Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
LUKE
Prev Up Next
Chapter 23
Luke LinVB 23:1  Bato bánso ba likita batélémí mpé bakeí na yě epái ya Piláto.
Luke LinVB 23:2  Babandí kofúnda yě, balobí : « Bísó tokútí moto óyo azalí kotombokisa bato o ekólo ya bísó. Azalí kopekisa bato kofúta mpáko ya Kaizáro, mpé akolobaka ’te azalí mokonzi-Mesíya. »
Luke LinVB 23:3  Piláto atúní yě : « Ozalí mokonzi wa ba-Yúda ? » Yézu azóngísélí yě : « Olobí yangó. »
Luke LinVB 23:4  Piláto alobí na banganga bakonzi mpé na bato basangání wâná : « Namóní ntína atâ yǒ kó té ya kokitisa moto óyo. »
Luke LinVB 23:5  Kasi bangó baléndísí, balobí : « Na matéya ma yě azalí kotombokisa bato o Yudéa mobimba, út’o Galiléa téé áwa. »
Luke LinVB 23:6  Eyókí Piláto bôngó, atúní sókó azalákí mo-Galiléa.
Luke LinVB 23:7  Awa ayókí ’te Yézu azalákí moto wa mokili mwa Eróde, atíndí yě epái ya Eróde ; yě mpé azalákí o Yerúzalem o mikolo mîná.
Luke LinVB 23:8  Eróde asepélí míngi na bomóni Yézu. Ut’o kala alingákí komóno yě, zambí ayókákí nsango ya yě míngi. Azalákí na elíkyá ’te Yézu akosála likamwísi o míso ma yě.
Luke LinVB 23:9  Atúní yě mitúna míngi, kasi Yézu azóngísélí yě liloba atâ lyǒ kó té.
Luke LinVB 23:10  Nzókandé banganga bakonzi na batéyi ba Mobéko bazalákí wâná baléndísí kofúnda yě.
Luke LinVB 23:11  Eróde na basodá ba yě batúmólí yě, basekí yě, mpé balátísí yě monkóto mwa bokonzi ; na nsima bazóngísí yě epái ya Piláto.
Luke LinVB 23:12  Bobélé mokolo môná Eróde na Piláto bakómí koyókana ; libosó bazalákí bangúná.
Luke LinVB 23:13  Piláto abéngí banganga bakonzi, bakóló na bato bánso,
Luke LinVB 23:14  alobí na bangó : « Boyélí ngáí moto óyo, mpé bolobí ’te azalí kotombokisa bato, nzókandé o míso ma bínó natúní yě malámu, kasi o maye mánso bozalí kofúnda yě namóní ntína yǒ­kó té ya kokitisa moto óyo.
Luke LinVB 23:15  Eróde mpé té, yangó wâná azóngísí yě áwa. Ezalí polélé ’te asálí likambo lyǒ kó té likokí na liwá.
Luke LinVB 23:16  Bôngó nakobétisa yě fí­mbo, na nsima nakotíka yě. » (
Luke LinVB 23:18  Kasi bangó bánso, monoko mǒkó, baba­ndí kogánga : « Bomá moto óyo ! Tíkélá bísó Báraba ! »
Luke LinVB 23:19  Báraba akangémákí o bolóko, zambí abimísákí mobúlú o mbóka, mpé abomákí moto.
Luke LinVB 23:20  Piláto alobí na bangó lisúsu, mpô alingí kotíka Yézu.
Luke LinVB 23:21  Kasi bangó bazóngísélí yě, bagángí : « Báká yě o kurúse ! Báká yě o kurúse ! »
Luke LinVB 23:22  Mbala ya ísáto Piláto alobí na bangó : « Kasi mabé níni moto óyo asálí ? Ngáí na­zwí yě na ntína yǒ kó té ya kokitisa yě o liwá. Bôngó nakobétisa yě fímbo, na nsima nakotíka yě. »
Luke LinVB 23:23  Kasi na bogángi baléndísí kosénge ’te bábáka yě o kurúse, mpé mbala na mbala bagángí makási koleka libosó.
Luke LinVB 23:24  Bôngó Piláto akátí likambo lokóla bazalákí kosénge.
Luke LinVB 23:25  Moto óyo akótókí o bolóko, zambí abimísákí mobúlú mpé abomákí moto, atíkí yě, lokóla ba­sé­ngékí ; kasi akabí Yézu o mabóko ma bangó, lokóla bangó balingí.
Luke LinVB 23:26  Ntángo bakeí na yě, bakangí Simóni wa Siréne, óyo aútí o bilanga ; batíndí yě na makási ámeme kurúse nsima ya Yézu.
Luke LinVB 23:27  Bato baíké bala­ndí yě, ná mpé básí bazalákí kolela yě, mabóko o mitó.
Luke LinVB 23:28  Yézu amíbóngólí epái ya bangó, alobí : « Bána básí ba Yerúzalem, bólela ngáí té, kasi bómílela bínó mǒkó, bólela mpé bána ba bínó !
