Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
LUKE
Prev Up Next
Chapter 18
Luke LinVB 18:1  Na moúlání mǒkó alakísí bangó ’te basengélí kosá­mbela ntángo ínso mpé bálembe té :
Luke LinVB 18:2  « Ezalákí o mbóka yǒkó zúzi mǒ­kó. Azalákí kobánga Nzámbe té, mpé komemya bato té.
Luke LinVB 18:3  Ezalákí mpé o mbóka êná mwásí akúfélí mobáli. Azalákí koyâ mbala míngi epái ya zúzi kobóndela yě : ‘Likambo nazwí na mongúná, kátélá ngáí lyangó na bosémbo !’
Luke LinVB 18:4  Mikolo míngí zúzi abóyí kondimela yě. Na nsima amílobélí : ‘Nakobá­ngaka Nzámbe té, mpé nakome­myaka bato té, sôló,
Luke LinVB 18:5  kasi mwásí óyo akúfélí mobáli azalí kotungisa ngáí míngi. Tíká nákátela yě likambo na bosémbo, sókí té akotíka kotungisa ngáí té !’ »
Luke LinVB 18:6  Mokonzi abakísí : « Bóyóka maloba ma zúzi óyo azángí bosémbo.
Luke LinVB 18:7  Bôngó Nzámbe akolóngisa baponomi ba yě té sókó babóndélí yě butú mói ? Azilisa ndé kondimela bangó ?
Luke LinVB 18:8  Nalobí na bínó ’te akolóngisa bangó nokí. Kasi mokolo Mwána wa Moto akoyâ akokúta ndé bato ba boyambi o mokili ? »
Luke LinVB 18:9  Mpô ya bato bakokanisaka ’te bazalí bato ba bosémbo mpé ba­kokínolaka bato basúsu, alobí moúlání moye :
Luke LinVB 18:10  « Bato bábalé bakeí kosámbela o Témpelo : mǒkó mo-Farizéo, mosúsu mofútisi mpáko.
Luke LinVB 18:11  Mo-Farizéo atélémí mpé asámbélí boye o motéma : ‘Mokonzi, natóndí yǒ, zambí nazalí lokóla bato basúsu té ; bazalí bayíbi mpé bakósi, bakokosálaka bokáli ; nazalí mpé lokóla mofútisi mpáko óyo té.
Luke LinVB 18:12  Póso na póso nakolálaka nzala mbala íbalé, mpé nakotíkaka biténi bya zómi bya bilóko bya ngáí bínso.’
Luke LinVB 18:13  Mofútisi mpáko atélémí mwâ mosíká, abángí atâ kotómbola míso o likoló, akitísí motó o nsé, alobí : ‘E Nzámbe, yókélá ngáí mosúmuki mawa !’
Luke LinVB 18:14  Nalobí na bínó : Moto óyo wa nsima azóngí o ndáko na motéma sémba, mosúsu té ; zambí moto akomítómbola akokita, moto akomíkitisa akotómbwama. »
Luke LinVB 18:15  Bayéí na bána baké mpenzá epái ya yě mpô ’te ásímba bangó. Bayékoli bamóní bôngó, bapekísí bangó.
Luke LinVB 18:16  Kasi Yézu abéngí bangó epái ya yě, alobí : « Bótíka bána baké báyâ epái ya ngáí, bópekisa bangó té, zambí bato baúlání na bangó bakoyíngela o Bokonzi bwa Nzámbe.
Luke LinVB 18:17  Ya sôló sôló, nalobí na bínó : Moto akoyamba Bokonzi bwa Nzámbe lokóla mwána moké té, akoyíngela wâná té. »
Luke LinVB 18:18  Nkúmú mǒkó atúní yě : « Motéyi malámu, násála níni mpô ’te nákóma o bomoi bwa lobíko ? »
Luke LinVB 18:19  Yézu alobí na yě : « Mpô níni obéngí ngáí moto malámu ? Moto mǒkó té azalí malámu, bobélé Nzámbe.
Luke LinVB 18:20  Oyébí mibéko : Osála bokáli té, óboma moto té, óyíba té, ózala nzénénéké wa lokutá té, ómemya tatá na mamá. »
Luke LinVB 18:21  Azóngísí : « Bandá bomwána nakotósaka mibéko mîná mínso. »
Luke LinVB 18:22  Eyókí Yézu bôngó, alobí : « Sé mpô yǒkó ezángí yǒ : kendé kotéke bilóko bya yǒ bínso mpé kabélá babóla ; okozala na nkita enéne o likoló ; na nsima yáká mpé landá ngáí. »
Luke LinVB 18:23  Eyókí yě maloba mâná, akómí na mawa míngi, zambí azalákí na bilóko ebelé.
Luke LinVB 18:24  Emóní Yézu bôngó, alobí : « Bato bazalí na bilóko míngi, bakoyí­ngela o Bokonzi bwa Nzámbe bobélé na mpási.
Luke LinVB 18:25  Mpô ’te mokulu mwa nsúki ya kaméla móleka o lilusú lya ntonga ezalí mpási sôló, kasi mpô ’te moto wa nkita áyíngela o Bokonzi bwa Nzámbe, elekí mpási. »
Luke LinVB 18:26  Baye bayókí yangó balobí : « Bô­ngó náni akokí kobíka ? »
Luke LinVB 18:27  Alobí na bangó : « bato bakokí na likambo liye té, sôló ; kasi likambo lyǒkó lilekí Nzámbe na bokási té. »
Luke LinVB 18:28  Na nsima Pétro alobí : « Tálá, bísó totíkí bínso mpô tólanda yǒ ! »
Luke LinVB 18:29  Yézu alobí na bangó : « Ya sôló sôló, nalobí na bínó : moto atíkí ndáko, mwásí, bandeko, babóti tǒ bána ba yě mpô ya Bokonzi bwa Nzámbe,
Luke LinVB 18:30  akozwa bilóko bilekí míngi áwa o nsé ; mpé na nsima akozwa bomoi bwa lobíko. »
Luke LinVB 18:31  Na nsima abéngí ba-zómi na bábalé mpembéni, alobí na bangó : « Tozalí kokende o Yerúzalem. Mánso baproféta bakomí mpô ya Mwána wa Moto, makosálema.
Luke LinVB 18:32  Bakokaba yě o mabóko ma bapagáno, bakoseke yě, bakofínga yě, bakobwákela yě nsóí,
Luke LinVB 18:33  bakobéte yě fímbo mpé bakoboma yě ; kasi nsima ya mikolo mísáto akosé­kwa. »
Luke LinVB 18:34  Kasi bangó batongólí mangó atâ moké té. O míso ma bangó maloba mangó mazalákí polélé sókí té ; maye alobákí, bayókí ntína ya mangó té.
Luke LinVB 18:35  Ntángo Yézu akómí penepene na Yériko, moto akúfá míso afándí o mpembéni ya nzelá koséngeke makabo.
Luke LinVB 18:36  Awa ayókí ’te bato míngi bazalákí koleka, atúní bato ntína ya yangó.
Luke LinVB 18:37  Bayébísí yě ’te Yézu wa Nazaréte azalákí koleka.
Luke LinVB 18:38  Bôngó agángí : « Yézu, Mwána wa Davídi, yókélá ngáí mawa ! »
Luke LinVB 18:39  Bato bazalákí kotá­mbola o libosó bapálélí yě, balobí ’te ákanga monoko ; kasi yě aléndísí kogánga makási : « Mwána wa Davídi, yókélá ngáí mawa ! »
Luke LinVB 18:40  Yézu atélémí mpé atíndí ’te báyâ na yě. Awa akómí penepene, Yézu atúní yě :
Luke LinVB 18:41  « Olingí násálisa yǒ na níni ? » Alobí : « Mokonzi, námóno lisúsu. »
Luke LinVB 18:42  Yézu alobí na yě : « Omóno lisúsu ; boyambi bwa yǒ bobíkísí yǒ. » Mpé na mbala yǒ kó akómí komóno, alandí Yézu mpé akúmísí Nzámbe.
Luke LinVB 18:43  Bato bánso bamóní bôngó, bakúmísí Nzámbe.