Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ACTS
Prev Up Next
Chapter 17
Acts LinVB 17:1  Ekátísí bangó Amfípolis na Apolónia, bakómí o Tesaloníki, esíká ezalákí sinagóga ya ba-Yúda.
Acts LinVB 17:2  Pólo asálí sé lokóla ameséní, akeí kotála bangó ; sábato ísáto asolólí na bangó mambí ma Bikomá Bisántu.
Acts LinVB 17:3  Alimbólélí bangó Minkandá mpé alakísí ’te Krístu ase­ngélákí koyóka mpási mpé kosékwa o bawá, mpé abakísí : « Krístu, yě ndé Yézu óyo nazalí kosangela bínó. »
Acts LinVB 17:4  Basúsu o ntéi ya bangó bayambí mpé bandimí kolanda Pólo na Síla ; ba-Gréki baye bakokúmisaka Nzámbe ná mpé básí baíké ba lokúmu balandí bangó lokóla.
Acts LinVB 17:5  Kasi ba-Yúda bayókí zúwa, mpé na lisálisi lya bato babé baye bakotelenganaka o balabála, basa­ngísí bato míngi mpé babimísí mobúlú o engumbá. Bakeí o ndáko ya Yasón koluka Pólo na Síla mpô ’te básámbisa bangó o likita lya bato ba mbóka.
Acts LinVB 17:6  Awa bamóní Pólo na Síla té, babéndí Yasón na bandeko ba yě basúsu o bosó bwa bakonzi, bagángí : « Bato baye bakobimisaka mobúlú o mokili mobimba bakómí áwa.
Acts LinVB 17:7  Yasón moto ayambí bangó epái ya yě. Bangó bánso babóyí kotósa mitíndo mya Kaizáro, balobí ’te mokonzi mosúsu azalí, óyo bakobéngaka Yézu. »
Acts LinVB 17:8  Batombókísí bôngó bato, mpé bakonzi ba engumbá bayókí yangó ;
Acts LinVB 17:9  basengísí Yasón na bato ba yě bápésa ndanga libosó ’te bátíka bangó.
Acts LinVB 17:10  Bobélé na butú bôná, bandeko batíndí Pólo na Síla nokí bákende o Beréa. Ekómí bangó kúná, bayí­ngélí o sinagóga ya ba-Yúda.
Acts LinVB 17:11  Kasi ba-Yúda baye bazalákí bato ba bobóto, leka baye ba Tesaloníki. Bazalákí na mpósá ya koyóka Liloba lya Nzámbe. Mokolo na mokolo bazalákí komanyola Minkandá, bámóno bôngó sókó matéya mâná mazalí ma sôló.
Acts LinVB 17:12  Bato baíké o ntéi ya bangó bakómí koyamba ; sé bôngó o ntéi ya ba-Gréki básí ba lokúmu baíké mpé babáli ebelé.
Acts LinVB 17:13  Kasi eyókí ba-Yúda ba Tesaloníki ’te Pólo azalákí kosangela Liloba lya Nzámbe o Beréa lokóla, bayéí kúná kotía mobúlú o ntéi ya bato mpé kotombokisa bangó.
Acts LinVB 17:14  Bôngó bandeko batíndí Pólo nokí ákende epái ya libóngo lya mbú, kasi Síla na Timotéo batíkálí o engumbá.
Acts LinVB 17:15  Baye bakeí kotíka Pólo, bakeí na yě kín’o Aténe, na nsima bazóngí. Pólo atíndí maloba ’te Síla na Timotéo bálanda yě nokí.
Acts LinVB 17:16  Ntángo Pólo azalákí kozila bangó o Aténe, ayókí motéma nkándá na bomóni ’te engumbá etóndí na bikeko.
Acts LinVB 17:17  Bôngó akeí o sinagóga kosolola na ba-Yúda mpé na baye bakokúmisaka Nzámbe ; mokolo na mokolo asálí mpé bôngó na bato baye akútí o zándo.
