LUKE
Chapter 21
Luke | LinVB | 21:1 | Atómbola míso boye, amóní bato ba nkita bazalákí kotía mosolo o sandúku ya mabonza o Témpelo. | |
Luke | LinVB | 21:3 | Alobí : « Nayébísí bínó ya sôló, mwásí óyo mobóla akúfélí mobáli alekí bangó bánso na bopési libonza, | |
Luke | LinVB | 21:4 | zambí bangó bánso balongólí sé ndámbo ya mosolo mosengélí na bangó té. Kasi mwásí óyo, atâ azalí kokélela, apésí mbóngo ínso isengélí na yě mpô ya kolía. » | |
Luke | LinVB | 21:5 | Awa basúsu bazalákí koloba ’te Témpelo ekémbámí na mabángá kitóko mpé na bilóko bibonzámákí, Yézu alobí na bangó : | |
Luke | LinVB | 21:6 | « Ya biye bozalí komóno, mokolo mosúsu libángá lyǒ kó likotíkala likoló lya libángá lisúsu té ; bínso bikobúkana nyé. » | |
Luke | LinVB | 21:7 | Bôngó batúní yě : « Motéyi, ekosálema ndé ntángo níni ? Elembo níni ekoyébisa bísó ’te elingí ésálema ? » | |
Luke | LinVB | 21:8 | Alobí : « Bókéba ’te bákósa bínó té. Mpô bato baíké bakokósa ’te bayéí o nkómbó ya ngáí, bakoloba ’te ‘Krístu ngáí óyo ! Eleko ekómí penepene !’. Bólanda bangó té. | |
Luke | LinVB | 21:9 | Mokolo bokoyóka nsango ya bitumba mpé ya mobúlú, bóbánga té. Yangó esengélí kosálema libosó, kasi nsúka mpenzá ekoyâ nokí té. » | |
Luke | LinVB | 21:10 | Alobí mpé na bangó : « Ekólo yǒkó ekobunda na ekólo esúsu, bato ba mokili mǒkó bakobunda na mokili mosúsu. | |
Luke | LinVB | 21:11 | Mokili mokoningana makási, bipái bisúsu nzala mpé makono makongala. Bakomóno makambo ma nsómo o nsé mpé bilembo binéne biye bikoúta o likoló. | |
Luke | LinVB | 21:12 | Kasi libosó lya mâná mánso, bakokanga bínó, bakonyókolo bínó, bakosámbisa bínó o sinagóga mpé bakokanga bínó o bolóko. Bakokamba bínó o bosó bwa bayángeli mpé bakonzi mpô ya Nkómbó ya ngáí. | |
Luke | LinVB | 21:15 | zambí ngáí mǒkó nakolobisa bínó mpé nakopésa bínó bwányá, bôngó mongúná atâ mǒkó té akokoka bínó tǒ akobóya kondimela bínó. | |
Luke | LinVB | 21:16 | Atâ tatá na mamá wa bínó, bandeko, bato ba libótá ná mpé báníngá ba bínó, bakofúnda bínó, bakosála ’te báboma basúsu o ntéi ya bínó. | |
Luke | LinVB | 21:20 | Mokolo bokomóno ’te Yerúzalem ezíngámí na mampingá ma basodá, bóyéba ’te nsúka ya mbóka ekómí penepene. | |
Luke | LinVB | 21:21 | Bato bakozala o Yudéa o ntángo êná, bákíma o ngómbá ; baye bakozala o káti ya mbóka, bálongwa, baye bakozala o bilanga, bázónga o mbóka té. | |
Luke | LinVB | 21:23 | Mawa na básí bakozala na zémi mpé na baye bakonúngisa bána mabéle o mikolo mîná ! Ya sôló, mpási enene ekokwêla mokili, mpé bakoyókela bato ba ekólo eye nkándá. | |
Luke | LinVB | 21:24 | Bakoboma bato na mimpánga, bakokende na basúsu bǒ baómbo o bikólo bisúsu. Bapagáno bakonyata Yerúzalem téé eleko ya bapagáno ekosíla. | |
Luke | LinVB | 21:25 | Bilembo bikomónono o mwésé, o sánzá mpé o minzóto. O nsé nsómo ekokwêla bato ba bikólo bínso ; bakobánga lokitó la mbóngé ya mbú. | |
Luke | LinVB | 21:26 | Bato bakowá na nsómo na bobángi makambo malingí mákwêla mokili mobimba, zambí ngúyá ínso o likoló ikoningana. | |
Luke | LinVB | 21:28 | O ntángo makambo mâná makobanda, bótéleme mpé bótómbola mitó, zambí libíkí lya bínó likómí penepene. » | |
Luke | LinVB | 21:31 | Sé bôngó, ntángo bokomóno makambo maye, bóyéba ’te Bokonzi bwa Nzámbe bolingí bóyâ. | |
Luke | LinVB | 21:32 | Ya sôló sôló, nalobí na bínó : bato bazalí sikáwa ndébawéí naíno té libosó ’te maye mánso másálema. | |
Luke | LinVB | 21:34 | Bózala na bokéngi mpô ’te mitéma mya bínó míbéba té na mobúlú mwa bolángwi víno mpé na bomítungisi na makambo ma mokili. Mbele mambí ma mokolo môná makokwêla bínó | |
Luke | LinVB | 21:36 | Bôngó bókéngele mpé bósámbela ntángo ínso mpô ’te bózala na makási ma kokíma mánso masengélí koyâ, mpé bókoka kopika mpéndé o míso ma Mwána wa Moto. » | |
Luke | LinVB | 21:37 | Na mói azalákí kotéya o Témpelo, kasi na butú azalákí o libándá, o ngómbá eye bakobéngaka ‘ya Olíva’. | |