LUKE
Chapter 23
Luke | LinVB | 23:2 | Babandí kofúnda yě, balobí : « Bísó tokútí moto óyo azalí kotombokisa bato o ekólo ya bísó. Azalí kopekisa bato kofúta mpáko ya Kaizáro, mpé akolobaka ’te azalí mokonzi-Mesíya. » | |
Luke | LinVB | 23:3 | Piláto atúní yě : « Ozalí mokonzi wa ba-Yúda ? » Yézu azóngísélí yě : « Olobí yangó. » | |
Luke | LinVB | 23:4 | Piláto alobí na banganga bakonzi mpé na bato basangání wâná : « Namóní ntína atâ yǒ kó té ya kokitisa moto óyo. » | |
Luke | LinVB | 23:5 | Kasi bangó baléndísí, balobí : « Na matéya ma yě azalí kotombokisa bato o Yudéa mobimba, út’o Galiléa téé áwa. » | |
Luke | LinVB | 23:7 | Awa ayókí ’te Yézu azalákí moto wa mokili mwa Eróde, atíndí yě epái ya Eróde ; yě mpé azalákí o Yerúzalem o mikolo mîná. | |
Luke | LinVB | 23:8 | Eróde asepélí míngi na bomóni Yézu. Ut’o kala alingákí komóno yě, zambí ayókákí nsango ya yě míngi. Azalákí na elíkyá ’te Yézu akosála likamwísi o míso ma yě. | |
Luke | LinVB | 23:11 | Eróde na basodá ba yě batúmólí yě, basekí yě, mpé balátísí yě monkóto mwa bokonzi ; na nsima bazóngísí yě epái ya Piláto. | |
Luke | LinVB | 23:14 | alobí na bangó : « Boyélí ngáí moto óyo, mpé bolobí ’te azalí kotombokisa bato, nzókandé o míso ma bínó natúní yě malámu, kasi o maye mánso bozalí kofúnda yě namóní ntína yǒkó té ya kokitisa moto óyo. | |
Luke | LinVB | 23:15 | Eróde mpé té, yangó wâná azóngísí yě áwa. Ezalí polélé ’te asálí likambo lyǒ kó té likokí na liwá. | |
Luke | LinVB | 23:18 | Kasi bangó bánso, monoko mǒkó, babandí kogánga : « Bomá moto óyo ! Tíkélá bísó Báraba ! » | |
Luke | LinVB | 23:22 | Mbala ya ísáto Piláto alobí na bangó : « Kasi mabé níni moto óyo asálí ? Ngáí nazwí yě na ntína yǒ kó té ya kokitisa yě o liwá. Bôngó nakobétisa yě fímbo, na nsima nakotíka yě. » | |
Luke | LinVB | 23:23 | Kasi na bogángi baléndísí kosénge ’te bábáka yě o kurúse, mpé mbala na mbala bagángí makási koleka libosó. | |
Luke | LinVB | 23:25 | Moto óyo akótókí o bolóko, zambí abimísákí mobúlú mpé abomákí moto, atíkí yě, lokóla baséngékí ; kasi akabí Yézu o mabóko ma bangó, lokóla bangó balingí. | |
Luke | LinVB | 23:26 | Ntángo bakeí na yě, bakangí Simóni wa Siréne, óyo aútí o bilanga ; batíndí yě na makási ámeme kurúse nsima ya Yézu. | |
Luke | LinVB | 23:28 | Yézu amíbóngólí epái ya bangó, alobí : « Bána básí ba Yerúzalem, bólela ngáí té, kasi bómílela bínó mǒkó, bólela mpé bána ba bínó ! | |
Luke | LinVB | 23:29 | Mpámba té, o mikolo mikoyâ bakoloba : Esengo na básí bikomba baye babótá té, mpé baye banúngísí mwána té ! | |
Luke | LinVB | 23:30 | O ntángo êná bakobanda koloba na ngómbá inéne : ‘Bókwêla bísó !’ mpé na ngómbá iké : ‘Bózipa bísó !’ | |
