Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
LUKE
Prev Up Next
Chapter 10
Luke LinVB 10:1  Na nsima Yézu aponí bato basúsu ntúkú nsambo na bábalé, atíndí bangó bábalé bábalé bákende libosó lya yě o mbóka mpé o bisíká bínso asengélí kokende.
Luke LinVB 10:2  Alobí na bangó : « Mbuma itó­ndí o elanga, kasi basáli bazalí míngi té. Bôngó bóbóndela Nkóló wa elanga átínda basáli bákende bobúka mbuma.
Luke LinVB 10:3  Bókende ! Ngáí natí­ndí bínó lokóla mpatá o káti ya nkoi.
Luke LinVB 10:4  Bómeme líbenga té, sáki té, mapápa té. O nzelá bópésa moto mǒkó losáko té.
Luke LinVB 10:5  Atâ o ndáko níni boyíngélí, bóloba libosó : ‘Bobóto na ndáko eye !’
Luke LinVB 10:6  Sókó moto wa bobóto azalí wâná, bobóto bwa bínó bokozala na yě ; sókí té, bobóto bokozóngela bínó.
Luke LinVB 10:7  Bófánda bobélé o ndáko êná, bólía mpé bómele bilóko bakolámbela bínó, zambí ebongí ’te mosáli ázwa lifúta lya yě. Bókóto o ndáko ya bato bikótélá té.
Luke LinVB 10:8  Sókó bokómí o mbóka yǒkó mpé bayambí bínó malámu, bólía bilóko bakopésa bínó,
Luke LinVB 10:9  bóbíkisa bato ba bokono bazalí wâná, mpé bóloba na bangó : ‘Bokonzi bwa Nzámbe bokómí penepene’.
Luke LinVB 10:10  Kasi sókó bokómí o mbóka esíká bayambí bínó té, bókende o balabála mpé bóloba :
Luke LinVB 10:11  ‘Atâ mputulú ya mbóka ya bínó ekangémí o makolo ma bísó, tokopupola yangó, tokotíkela bínó ; nzókandé bóyéba ’te Bokonzi bwa Nzámbe bokómí penepene’.
Luke LinVB 10:12  Nalobí na bínó : O Mokolo môná bato ba mbóka eye bakozwa etúmbu ekoleka etúmbu bakopésa bato ba Sódoma.
Luke LinVB 10:13  Mawa na yó Korazin, mawa na yó Betsáida ! Mpámba té, sókó o Tíro mpé o Sidóni makamwísi masálémákí lokóla maye masálémí epái ya bínó, mbele balátákí ngóto kala, mpé bakendékí kofánda o mputulú mpô ya kolakisa ’te babóngólí mitéma.
Luke LinVB 10:14  Ya sôló, o Mokolo bakokáta makambo ma bato bánso, etúmbu bakozwa ekoleka etúmbu bakopésa Tíro na Sidóni.
Luke LinVB 10:15  Mpé yó Kafárnaum, okanísí ’te okotómbwama kín’o likoló ? Okokita kín’o límfelo.
Luke LinVB 10:16  Moto akoyóka bínó, akoyóka ngáí ; moto akobóya bínó, akobóya ngáí ; mpé moto akobóya ngáí, akobóya Oyo atíndí ngáí. »
Luke LinVB 10:17  Bayékoli ntúkú nsambo na bábalé bazóngí ; bayókí esengo enéne, balobí : « Mokonzi, atâ bazábolo bakotósaka bísó mpô ya nkómbó ya yǒ ! »
Luke LinVB 10:18  Yézu alobí na bangó : « Namónókí Sátana akwéí út’o likoló lokóla monkalali.
Luke LinVB 10:19  Yangó wâná napésí bínó likokí lya konyata nyóka, nkotó ná ngúyá ínso ya Móngúná na makolo ; elóko yǒkó ekokoka kosála bínó mabé té.
Luke LinVB 10:20  Nzókandé bósepela té zambí bilímo bizalí kotósa bínó, kasi bósepela zambí nkómbó ya bínó ikomámí o likoló. »
Luke LinVB 10:21  Bobélé o ngonga ênáméí atóndí na Elímo Sántu, mpé agángí na esengo enéne : « Natóndí yǒ, Tatá, Mokonzi wa likoló na nsé, zambí obó­mbélí na bato ba bwányá mpé baye ba mayéle maye oyebisi bato baké. Sôló, Tatá, yǒ mǒkó olingákí bôngó.
