LUKE
Chapter 22
Luke | LinVB | 22:2 | Banganga bakonzi na batéyi ba Mobéko bazalákí koluka nzelá ya koboma Yézu, zambí bazalákí kobánga bato. | |
Luke | LinVB | 22:3 | Nzókandé Sátana akótí o motéma mwa Yudási, óyo bakobéngaka Iskarióte, mǒkó wa ba-zómi na bábalé. | |
Luke | LinVB | 22:4 | Akeí koyókana na banganga bakonzi mpé na bayángeli ba bakéngeli ba Témpelo bóníbóní akokaba yě o mabóko ma bangó. | |
Luke | LinVB | 22:6 | Yudási andimí mpé abandí koluka nzelá ebongí na bokabi Yézu o mabóko ma bangó, mpô ’te bato bánso báyéba yangó té. | |
Luke | LinVB | 22:8 | Yézu atíndí Pétro na Yoáne, alobí : « Bókende koléngelele bísó limpáti lya Pásiká, tólía lyangó. » | |
Luke | LinVB | 22:10 | Alobí na bangó : « Sókó bokómí o mbóka, bokokúta moto mǒkó amemí mbéki ya mái o motó ; bólanda yě kín’o ndáko akokóto, | |
Luke | LinVB | 22:11 | mpé bóloba na nkóló wa ndáko : ‘Motéyi atúní yǒ : Esíká níni nakokí kolía limpáti lya Pásiká elongó na bayékoli ba ngáí ?’ | |
Luke | LinVB | 22:12 | Akolakisa bínó eténi enéne o mokili mwa ndáko, eye babongísí malámu ; bóléngele bínso kúná. » | |
Luke | LinVB | 22:15 | alobí na bangó : « Nayókí mpósá míngi ya kolía Pásiká eye elongó na bínó libosó ’te náyóka mpási. | |
Luke | LinVB | 22:16 | Nalobí na bínó : Nakolía yangó lisúsu té téé mokolo Pásiká eye ekokokisama o Bokonzi bwa Nzámbe. » | |
Luke | LinVB | 22:17 | Na nsima akamátí nkéni, atóndí Nzámbe, alobí : « Kamátáni, bómele yangó bínó bánso. | |
Luke | LinVB | 22:19 | Na nsima akamátí límpa, atóndí Nzámbe, abúkí lyangó, apésí bayékoli, alobí : « Eye ezalí Nzóto ya ngáí ekokabama mpô ya bínó. Bósálaka bôngó mpô ya kokanisa ngáí. » | |
Luke | LinVB | 22:20 | Esílísí bangó kolía, akamátí mpé nkéni, alobí : « Nkéni eye ezalí nkéni ya Bondeko bwa Sika ya makilá ma ngáí, makosopana mpô ya bínó. » | |
Luke | LinVB | 22:25 | Alobí na bangó : « Bakonzi ba nsé bakotíndaka bato ba bangó bitíndá, mpé baye bakoyángelaka bangó balingí ’te bátángema bato balámu. | |
Luke | LinVB | 22:26 | Kasi bínó bósálaka bôngó té. Oyo alekí bonéne ámíkómisa lokóla mwána ; óyo azalí moyángeli ámíkómisa lokóla mosáleli. | |
Luke | LinVB | 22:27 | Náni alekí bonéne : óyo afándí o méza, tǒ óyo azalí kosálela yě ? Ezalí té óyo afándí o méza ? Kasi ngáí nazalí o ntéi ya bínó lokóla mosáleli ! | |
Luke | LinVB | 22:30 | mpô ’te bólía mpé bómele o méza ma Bokonzi bwa ngáí, mpé bófánda o ngwendé mpô ya kosámbisa mabótá zómi na mábalé ma Israél. | |
Luke | LinVB | 22:31 | Simóni, Simóni, yébá ’te Sátana aséngí ’te áyongela bínó lokóla bakoyongeleke fufú. | |
Luke | LinVB | 22:32 | Kasi ngáí nasámbélélí yǒ, mpô ’te boyambi bwa yǒ bólembe té. Bôngó, sókó osílí obóngólí motéma, léndísáká bandeko ba yǒ. » | |
Luke | LinVB | 22:34 | Kasi Yézu azóngísí : « Pétro, nayébísí yǒ : Leló libosó ’te nsósó élela, okowángana mbala ísáto ’te oyébí ngáí. » | |
Luke | LinVB | 22:35 | Na nsima alobí na bangó : « Ntángo natíndákí bínó, mpé bozalákí na líbenga lya mosolo té, sáki té, sapáto té, bozángákí ndé elóko ? » Bazóngísí : « Elóko té ! » | |
Luke | LinVB | 22:36 | Alobí na bangó : « Kasi sikáwa, óyo azalí na líbenga lya mosolo, ákamata lyangó ; sé bôngó óyo azalí na sáki ya kotía bilóko bya kolía ; óyo azalí na mompánga té, átéke monkóto mwa yě mpô ya kosómba mompánga. | |
Luke | LinVB | 22:37 | Nalobí na bínó : Ngáí nasengélí kokokisa maye makomámí o Minkandá Misántu : Batíí yě o molongó mwa bato babé. Ya sôló, maye matálí ngáí, malingí másálema. » | |
Luke | LinVB | 22:38 | Bangó balobí : « Mokonzi, tálá tozalí na mimpánga míbalé áwa. » Ayanólí bangó : « Ekokí bôngó ! » | |
Luke | LinVB | 22:41 | Alongwí epái ya bangó mpé akeí mosíká lokóla ntáká bakobwákaka libángá. Afukámí mpé asámbélí : | |
Luke | LinVB | 22:42 | « Tatá, sókó olingí, longólá nkéni eye epái ya ngáí. Nzókandé ésálema té lokóla ngáí nalingí, kasi lokóla yǒ olingí ! » | |
Luke | LinVB | 22:44 | Awa abandí koyóka nsómo ya liwá, aléndísí naíno kosámbela. Mitoki mya yě mikómí lokóla matangá manéne ma makilá, matangí o nsé. | |
Luke | LinVB | 22:45 | Atélémí, atíkí losámbo. Ntángo akómí epái ya bayékoli, akútí bangó balálí mpongí mpô ya mawa. | |
Luke | LinVB | 22:46 | Alobí na bangó : « Bozalí ndé kolála mpongí ? Bótéleme mpé bósámbela mpô ’te bóndima masénginyá té. » | |
Luke | LinVB | 22:47 | Ezalákí yě naíno koloba, bato ebelé bayéí. Yudási, mǒkó wa ba-zómi na bábalé, akambí bangó ; abelémí na Yézu mpô ya kozínga yě ekópi. | |
Luke | LinVB | 22:49 | Ntángo baye bazíngí yě bamóní maye malingí másálema, balobí : « Mokonzi, tóbéte bangó na mompánga ? » | |
Luke | LinVB | 22:51 | Kasi Yézu alobí : « Tíká kosála bôngó ! » Asímbí litói lya moto ôná mpé abíkísí yě. | |
Luke | LinVB | 22:52 | Na nsima alobí na baye bayéí kobimela yě, banganga bakonzi, bayángeli ba bakéngeli ba Témpelo mpé bakóló : « Nazalí ndé moyíbi ’te bóbimela ngáí na mimpánga mpé na mángénda ? | |
Luke | LinVB | 22:53 | Mokolo na mokolo nazalákí na bínó o Témpelo, mpé bokangákí ngáí té. Kasi ngonga ya bínó ekokí, ngonga ya mokonzi wa molílí. » | |
Luke | LinVB | 22:54 | Bakangí yě mpé bakeí na yě o ndáko ya nganga mokonzi, esíká bakótísí yě. Pétro alandí mwâ mosíká. | |
Luke | LinVB | 22:55 | Bapelísákí móto o káti ya lopángo. Pétro akeí kofánda o káti ya bato bafándí penepene na móto. | |
Luke | LinVB | 22:56 | Mosáleli mwásí mǒkó amóní yě afándí penepene na móto mozalí kobutisa miloli. Atálí yě swíí, alobí : « Oyo mpé azalákí na yě ! » | |
Luke | LinVB | 22:58 | Mwâ moké nsima, moto mosúsu amóní yě, alobí : « Yǒ mpé ozalí mǒkó wa bangó ! » Pétro alobí : « Té, tatá, ngáí té. » | |
Luke | LinVB | 22:59 | Sókí nsima ya ngonga yǒ kó, mosúsu aléndísí koloba : « Ya sôló, moto óyo azalákí na yě, kútu azalí mo-Galiléa. » | |
Luke | LinVB | 22:60 | Kasi Pétro azóngísí : « Ndeko, nayébí té níni ozalí koloba. » Naíno asílísí koloba té, nsósó elelí. | |
Luke | LinVB | 22:61 | Mokonzi amíbóngólí mpé atálí Pétro. Sikáwa Pétro akundólí o motéma maloba Yézu alobákí na yě : « Leló, libosó ’te nsósó élela, okowángana ngáí mbala ísáto. » | |
Luke | LinVB | 22:64 | Bazipí elongi ya yě na elambá mpé batúní yě : « Proféta, yébísá bísó náni abétí yǒ ! » | |
Luke | LinVB | 22:66 | Etání ntóngó, bakóló ba mbóka basangání likita elongó na banganga bakonzi mpé na batéyi ba Mobéko. Bakeí na yě o esámbi | |
Luke | LinVB | 22:67 | mpé balobí na yě : « Yébísá bísó sókó ozalí Krístu. » Azóngísí : « Atâ nayébísí bínó, bokondima té, | |
Luke | LinVB | 22:69 | Kasi bandá leló bokomóno Mwána wa Moto afándí o lobóko la mobáli la Nzámbe wa bokási ! » | |
Luke | LinVB | 22:70 | Bánso balobí : « Bôngó ozalí Mwáná wa Nzámbe ? » Ayébísí bangó : « Bosílí bolobí, ezalí ngáí. » | |