Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
DEUTERONOMY
Prev Up Next
Chapter 29
Deut LinVB 29:1  Moze abengi bato banso ba Israel mpe alobi na bango : Bomonoki makambo manso Yawe asalaki o miso ma bino o mokili mwa Ezipeti, maye asalaki Farao mpe bato ba ye banso o mokili mwa ye.
Deut LinVB 29:2  Bomonoki bitumbu binene, bilembo na makamwisi manene.
Deut LinVB 29:3  Kasi tee lelo Yawe naino apesi bino motema mwa kondima ye te, miso ma komono te, matoi ma koyoka malamu te.
Deut LinVB 29:4  Natambwisaki bino mibu ntuku inei o eliki, mpe ata mokolo moko bilamba bibebaki o nzoto te, mpe ma­papa mabebaki o makolo te.
Deut LinVB 29:5  Bozalaki kolia mampa te, bozalaki komele vino to masanga makasi te mpo ’te boyeba na mayele ma bino moko ’te ngai YawenazaliNzambewabino.
Deut LinVB 29:6  Nsima boyei o esika eye. Sikon, mokonzi wa Kesbon, na Og, mokonzi wa Basan, bayaki kobunda na biso ; kasi tolongaki bango.
Deut LinVB 29:7  Tobotoloki mokili mwa bango mpe topesaki mwango na Ruben, na Gad mpe na ndambo ya libota lya Manase mpo ’te mozala mwa bango.
Deut LinVB 29:8  Botosa maloba ma bondeko mpe bokokisa mango, makambo ma bino manso matambola bongo malamu.
Deut LinVB 29:9  Bino banso botelemi lelo o miso ma Yawe Nzambe wa bino : Bino bakonzi ba mabota, bakolo ba mboka na bateyi ba Mobeko, babali banso ba Israel,
Deut LinVB 29:10  elongo na bana mpe na basi ba bino, na mompaya oyo afandi o nganda ya bino, na oyo akokataka nkoni to akotokaka mai.
Deut LinVB 29:11  Sikawa bolingi koyamba bondeko bwa Yawe Nzambe wa bino, bondeko alayaki ndai ’te akokata yango na bino lelo.
Deut LinVB 29:12  Lelo Yawe alingi kokomisa bino ekolo ya ye moko, ye mpe akozala Nzambe wa bino lokola alobelaka yo mpe lokola alayaka ndai na ba­nkoko ba yo Abarama, Izaka na Yakob.
Deut LinVB 29:13  Nakosakola mabe maye mpe nakokata lelo bondeko bobele na bino te,
Deut LinVB 29:14  bino bato botelemi awa elongo na biso o miso ma Yawe Nzambe wa biso, kasi mpe na baye bazali lelo awa elongo na biso te.
Deut LinVB 29:15  Ya solo, boyebi ’te tofandaki o Ezipeti, boyebi bato ba mokili mona esika tozalaki mpe esika tolekaki.
Deut LinVB 29:16  Bomonoki makambo ma bango ma nsomo mpe bikeko bizalaki na bango, bikeko bya nzete, mabanga, wolo na palata.
Deut LinVB 29:17  Epai ya bino moto moko akoki koboya Yawe Nzambe wa biso te na bokumisi banzambe ba bikolo bisusu, azala mobali to mwasi, ezala etuka to libota mobimba ! Epai ya bino moto moko akoki kozala mosisa te, moye mokobota mbuma ya mbondo to ngenge.
Deut LinVB 29:18  Oyo ayoki maloba maye, nzokande akanisi ’te likambo lyo­ko likoki kokwela ye te mpe amilobeli : « Nakozanga eloko te, ata nalandi mayele ma ngai moko ; mai ma kosilisa mposa ya ngai mazali mi­ngi »,
Deut LinVB 29:19  ayeba ’te Yawe akolimbisa ye te ; Yawe akoyokela moto oyo nka­nda mpe zuwa ; mabe manso makomami o buku eye makokwela ye, mpe Yawe akolongola nkombo ya ye o mokili moye.
Deut LinVB 29:20  Yawe akolongola ye o mabota manso ma Israel, mpo ayoka mpasi se lokola maloba ma bondeko matindi, maye makomami o buku eye ya Mobeko.
Deut LinVB 29:21  Bana na bankoko ba bino baye bakobotama nsima, na mompaya alongwi o ekolo mosika mokolo bakomono bitumbu na malozi mako­kwela mokili moye, na bokono bo­nso Yawe akotindela bino, bakoloba :
Deut LinVB 29:22  « Mokili moye mozali bobele mputulu mpe mongwa, binso biziki, bakolona mpe bakobuka mbuma lisusu te, ata lititi lyoko likokola wana te. Bobele bongo Yawe asilisaki na nka­nda mpe na nkele mpenza mboka Sodoma, Gomora, Adma na Seboyim ! »
Deut LinVB 29:23  Bato ba bikolo binso bakoganga : « Mpo nini Yawe asalaki bo­ngo na bato ba mokili moye ? Mpo nini ayokaki nkanda enene boye ? »
Deut LinVB 29:24  Mpe bakoyebisa bango : « Mpo batikaki Bondeko Yawe Nzambe wa ba­nkoko ba bango akataka na bango ntango abimisaki bango o mokili mwa Ezipeti,
Deut LinVB 29:25  zambi bakendeki kokumisa banzambe basusu mpe bafukamelaki bango, banzambe baye bayebaki liboso te, baye Yawe alakisaki bango te.
Deut LinVB 29:26  Yawe ayokelaki bato ba mokili mona nkanda mpenza mpe atindelaki bango bitumbu binso bikomami o buku eye.
Deut LinVB 29:27  Yawe, na nka­nda enene mpe ya nsomo, abe­nga­naki bango o mokili mwa bango, ya­ngo wana abwaki bango o ekolo esusu, lokola tozali komono lelo. »
Deut LinVB 29:28  Bobele Yawe Nzambe wa biso ayebi ma­kambo mabombami, kasi ayebisi biso na bana ba biso maka­mbo masusu polele seko, mpo ’te tokokisa maloba manso mazali o Mobeko moye.