DEUTERONOMY
Chapter 23
Deut | LinVB | 23:1 | Mobali akoki kobala mwasi wa tata wa ye te, akoki kolala na mwasi te, oyo tata apesaki mosolo mwa libala. | |
Deut | LinVB | 23:2 | Moto azwaki likama mpe nzoto ya ye ya mobali ebebi, akoki kosangana lisanga na bato ba Yawe te. | |
Deut | LinVB | 23:3 | Mwana abotami na bondumba akoki kosangana lisanga na bato ba Yawe te, ata tee libota lya zomi basangana lisanga na bato ba Yawe te. | |
Deut | LinVB | 23:4 | Moto wa Amon to wa Moab akoki kosangana lisanga na bato ba Yawe te ; ata bankoko ba bango mpe te, tee libota lya zomi basangana lisanga na bato ba Yawe te ; ezali mobeko mwa seko, | |
Deut | LinVB | 23:5 | zambi mokolo bolongwaki o Ezipeti mpe bokutanaki na bango o nzela, bayelaki bino mampa na mai te, bafutaki mpe mosolo na Balame, mwana wa Beor, kuna o Petor ya Aram Nayarim mpo ’te abetele bino mobondo. | |
Deut | LinVB | 23:6 | Kasi Yawe Nzambe wa bino andimaki maloba ma Balame te, mpe Yawe Nzambe wa bino abongolaki maloba ma mobondo makomeli bino bobenisi, zambi Yawe Nzambe wa bino alingaki bino. | |
Deut | LinVB | 23:8 | Okoki koboya moto wa Edom te, zambi azali ndeko wa yo ; oboya mpe moto wa Ezipeti te, zambi ozalaki mompaya o mokili mwa ye. | |
Deut | LinVB | 23:10 | Mokolo okokende kobunda na banguna mpe okopika nganda pene na bango, okeba ’te osala mabe kuna te. | |
Deut | LinVB | 23:11 | Soko moto moko akomi na nzoto mbindo, kanisa na butu mai mabimeli ye o nzoto, moto oyo abima o libanda mpe azonga o nganda te. | |
Deut | LinVB | 23:14 | Mpe soko olingi kokende kosumba, kamata mpau, timola libulu, mpe soko osilisi, zipa libulu, | |
Deut | LinVB | 23:15 | zambi Yawe Nzambe wa yo akoleka o nganda mpo ya kobikisa yo mpe kokaba banguna o maboko ma yo. Nganda ya yo ezala esika esantu. Ekoki te ’te Yawe amono wana eloko eyokisi ye mpi ; soko amoni yango, akokima yo. | |
Deut | LinVB | 23:16 | Soko moombo akimi nkolo wa ye mpe ayei kofanda epai ya yo, okoki kozongisa ye o maboko ma nkolo wa ye te. | |
Deut | LinVB | 23:17 | Atikala epai ya yo o kati ya bandeko ba yo, afanda o esika ye moko aponi, o mboka eye ye moko alingi kofanda. Okoki konyokolo ye te. | |
Deut | LinVB | 23:18 | Bilenge basi ba Israel bakoki kosala bondumba o Tempelo te. Bilenge babali ba Israel bakoki mpe kosala ekobo o Tempelo te. | |
Deut | LinVB | 23:19 | Mwasi ndumba to mobali wa ekobo akoki koya o ndako ya Yawe na mosolo mwa bondumba te, ata alakelaki Yawe nini, zambi bango babale bazali bato ba nsomo o miso ma Yawe Nzambe wa yo. | |
Deut | LinVB | 23:20 | Soko odefisi ndeko eloko, ezala mosolo to bilei, ata eloko nini bameseni kodefisa, osenge ye mbakisa te. | |
Deut | LinVB | 23:21 | Soko odefisi mompaya mosolo, okoki kosenge ye mbakisa ; kasi na ndeko wa yo okoki kosala bongo te, mpo ’te Yawe Nzambe wa yo abenisa misala mya yo minso o mokili moye esika olingi koyingela mpo ’te ofanda. | |
Deut | LinVB | 23:22 | Soko olakeli Yawe Nzambe wa yo elako, kokisa yango noki. Ntembe te, Yawe Nzambe wa yo akotuna yo mpo yango mokolo mosusu, mpe soko okokisi elako ya yo te, okosala mabe o miso ma Yawe. | |
Deut | LinVB | 23:24 | Maloba makobima o monoko mwa yo, kokisa mango ; mpe elako yo moko olakelaki Yawe Nzambe wa yo na motema moko, okokisa yango. | |
Deut | LinVB | 23:25 | Soko oleki o elanga ya vino ya moninga, okoki kolia mbuma ya vino lokola motema mwa yo molingi ; kasi okoki komeme eloko te. | |