Luke LinVB 10:22  Tatá wa ngáí apésí ngáí mánso. Moto mǒkó té ayébí Mwána, bobélé Tatá ayébí yě. Mpé moto mǒkó té ayébí Tatá, bobélé Mwána ayébí yě, ná mpé moto óyo Mwána alingí koyébisa yě. »
Luke LinVB 10:23  Na nsima amíbóngólí epái ya bayékolí ba yě, mpé alobí bobélé na bangó : « Esengo na bato bakomóno na míso maye bínó bozalí komóno.
Luke LinVB 10:24  Nalobí na bínó : Baproféta na bako­nzi baíké balingákí komóno mambí bínó bozalí komóno, kasi bamónókí mangó té ; balingákí koyóka maloba bínó bozalí koyóka, kasi bayókákí mangó té ! »
Luke LinVB 10:25  Mpé tálá, motéyi mǒkó wa Mobéko atélémí, mpô ya komeka yě atúní yě : « Motéyi, násála níni mpô názwa bomoi bwa lobíko ? »
Luke LinVB 10:26  Yézu azóngísélí yě : « O búku ya Mobéko bakomí níni ? Okotángaka níni kúná ? »
Luke LinVB 10:27  Moto ôná ayanólí : « Olinga Mokonzi Nzámbe wa yǒ na motéma mwa yǒ mobimba, na bomoi bwa yǒ mobimba, na makási ma yǒ mánso, mpé na mayéle ma yǒ mánso ; mpé ólinga móníngá lokóla okomílingaka. »
Luke LinVB 10:28  Yézu alobí : « Oya­nólí malámu, sálá sé bôngó mpé okozala na bomoi. »
Luke LinVB 10:29  Kasi yě alingí komílóngisa, bôngó atúní Yézu : « Náni azalí móníngá wa ngáí ? »
Luke LinVB 10:30  Yézu azóngísí : « Moto mǒkó alongwákí o Yerúzalem mpô ya kokende o Yériko, kasi o nzelá bayíbi bakangí yě, babótólí yě bilóko, babétíbétí yě mpé batíkí yě mǒkó kobunda na mpási ya liwá.
Luke LinVB 10:31  Nganga Nzámbe mǒkó alekí o nzelá êná, amóní yě, kasi akátísí ngámbo ya balabála mpé alekí.
Luke LinVB 10:32  Sé bôngó mo-Lévi mǒkó ayéí o esíká êná, amóní yě, kasi akátísí ngámbo ya balabála mpé alekí.
Luke LinVB 10:33  Mo-Samaría mǒkó azalákí na mobémbo, akómí penepene na yě, amóní yě mpé ayókélí yě mawa.
Luke LinVB 10:34  Abelémí na yě, akangí mpótá ya yě, asopélí yangó mafúta na víno ; na nsima abutísí yě o mpúnda ya yě, akeí kotíka yě o ndáko ya bampaya, mpé asálísí yě malámu.
Luke LinVB 10:35  Mokolo mwa nsima na ntóngó abimísí denário íbalé, apésí nkóló wa ndáko, alobí na yě : ‘Sálísá yě malámu ! Mosolo mosúsu okobimisa naíno, ngáí mǒkó nakozóngisela yǒ mwa­ngó o ntángo nakozónga.’
Luke LinVB 10:36  Okanísí níni : O ntéi ya bangó básáto náni amílakísí móníngá wa moto óyo akwéyákí o mabóko ma bayíbi ? »
Luke LinVB 10:37  Motéyi wa Mobéko azóngísí : « Oyo ayókélí yě ngolu. » Yézu alobí na yě : « Kendé, yǒ mpé sálá sé bôngó. »
Luke LinVB 10:38  Ezalákí bangó kokende, Yézu ayíngélí o mbóka yǒkó. Mwásí mǒkó, nkómbó ’te Márta, ayambí yě o ndáko ya yě.
Luke LinVB 10:39  Azalákí na ndeko mwásí nkómbó ’te María. María ayéí kofánda pene na makolo ma Mokonzi mpô ya koyóka maloba ma yě.
Luke LinVB 10:40  Márta azalákí komípésa na mosálá mwa kolámba. Ayéí kotúna Yézu : « Mokonzi, ondimí sôló ’te ndeko wa ngáí atíkélí ngáí misálá mínso ? Lobá na yě ’te ásálisa ngáí. »
Luke LinVB 10:41  Kasi Mokonzi azóngísélí yě : « Márta, Márta, ozalí komítungisa mpé komíyókisa mpási na makambo maíké.
Luke LinVB 10:42  Nzókandé sé likambo lyǒkó lizalí na ntína enéne. María aponí eye elekí malámu, mpé bakobótolo yě yangó té. »