Luke | LinVB | 23:31 | Mpámba té, sókó basálí bôngó na nzeté ebésu, ndébasálí bóníbóní na nzeté ekaúká ? » | |
Luke | LinVB | 23:32 | Elongó na Yézu bakambí mpé bato basúsu bábalé, bayíbi banéne, mpô ya koboma bangó lokóla. | |
Luke | LinVB | 23:33 | Ekómí bangó o ngómbá eye bakobéngaka ‘Ekwókóló’, babákí yě o kurúse, ná mpé bayíbi banéne bábalé, mǒkó o lobóko la yě la mobáli, mosúsu o lobóko la mwásí. | |
Luke | LinVB | 23:34 | Yézu alobí : « Tatá, límbísá bangó ! Bayébí té níni bazalí kosála. » Na nsima bakabólání bilambá bya yě na bobéti zeké. | |
Luke | LinVB | 23:35 | Bato baíké batélémí wâná, bazalákí kotála. Bakonzi batiólí yě, balobí : « Abíkísí bato basúsu ; ámíbíkisa sikáwa sókó azalí Krístu, óyo Nzámbe aponí ! » | |
Luke | LinVB | 23:38 | O eténi ya likoló ya kurúse babákí libáyá na maloba maye : ‘Oyo azalí mokonzi wa ba-Yúda.’ | |
Luke | LinVB | 23:39 | Mǒ kó wa bayíbi banéne babákémí o kúruse afíngí Yézu, alobí : « Yó ozalí Krístu té ? Bôngó ómíbíkisa, óbíkisa mpé bísó. » | |
Luke | LinVB | 23:40 | Kasi mosúsu apálélí yě, alobí : « Yó ozalí kobánga Nzámbe té, áwa ozwí etúmbu lokóla yě ? | |
Luke | LinVB | 23:41 | Bísó tozwí etúmbu na ntína, tozalí kofúta mabé tosálí ; kasi yě asálí mabé mǒkó té. » | |
Luke | LinVB | 23:43 | Yézu azóngísélí yě : « Nalobí na yǒ ya sôló, leló naíno okozala na ngáí elongó o paradízo. » | |
Luke | LinVB | 23:44 | Ekómí penepene na midí, mwésé molímwí mpé likoló liíndí o mokili mobimba téé ngonga ya ísáto. | |
Luke | LinVB | 23:46 | Yézu agángí na mongóngó makási : « Tatá, natíkí molímo mwa ngáí o mabóko ma yǒ. » Elobí yě bôngó, akátí motéma. | |
Luke | LinVB | 23:47 | Ntángo komandá amóní maye masálémí, akúmísí Nzámbe, alobí : « Ntembe té, moto óyo azalákí moto sémba ! » | |
Luke | LinVB | 23:48 | Baye bánso bayákí kotála wâná, áwa bamóní mánso masálémí, balakísí ’te bayókí mawa míngi mpé bazóngí ndáko. | |
Luke | LinVB | 23:49 | Báníngá ba Yézu bánso batélémí mwâ mosíká, ná mpé básí balandákí yě út’o Galiléa, bazalákí kotála. | |
Luke | LinVB | 23:50 | Moto mǒkó ayéí, nkómbó ’te Yozéfu, yě moto malámu mpé wa motéma bosémbo. Azalákí mǒkó wa likita lya Bakóló, | |
Luke | LinVB | 23:51 | kasi andimákí mokáno mwa bangó té ná mpé maye basálákí. Yě moto wa Arimatéa, mbóka yǒ kó ya ba-Yúda. Azalákí kotía motéma na boyéi bwa Bokonzi bwa Nzámbe. | |
Luke | LinVB | 23:53 | Abákólí yangó o kurúse, azíngí yangó na elambá, atíí yangó o lilíta likátémí o mabángá, esíká bakundí naíno moto mǒkó té. | |
Luke | LinVB | 23:55 | Básí baye baútákí na Yézu o Galiléa, balandákí Yozéfu, batálí lilíta mpé bamóní ndéngé níni batíí ebembe ya Yézu wâná. | |