinVB 22:49  Ntángo baye bazíngí yě bamóní maye malingí másálema, balobí : « Mokonzi, tóbéte bangó na mompánga ? »
Luke LinVB 22:50  Mpé mǒkó wa bangó abétí mosáli wa nganga mokonzi, akátí yě litói lya mobáli.
Luke LinVB 22:51  Kasi Yézu alobí : « Tíká kosála bôngó ! » Asímbí litói lya moto ôná mpé abíkísí yě.
Luke LinVB 22:52  Na nsima alobí na baye bayéí kobimela yě, banganga bakonzi, bayá­ngeli ba bakéngeli ba Témpelo mpé bakóló : « Nazalí ndé moyíbi ’te bóbimela ngáí na mimpánga mpé na mángé­nda ?
Luke LinVB 22:53  Mokolo na mokolo nazalákí na bínó o Témpelo, mpé bokangákí ngáí té. Kasi ngonga ya bínó ekokí, ngo­nga ya mokonzi wa molílí. »
Luke LinVB 22:54  Bakangí yě mpé bakeí na yě o ndáko ya nganga mokonzi, esíká bakótísí yě. Pétro alandí mwâ mosíká.
Luke LinVB 22:55  Bapelísákí móto o káti ya lopángo. Pétro akeí kofánda o káti ya bato bafándí penepene na móto.
Luke LinVB 22:56  Mosáleli mwásí mǒkó amóní yě afándí penepene na móto mozalí kobutisa miloli. Atálí yě swíí, alobí : « Oyo mpé azalákí na yě ! »
Luke LinVB 22:57  Kasi yě awángání, alobí : « Mamá, nayébí yě té. »
Luke LinVB 22:58  Mwâ moké nsima, moto mosúsu amóní yě, alobí : « Yǒ mpé ozalí mǒkó wa bangó ! » Pétro alobí : « Té, tatá, ngáí té. »
Luke LinVB 22:59  Sókí nsima ya ngonga yǒ kó, mosúsu alé­ndísí koloba : « Ya sôló, moto óyo azalákí na yě, kútu azalí mo-Galiléa. »
Luke LinVB 22:60  Kasi Pétro azóngísí : « Ndeko, nayébí té níni ozalí koloba. » Naíno asílísí koloba té, nsósó elelí.
Luke LinVB 22:61  Mokonzi amíbóngólí mpé atálí Pétro. Sikáwa Pétro akundólí o motéma maloba Yézu alobákí na yě : « Leló, libosó ’te nsósó élela, okowángana ngáí mbala ísáto. »
Luke LinVB 22:62  Abimí o libándá mpé alelí na mawa manéne.
Luke LinVB 22:63  Bato bazalákí kokéngele Yézu basekí mpé babétí yě.
Luke LinVB 22:64  Bazipí elongi ya yě na elambá mpé batúní yě : « Proféta, yébísá bísó náni abétí yǒ ! »
Luke LinVB 22:66  Etání ntóngó, bakóló ba mbóka basangání likita elongó na banganga bakonzi mpé na batéyi ba Mobéko. Bakeí na yě o esámbi
Luke LinVB 22:67  mpé balobí na yě : « Yébísá bísó sókó ozalí Krístu. » Azóngísí : « Atâ nayébísí bínó, boko­ndima té,
Luke LinVB 22:68  mpé sókó natúní bínó mitúna, bokoyanola té.
Luke LinVB 22:69  Kasi bandá leló bokomóno Mwána wa Moto afá­ndí o lobóko la mobáli la Nzámbe wa bokási ! »
Luke LinVB 22:70  Bánso balobí : « Bô­ngó ozalí Mwáná wa Nzámbe ? » Ayébísí bangó : « Bosílí bolobí, ezalí ngáí. »
Luke LinVB 22:71  Bangó balobí : « Tosengélí lisúsu na banzénénéké, sôló ? Bísó mǒkó toyókí yangó o monoko mwa yě ! »