LUKE
Chapter 18
Luke | LinVB | 18:3 | Ezalákí mpé o mbóka êná mwásí akúfélí mobáli. Azalákí koyâ mbala míngi epái ya zúzi kobóndela yě : ‘Likambo nazwí na mongúná, kátélá ngáí lyangó na bosémbo !’ | |
Luke | LinVB | 18:4 | Mikolo míngí zúzi abóyí kondimela yě. Na nsima amílobélí : ‘Nakobángaka Nzámbe té, mpé nakomemyaka bato té, sôló, | |
Luke | LinVB | 18:5 | kasi mwásí óyo akúfélí mobáli azalí kotungisa ngáí míngi. Tíká nákátela yě likambo na bosémbo, sókí té akotíka kotungisa ngáí té !’ » | |
Luke | LinVB | 18:7 | Bôngó Nzámbe akolóngisa baponomi ba yě té sókó babóndélí yě butú mói ? Azilisa ndé kondimela bangó ? | |
Luke | LinVB | 18:8 | Nalobí na bínó ’te akolóngisa bangó nokí. Kasi mokolo Mwána wa Moto akoyâ akokúta ndé bato ba boyambi o mokili ? » | |
Luke | LinVB | 18:9 | Mpô ya bato bakokanisaka ’te bazalí bato ba bosémbo mpé bakokínolaka bato basúsu, alobí moúlání moye : | |
Luke | LinVB | 18:11 | Mo-Farizéo atélémí mpé asámbélí boye o motéma : ‘Mokonzi, natóndí yǒ, zambí nazalí lokóla bato basúsu té ; bazalí bayíbi mpé bakósi, bakokosálaka bokáli ; nazalí mpé lokóla mofútisi mpáko óyo té. | |
Luke | LinVB | 18:12 | Póso na póso nakolálaka nzala mbala íbalé, mpé nakotíkaka biténi bya zómi bya bilóko bya ngáí bínso.’ | |
Luke | LinVB | 18:13 | Mofútisi mpáko atélémí mwâ mosíká, abángí atâ kotómbola míso o likoló, akitísí motó o nsé, alobí : ‘E Nzámbe, yókélá ngáí mosúmuki mawa !’ | |
Luke | LinVB | 18:14 | Nalobí na bínó : Moto óyo wa nsima azóngí o ndáko na motéma sémba, mosúsu té ; zambí moto akomítómbola akokita, moto akomíkitisa akotómbwama. » | |
Luke | LinVB | 18:15 | Bayéí na bána baké mpenzá epái ya yě mpô ’te ásímba bangó. Bayékoli bamóní bôngó, bapekísí bangó. | |
Luke | LinVB | 18:16 | Kasi Yézu abéngí bangó epái ya yě, alobí : « Bótíka bána baké báyâ epái ya ngáí, bópekisa bangó té, zambí bato baúlání na bangó bakoyíngela o Bokonzi bwa Nzámbe. | |
Luke | LinVB | 18:17 | Ya sôló sôló, nalobí na bínó : Moto akoyamba Bokonzi bwa Nzámbe lokóla mwána moké té, akoyíngela wâná té. » | |
Luke | LinVB | 18:18 | Nkúmú mǒkó atúní yě : « Motéyi malámu, násála níni mpô ’te nákóma o bomoi bwa lobíko ? » | |
Luke | LinVB | 18:19 | Yézu alobí na yě : « Mpô níni obéngí ngáí moto malámu ? Moto mǒkó té azalí malámu, bobélé Nzámbe. | |
Luke | LinVB | 18:20 | Oyébí mibéko : Osála bokáli té, óboma moto té, óyíba té, ózala nzénénéké wa lokutá té, ómemya tatá na mamá. » | |
Luke | LinVB | 18:22 | Eyókí Yézu bôngó, alobí : « Sé mpô yǒkó ezángí yǒ : kendé kotéke bilóko bya yǒ bínso mpé kabélá babóla ; okozala na nkita enéne o likoló ; na nsima yáká mpé landá ngáí. » | |
Luke | LinVB | 18:24 | Emóní Yézu bôngó, alobí : « Bato bazalí na bilóko míngi, bakoyíngela o Bokonzi bwa Nzámbe bobélé na mpási. | |
Luke | LinVB | 18:25 | Mpô ’te mokulu mwa nsúki ya kaméla móleka o lilusú lya ntonga ezalí mpási sôló, kasi mpô ’te moto wa nkita áyíngela o Bokonzi bwa Nzámbe, elekí mpási. » | |
Luke | LinVB | 18:27 | Alobí na bangó : « bato bakokí na likambo liye té, sôló ; kasi likambo lyǒkó lilekí Nzámbe na bokási té. » | |
Luke | LinVB | 18:29 | Yézu alobí na bangó : « Ya sôló sôló, nalobí na bínó : moto atíkí ndáko, mwásí, bandeko, babóti tǒ bána ba yě mpô ya Bokonzi bwa Nzámbe, | |
Luke | LinVB | 18:31 | Na nsima abéngí ba-zómi na bábalé mpembéni, alobí na bangó : « Tozalí kokende o Yerúzalem. Mánso baproféta bakomí mpô ya Mwána wa Moto, makosálema. | |
Luke | LinVB | 18:34 | Kasi bangó batongólí mangó atâ moké té. O míso ma bangó maloba mangó mazalákí polélé sókí té ; maye alobákí, bayókí ntína ya mangó té. | |
Luke | LinVB | 18:35 | Ntángo Yézu akómí penepene na Yériko, moto akúfá míso afándí o mpembéni ya nzelá koséngeke makabo. | |
Luke | LinVB | 18:39 | Bato bazalákí kotámbola o libosó bapálélí yě, balobí ’te ákanga monoko ; kasi yě aléndísí kogánga makási : « Mwána wa Davídi, yókélá ngáí mawa ! » | |
Luke | LinVB | 18:42 | Yézu alobí na yě : « Omóno lisúsu ; boyambi bwa yǒ bobíkísí yǒ. » Mpé na mbala yǒ kó akómí komóno, alandí Yézu mpé akúmísí Nzámbe. | |