Luke LinVB 23:29  Mpámba té, o mikolo mikoyâ bakoloba : Esengo na básí bikomba baye babótá té, mpé baye banúngísí mwána té !
Luke LinVB 23:30  O ntángo êná bakoba­nda koloba na ngómbá inéne : ‘Bókwêla bísó !’ mpé na ngómbá iké : ‘Bózipa bísó !’
Luke LinVB 23:31  Mpámba té, sókó basálí bôngó na nzeté ebésu, ndébasálí bóníbóní na nzeté ekaúká ? »
Luke LinVB 23:32  Elongó na Yézu bakambí mpé bato basúsu bábalé, bayíbi banéne, mpô ya koboma bangó lokóla.
Luke LinVB 23:33  Ekómí bangó o ngómbá eye bakobéngaka ‘Ekwókóló’, babákí yě o kurúse, ná mpé bayíbi banéne bábalé, mǒkó o lobóko la yě la mobáli, mosúsu o lobóko la mwásí.
Luke LinVB 23:34  Yézu alobí : « Tatá, límbísá bangó ! Bayébí té níni bazalí kosála. » Na nsima bakabólání bilambá bya yě na bobéti zeké.
Luke LinVB 23:35  Bato baíké batélémí wâná, bazalákí kotála. Bakonzi batiólí yě, balobí : « Abíkísí bato basúsu ; ámíbíkisa sikáwa sókó azalí Krístu, óyo Nzámbe aponí ! »
Luke LinVB 23:36  Basodá mpé basekí yě ; áwa bayélí yě masanga ngai,
Luke LinVB 23:37  balobí : « Sókó ozalí mokonzi wa ba-Yúda, ómíbíkisa ! »
Luke LinVB 23:38  O eténi ya likoló ya kurúse babákí libáyá na maloba maye : ‘Oyo azalí mokonzi wa ba-Yúda.’
Luke LinVB 23:39  Mǒ kó wa bayíbi banéne babákémí o kúruse afíngí Yézu, alobí : « Yó ozalí Krístu té ? Bôngó ómíbíkisa, óbíkisa mpé bísó. »
Luke LinVB 23:40  Kasi mosúsu apálélí yě, alobí : « Yó ozalí ko­bánga Nzámbe té, áwa ozwí etúmbu lokóla yě ?
Luke LinVB 23:41  Bísó tozwí etúmbu na ntína, tozalí kofúta mabé tosálí ; kasi yě asálí mabé mǒkó té. »
Luke LinVB 23:42  Mpé alobí : « Yézu, kanísá ngáí ntángo okokóma o Bokonzi bwa yǒ. »
Luke LinVB 23:43  Yézu azóngísélí yě : « Nalobí na yǒ ya sôló, leló naíno okozala na ngáí elongó o paradízo. »
Luke LinVB 23:44  Ekómí penepene na midí, mwésé molímwí mpé likoló liíndí o mokili mobimba téé ngonga ya ísáto.
Luke LinVB 23:45  Ela­mbá enéne ya Témpelo epa­swání o káti.
Luke LinVB 23:46  Yézu agángí na mo­ngóngó makási : « Tatá, natíkí molímo mwa ngáí o mabóko ma yǒ. » Elobí yě bôngó, akátí motéma.
Luke LinVB 23:47  Ntángo komandá amóní maye masálémí, akúmísí Nzámbe, alobí : « Ntembe té, moto óyo azalákí moto sémba ! »
Luke LinVB 23:48  Baye bánso bayákí kotála wâná, áwa bamóní mánso masálémí, balakísí ’te bayókí mawa míngi mpé bazóngí ndáko.
Luke LinVB 23:49  Báníngá ba Yézu bánso batélémí mwâ mosíká, ná mpé básí balandákí yě út’o Galiléa, bazalákí kotála.
Luke LinVB 23:50  Moto mǒkó ayéí, nkómbó ’te Yozéfu, yě moto malámu mpé wa motéma bosémbo. Azalákí mǒkó wa likita lya Bakóló,
Luke LinVB 23:51  kasi andimákí mokáno mwa bangó té ná mpé maye basálákí. Yě moto wa Arimatéa, mbóka yǒ kó ya ba-Yúda. Azalákí kotía motéma na boyéi bwa Bokonzi bwa Nzámbe.
Luke LinVB 23:52  Akeí epái ya Piláto mpé aséngí nzóto ya Yézu.
Luke LinVB 23:53  Abákólí yangó o kurúse, azí­ngí yangó na elambá, atíí yangó o lilíta likátémí o mabángá, esíká bakundí naíno moto mǒkó té.
Luke LinVB 23:54  Ezalákí mokolo mwa boléngeli Eyenga, mokolo mwa sábato molingákí móbanda.
Luke LinVB 23:55  Básí baye baútákí na Yézu o Galiléa, balandákí Yozéfu, batálí lilíta mpé bamóní ndéngé níni batíí ebembe ya Yézu wâná.
Luke LinVB 23:56  Na nsima bazóngí o ndáko, baléngélí malási na mafúta ma bopakoli ma nsolo mpí­mbó. Mpé o mokolo mwa sábato bapémí, lokóla Mobéko motíndí.