Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
HAGGAI
Up
1 2
Chapter 1
Hagg LinVB 1:1  O mobu mwa mibale mwa bokonzi bwa Dario, o sanza ya motoba, o mokolo mwa yambo mwa sanza, Yawe atindeli profeta Ageo maloba. Atindi ye epai ya Zorobabel, mwana wa Sealtiel, moyangeli wa Yuda, mpe epai ya Yozue, mwana wa Yosadak, nganga mokonzi, ayebisa bango ’te :
Hagg LinVB 1:2  Yawe wa bokasi bonso alobi boye : Bato baye balobi : « Ntango ya kotonga Tempelo lisusu ekoki naino te ! »
Hagg LinVB 1:3  Kasi Yawe atuni bango na monoko mwa profeta Ageo :
Hagg LinVB 1:4  Ebongi solo ’te bino bofanda o ndako ikembami na mabaya, awa Tempelo ebebi nye ?
Hagg LinVB 1:5  Yawe wa bokasi bonso alobi boye : Bokanisa malamu nini bosengeli ko­sala.
Hagg LinVB 1:6  Bolonaki mboto mingi, kasi bobukaki moke. Boliaki mingi, kasi botondaki te. Bomelaki mingi, kasi bosilisaki mposa te. Bolataki bilamba mingi, kasi boyokaki se mpio. Botiaki lifuta lya mosala o libenga litubwana !
Hagg LinVB 1:7  Yawe wa bokasi bonso alobi boye : Bokanisa malamu nini bosengeli kosala !
Hagg LinVB 1:8  Bobuta ngomba mpe bóya na mabaya, botonga lisusu ndako ya ngai, bongo nasepela mpe nalakisa nkembo ya ngai wana. Maloba ma Yawe.
Hagg LinVB 1:9  Bozalaki kolikya ’te bokozwa mbuma mingi, kasi bozwaki se moke. Maye bokotisi o ebombelo, ngai napemeli mango mpema. Ntina nini nasalaki bongo ? Yawe wa bokasi bonso alobi boye : Nasalaki bongo mpo ndako ya ngai ebebi nye. Bokokanisaka se makambo ma bino moko, moto na moto makambo ma ndako ya ye.
Hagg LinVB 1:10  Yango wana o likolo naka­ngaki mbula mpe mabelé moboti te.
Hagg LinVB 1:11  Nasali ’te binso bikauka : bila­nga, ngomba, mbuma ya mampa, nzete ya vino iboti sika, mafuta ma sika, na milona misusu minso ; bato na bibwele bazanga mai, na misala mya bango minso.
Hagg LinVB 1:12  Zorobabel, mwana wa Sealtiel, na nganga mokonzi Yozue, mwana wa Yosadak, na bato banso bayoki maloba ma Yawe Nzambe wa ba­ngo, bandimi maloba ma profeta Ageo. Ageo alobaki lokola Yawe Nzambe wa bango atindaki ye, mpe bato banso babangi Yawe.
Hagg LinVB 1:13  Ageo, ntoma wa Yawe, alobi na bato se lokola Yawe atindaki ye : « Nazali na bino - Maloba ma Yawe. »
Hagg LinVB 1:14  Yawe alendisi bongo Zorobabel, mwa­na wa Sealtiel, moyangeli wa Yuda ; alendisi mpe nganga mokonzi Yozue, mwana wa Yosadak, na mpe mitema mya bato banso. Bayei mpe babandi mosala o Tempelo ya Yawe wa bokasi bonso, Nzambe wa bango.
Hagg LinVB 1:15  Ezalaki sanza ya motoba, mokolo mwa ntuku ibale na minei.
Chapter 2
Hagg LinVB 2:1  O mobu mwa mibale mwa bokonzi bwa Dario, sanza ya nsa­mbo, o mokolo mwa ntuku ibale na moko, Yawe atindi profeta Ageo boye :
Hagg LinVB 2:2  Loba na Zorobabel, mwana wa Sealtiel, moyangeli wa Yuda, mpe na nganga mokonzi Yozue, mwana wa Yosadak, mpe na bato banso :
Hagg LinVB 2:3  Nani o kati ya bino amonoki ndako na nkembo lokola ezalaka kala ? Sikawa bomoni ’te ekomi nde­nge nini ? Bomoni te ’te ekomi mpamba ?
Hagg LinVB 2:4  Yawe alobi boye : Yo Zorobabel, lendisa motema ! Yo nganga mokonzi Yozue, mwana wa Yosadak, zala na mpiko ! Bino bana mboka banso, bopika mpende ! Maloba ma Yawe. Botia maboko o mosala ! Ngai nazali na bino. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso.
