ACTS
Chapter 25
Acts | LinVB | 25:3 | ’te ándimela bangó mpô ya likambo lya Pólo, bôngó átínda yě o Yerúzalem ; bazalákí sé kokána kotíela yě motámbo mpô ’te báboma yě o nzelá. | |
Acts | LinVB | 25:4 | Kasi Fésto azóngísélí bangó ’te Pólo asengélí kotíkala o bolóko o Sezaréa, esíká yě mǒkó alingí kokende sikáwa. | |
Acts | LinVB | 25:5 | Alobí : « Bankúmú ba bínó bákende na ngáí nzelá yǒ kó, bôngó sókó moto óyo asálí mabé, báfúnda yě kúná. » | |
Acts | LinVB | 25:6 | Fésto afándí mikolo mwambe tǒ zómi epái ya bangó, na nsima azóngí o Sezaréa ; etání ntóngó, afándí o esámbi mpé atíndí ’te báyâ na Pólo. | |
Acts | LinVB | 25:7 | Ntángo Pólo ayéí, ba-Yúda baútákí o Yerúzalem bazíngí yě, mpé bafúndí yě na makambo manéne maíké, kasi bakokí kolakisa té ’te makambo mâná mazalí ma sôló. | |
Acts | LinVB | 25:8 | Pólo asámbí, alobí : « Nazalí na likambo lyǒ kó té : nabúkí Mobéko mwa ba-Yúda té, nasántólí Témpelo té, natúkí Kaizáro té. » | |
Acts | LinVB | 25:9 | Fésto alingí kosepelisa ba-Yúda, yangó wâná alobí na Pólo : « Ondimí kokende o Yerúzalem, bákáta likambo lya yǒ kúná o míso ma ngáí ? » | |
Acts | LinVB | 25:10 | Kasi Pólo ayanólí : « Natélémí áwa o esámbi ya Kaizáro, basengélí kosámbisa ngáí áwa. Nasálí ba-Yúda mabé mǒkó té, oyébí yangó malámu. | |
Acts | LinVB | 25:11 | Sókó nasálí mabé, sókó nazalí na likambo likokí na etúmbu ya liwá, nabóyí kokúfa té. Kasi sókó makambo maye bafúndí ngáí na mangó, mazalí ma sôló té, moto mǒkó té akokí kokaba ngáí o mabóko ma bangó. Naséngí ’te Kaizáro yě mǒkó ákáta likambo lya ngáí ! » | |
Acts | LinVB | 25:12 | Esílísí Fésto kosolola na balaki ba yě, ayanólí Pólo : « Oséngí ’te Kaizáro ákáta likambo lya yǒ, okokende o mbóka Kaizáro. » | |
Acts | LinVB | 25:13 | Nsima ya mwâ mikolo mokonzi Agrípa na Bereníse bakómí o Sezaréa, bayéí kopésa Fésto mbóte. | |
Acts | LinVB | 25:14 | Baúmélí kúná mwâ mikolo mpé Fésto alimbólélí mokonzi likambo lya Pólo, alobí : « Felíkisi atíkákí moto mǒkó áwa o bolóko. | |
Acts | LinVB | 25:15 | Ntángo nazalákí o Yerúzalem banganga bakonzi na bakóló ba ba-Yúda bayákí kofúnda yě, baséngékí ngáí ’te nákitisa yě o likambo. | |
Acts | LinVB | 25:16 | Nazóngísélí bangó ’te ba-Róma bakokitisaka moto o likambo té, sókó libosó basámbísí yě té o míso ma bato bafúndí yě, mpé sókó azwí nzelá ya komílóngisa té. | |
Acts | LinVB | 25:17 | Bôngó bayéí áwa na ngáí nzelá yǒ kó ; nalekísí ntángo té, mpé bobélé mokolo mwa nsima nafándí o esámbi mpé natíndí ’te báyâ na moto ôná. | |
Acts | LinVB | 25:18 | Ntángo bato baye bafúndí yě bazíngí yě, babimísí likambo lyǒ kó té, liye nakanísákí ’te likokí kokotisa yě. | |
Acts | LinVB | 25:19 | Bazalákí sé kowélana mwâ ntembe mpô ya mambí ma eyamba ya bangó mpé mpô ya moto mǒkó nkómbó ’te Yézu óyo akúfá, nzókandé Pólo alobí ’te azalí na bomoi. | |
Acts | LinVB | 25:20 | Ngáí nakokákí kokáta likambo lya ndéngé eye té, yangó wâná natúní yě sókó alingí kokende o Yerúzalem, bákáta likambo lya yě kúná. | |
Acts | LinVB | 25:21 | Kasi Pólo aséngí ’te Kaizáro moto ákáta likambo lya yě. Bôngó natíndí ’te ákangema kín’o mokolo nakotínda yě o mbóka Kaizáro. » | |
Acts | LinVB | 25:22 | Agrípa alobí na Fésto : « Ngáí mpé nalingí koyóka moto óyo. » Fésto azóngísí : « Okoyóka yě lóbí. » | |
Acts | LinVB | 25:23 | Etání ntóngó, Agrípa na Bereníse bayéí na lipombó linéne mpé bakótí o esíká bakosámbisaka bato, elongó na bakonzi ba basodá mpé na bankúmú ba engumbá. Fésto atíndí ’te báyâ na Pólo, | |
Acts | LinVB | 25:24 | mpé alobí : « Mokonzi Agrípa, mpé bínó bánso bozalí áwa elongó na bísó, táláni moto óyo ; ba-Yúda bánso bayákí kofúnda yě epái ya ngáí, o Yerúzalem mpé áwa ; bazalákí kogánga makási ’te asengélí kokúfa. | |
Acts | LinVB | 25:25 | Nzókandé nazwí yě na likambo lyǒ kó té likokí na etúmbu ya liwá ; kasi yě mǒkó aséngí ’te mokonzi monéne ákáta likambo lya yě, bôngó nakání kotínda yě kúná. | |
Acts | LinVB | 25:26 | Kasi nayébí té níni nakokí kokomela mokonzi monéne mpô ya yě. Yangó wâná nabimísí yě áwa o míso ma bínó, mpé o míso ma yǒ, mokonzi Agrípa, mpô ’te bótúna yě, bôngó náyéba níni nákomela mokonzi monéne. | |