Acts LinVB 17:18  Ezalákí wâná atâ bato ba filozofía, ba Epikúria mpé ba Stóa, bayéí kosolola na yě. Basúsu balobí : « Esopa óyo alingí koloba níni ? » Basúsu balobí : « Mbele azalí kosangela banzámbe ba bampaya ». Balobí bôngó mpô azalákí kosangela bangó Yézu mpé Nsékwa.
Acts LinVB 17:19  Bôngó bakamátí yě mpé bakeí na yě o Areopá­go ; balobí na yě : « Tokokí koyéba ntína ya matéya ma sika ozalí kotéya ?
Acts LinVB 17:20  Toyókí mangó naíno té, tolingí koyéba ntína ya mangó. »
Acts LinVB 17:21  Ya sôló, bato ba Aténe mpé bampaya bakofá­ndaka kúná bazalákí kolekisa ntángo míngi na masoló mpé na boyóki nsango ya sika.
Acts LinVB 17:22  Bôngó Pólo atélémí o káti ya Areopágo mpé alobí : « Bato ba Aténe, namóní ’te bínó bolingí makambo ma Nzámbe mí­ngi.
Acts LinVB 17:23  Mpô ntángo nazalákí kotámbola o engumbá ya bínó, natálí bikeko bínó bokosámbelaka ; namóní mpé altáre yǒ kó esíká ekomámí : ‘Oná nzámbe óyo toyébí té’. Bôngó, ngáí nayéí koyébisa bínó óyo bokokúmisaka, atâ boyébí yě té.
Acts LinVB 17:24  Nzámbe óyo akelí mokili ná mpé bínso bizalí wâná. Yě Mokonzi wa likoló na nsé akofándaka o Témpelo té iye itóngámí na mabóko ma bato.
Acts LinVB 17:25  Asengélí na lisálisi lya bato té, atâ na níni, mpô yě méí akopésaka bato bánso bomoi, mpéma mpé bilóko bí­nso.
Acts LinVB 17:26  Bobélé yě moto abimísí mabótá mánso ma bato na moto mǒkó, mpô ’te báfánda o mikili mínso mya nsé mobimba ; akabólí bileko bya elanga mpé bya mbúla, mpé akátí ndelo ya bikólo esíká bato bakofánda.
Acts LinVB 17:27  Asálí bôngó mpô ’te bato báluka Yě Nzá-mbe, mpô bámeka kokóma epái ya Yě, zambí azalí mosíká na mǒkó mǒkó wa bísó té.
Acts LinVB 17:28  Ya sôló, yě moto akopésaka bísó bomoi ná ngúyá ya kotámbola mpé akozalisaka bísó, sé lokóla basúsu o ntéi ya bínó bakomákí : ‘Bísó mpé tozalí bato ba libótá lya yě ’.
Acts LinVB 17:29  Kasi sókó tozalí bato ba libótá lya Nzámbé, tókanisa té ’te Nzámbe azalí lokóla wólo tǒ ebendé tǒ libángá, biye bisálémí na mabóko mpé na mayéle ma bato.
Acts LinVB 17:30  O bileko bisúsu bato bayébákí Nzámbé té, nzókandé Nzámbe atálákí yangó mpámba ; kasi sikáwa atíndí ’te bato o bikólo bínso bábóngola mitéma :
Acts LinVB 17:31  atíí mokolo moye akosámbisa bato ba nsé mobimba na bosémbo ; asílí aponí óyo akosámbisa bangó ; alakísí yangó na bato bánso áwa asé­kwísí yě o bawá. »
Acts LinVB 17:32  Eyókí bangó likambo lya nsé­kwa ya bawá, basúsu basekí, basúsu balobí : « Tokoyóka yǒ naíno mokolo mosúsu na likambo lyangó. »
Acts LinVB 17:34  Nzókandé bato basúsu bandimí yě mpé bayambí ; Dionísio, moto wa Areopágo, azalákí mǒkó wa bangó. O ntéi ya bangó ezalákí mpé mwásí mǒkó nkómbó ’te Damáris mpé bato basúsu.