Hagg LinVB 2:5  Eza­li bondeko nakataki na bino, nta­ngo bobimaki o Ezipeti : Elimo ya ngai ezali o kati ya bino, bobanga te !
Hagg LinVB 2:6  Yawe wa bokasi bonso alobi boye : Etikali moke naningisa likolo na nse, mbu na mokili.
Hagg LinVB 2:7  Nakoni­ngisa bikolo binso ; nkita ya bikolo binso ikokoma awa. Nakotondisa Tempelo eye na biloko bya lokumu. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso.
Hagg LinVB 2:8  Yawe wa bokasi bonso alobi : Ngai nkolo wa palata mpe wa wolo !
Hagg LinVB 2:9  Nkembo ya ndako eye ya sika ekoleka nkembo ya ndako ya kala. Nakotia boboto o ndako eye. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso.
Hagg LinVB 2:10  O mobu mwa mibale mwa bokonzi bwa Dario, sanza ya libwa, o mokolo mwa ntuku ibale na minei, Yawe alobi na profeta Ageo maloba maye :
Hagg LinVB 2:11  Yawe wa bokasi bonso alobi : Tuna banganga Nzambe, bayebisa yo boniboni bakokata likambo liye :
Hagg LinVB 2:12  « Soko moto amemi nyama ya libonza o nsonge ya elamba, mpe asimbi na yango mampa, ndu­nda, vino, mafuta to bilei bisusu, bilei bina bikokoma nde bisantu ? » Banganga Nzambe bayanoli ye : « Bikokoma bilei bisantu te ! »
Hagg LinVB 2:13  Ageo atuni lisusu : « Moto akomi na mbi­ndo mpo asimbaki ebembe, soko asimbi mpe biloko biye totangi, biloko biye bikokoma nde na mbi­ndo ? » Banganga Nzambe bayanoli : « Biloko bina bikozala na mbindo ! »
Hagg LinVB 2:14  Ageo ayanoli : « Yawe alobi : Ezali se bongo na bato ba ngai ! Maka­mbo bato ba ekolo eye bakosalaka o miso ma ngai, se bongo : biye bokobonzaka awa, bizali na mbindo. »
Hagg LinVB 2:15  Bokeba na maye makosalema ba­nda lelo : Liboso ’te batonga Tempelo ya Yawe,
Hagg LinVB 2:16  naino batiaki mabanga manene te, bato bayei kotala etutelo ya mbuma ya mampa, bakanisaki ’te bakozwa mabenga ntuku ibale, kasi bazwi se zomi. Bayaki kotala ekamelo ya vino, bakanisaki ’te bakozwa bingwongolo ntuku itano, kasi bazwi se ntuku ibale.
Hagg LinVB 2:17  Napesaki bino etumbu o misala minso bosali na maboko ma bino. O bilanga mbuma izwi bokono mpe bipoli, mbula ya mata­ndala ebebisi yango, kasi bino bozo­ngeli ngai te ! Maloba ma Yawe.
Hagg LinVB 2:18  Ba­nda lelo mpe mikolo minso mikoya, bo­tala maye makosalema : banda sanza ya libwa, mokolo mwa ntuku ibale na minei, banda mokolo babandaki kotonga lisusu Tempelo ya Yawe, bokeba na mango !
Hagg LinVB 2:19  Mbuma ya mampa ezali o ebombelo ? Ata nzete ya vino, ya figi, ya ndimo mpe ya oliva eboti te. Kasi banda lelo, ngai nakobenisa yango.
Hagg LinVB 2:20  Mbala ya ibale Yawe alobi na Ageo ; ezalaki o mokolo mwa ntuku ibale mwa sanza.
Hagg LinVB 2:21  Atindi ye boye : Loba na Zorobabel, moyangeli wa Yuda : nakoningisa likolo na nse.
Hagg LinVB 2:22  Nakokweisa ngwende ya bako­nzi ; nakosilisa bokasi bwa bato ba bikolo ; nakokweisa makalo na baye bakotambwisaka mango ; farasa na basoda ba yango bakokufa na mopanga mwa baninga.
Hagg LinVB 2:23  Yawe wa bokasi bonso alobi boye : O mokolo mona nakopono yo Zorobabel, mwana wa Sealtiel, mosaleli wa ngai. Maloba ma Yawe. Nakopesa yo bokonzi mpe nakotia yo mpete o mosapi seko, mpo ngai naponi yo. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso.