LUKE
Chapter 24
Luke | LinVB | 24:1 | O mokolo nsima ya sábato na ntá ntóngó, básí bakeí o lilíta na malási maye baléngélékí. | |
Luke | LinVB | 24:4 | Bakámwí na yangó míngi mpenzá, bato bábalé babimélí bangó, balátí bilambá bizalákí kongenge. | |
Luke | LinVB | 24:5 | Básí bayókí nsómo, bakitísí bilongi o nsé. Kasi bato balobí na bangó : « Mpô níni bozalí koluka o ntéi ya bawá moto azalí na bomoi ? | |
Luke | LinVB | 24:6 | Azalí áwa té, asílí asékwí ! Bókundola o mitéma maye alobákí na bínó ntángo azalákí naíno o Galiléa : | |
Luke | LinVB | 24:7 | Esengélí ’te Mwána wa Moto ákabama o mabóko ma basúmuki, ábákema o kurúse mpé ásékwa nsima ya mikolo mísáto. » | |
Luke | LinVB | 24:9 | Balongwí o lilíta, bakeí koyébisa mâná mánso na ba-zómi na mǒkó mpé na basúsu bánso. | |
Luke | LinVB | 24:10 | Ezalákí wâná : María wa Mágdala, ná Yoána, ná María mamá wa Yakóbo. Básí basúsu bazalákí elongó na bangó, bayébísí bapóstolo sé bôngó. | |
Luke | LinVB | 24:12 | Kasi Pétro akeí mbángu o lilíta. O ntángo agúmbámí, amóní sé bilambá. Azóngí epái ya yě, mpé akámwí míngi na maye masálémákí. | |
Luke | LinVB | 24:13 | Bobélé mokolo môná, bayékoli bábalé bazalákí kokende o mbóka yǒkó nkómbó ’te Emaús, mosíká na Yerúzalem kilométele zómi na mǒkó. | |
Luke | LinVB | 24:15 | Awa bazalákí kosolola mpé kotúnana bôngó, Yézu yěméí abelémí mpé akeí na bangó nzelá yǒ kó. | |
Luke | LinVB | 24:17 | Atúní bangó : « Makambo níni bozalí kosolola o nzelá boye ? » Bangó batélémí, elongi sé mawa mawa. | |
Luke | LinVB | 24:18 | Mǒ kó wa bangó, Kléofa, alobí na yě : « Bobélé yǒ mǒkó o Yerúzalem mobimba oyókí té makambo malekákí o mikolo miye ? » | |
Luke | LinVB | 24:19 | Atúní : « Makambo níni ? » Bazóngísí : « Maye makwêlákí Yézu wa Nazaréte. Azalákí proféta óyo alakísí ngúyá enéne na maloba mpé na bikelá o míso ma Nzámbe mpé ma bato bánso. | |
Luke | LinVB | 24:20 | Banganga bakonzi na bakóló ba bísó bakabí yě mpô ’te ákita o likambo lya liwá, mpé babákí yě o kurúse. | |
Luke | LinVB | 24:21 | Kasi bísó tozalákí na elíkyá ’te yě moto akobíkisa Israél. Nzókandé makambo maye masálémí mikolo mísáto milekí. | |
Luke | LinVB | 24:22 | Básí basúsu bazalí epái ya bísó bakámwísí bísó míngi. Na ntóngóntóngó bakendékí o lilíta, | |
Luke | LinVB | 24:23 | kasi bamóní nzóto ya yě té, mpé bayéí koyébisa bísó ’te bǎnzelú babimélákí bangó mpé bayébísákí bangó ’te azalí na bomoi. | |
Luke | LinVB | 24:24 | Bôngó bato ba bísó basúsu bakendékí o lilíta, bakútí lyangó sé lokóla básí balobákí ; kasi yě mpenzá, bamóní yě té. » | |
Luke | LinVB | 24:25 | Yézu alobí na bangó : « E bínó bato bozángí mayéle ! Makambo mánso baproféta balobáká bozalí kondima mangó sé malémbe malémbe ! | |
Luke | LinVB | 24:27 | Mpé alimbólélí bangó maye makomámí mpô ya yě o Minkandá Misántu mínso, bandá Móze téé baproféta bánso. | |
Luke | LinVB | 24:29 | Kasi babóndélí yě, balobí : « tíkala epái ya bísó, zambí mói mosílí mokití, mpé butú bobandí koínda. » Bôngó ayíngélí mpô átíkala epái ya bangó. | |
Luke | LinVB | 24:30 | Ntángo afándí na bangó o méza, akamátí límpa, asámbélí losámbo la bobenisi, abúkí lyangó mpé apésí bangó. | |
Luke | LinVB | 24:31 | Míso ma bangó mafungwání, mpé bamóní ’te ezalákí yě ; kasi yě alímwí o míso ma bangó. | |
Luke | LinVB | 24:32 | Balobání : « Mitéma mya bísó mikómákí móto móto té, ntángo azalákí kosolola na bísó o nzelá, mpé kolimbolela bísó Minkandá ? » | |
Luke | LinVB | 24:33 | Sé o ntángo êná batélémí mpé bazóngí o Yerúzalem. Bakútí ba-zómi na mǒkó basangání na báníngá ba bangó. | |
Luke | LinVB | 24:35 | Mpé bayékoli bábalé basolólí maye malekákí o nzelá, mpé bóníbóní bayébákí yě na bobúki límpa. | |
Luke | LinVB | 24:36 | Ntángo bazalákí naíno kosolola makambo mâná, Yézu ayéí kotéleme o ntéi ya bangó, alobí : « Bobóto na bínó ! » | |
Luke | LinVB | 24:38 | Kasi alobí na bangó : « Mpô níni bozalí koyóka nsómo boye, mpé kobéte ntembe o mitéma ? | |
Luke | LinVB | 24:39 | Táláni mabóko na makolo ma ngáí ; ezalí ngáí ! Bósímba ngáí mpé bótála : elímo azalí na nsuni mpé na minkúwa té, lokóla bozalí komóno ’te ngáí nazalí na yangó. » | |
Luke | LinVB | 24:41 | Bazalákí koyóka esengo enéne, kasi bakámwí mpenzá mpé bakokí kondima naíno té. Bôngó atúní bangó : « Bozalí na mwâ elóko ya kolía ? » | |
Luke | LinVB | 24:44 | Na nsima alobí na bangó : « Ntángo nazalákí elongó na bínó nasílí nayébísákí bínó : Maye mánso makomámí mpô ya ngáí o Mobéko mwa Móze, o minkandá mya baproféta mpé o Nzémbo ya Davídi, masengélí kosálema ! » | |
Luke | LinVB | 24:46 | Alobí na bangó : « Ekomámí ’te Krístu asengélí koyóka malózí mpé kosékwa o bawá nsima ya mikolo mísáto. | |
Luke | LinVB | 24:47 | O nkómbó ya yě bakosakola o bikólo bínso bandá o Yerúzalem ’te bato basengélí kobóngola mitéma mpô ya kozwa bolímbisi masúmu. | |
Luke | LinVB | 24:49 | Mpé ngáí moto nakotíndela bínó Oyo Tatá wa ngáí alakélákí. Yangó wâná bótíkala o mbóka eye téé mokolo bokozwa ngúyá ekoúta o likoló. » | |