I MACCABEES
Chapter 16
I Ma | LinVB | 16:2 | Simoni abengi bana ba ye ba yambo, Yudas na Yoane, alobi na bango : « Ngai na bandeko ba ngai, na libota lya ngai mobimba, tobundaki na banguna ba Israel ut’o bolenge tee lelo. Mbala mingi tobikisaki ekolo ya Israel. | |
I Ma | LinVB | 16:3 | Sikawa nakomi mobange. Nzambe asalisi bino, bokomi bakolo. Bozala o esika ya ngai mpe ya ndeko wa ngai, mpe bokende kobunda mpo ya kobikisa ekolo ya biso. Nzambe asalisa bino. » | |
I Ma | LinVB | 16:4 | Yoane aponi o ekolo bato nkoto ntuku ibale, basoda ba makolo mpe ba farasa, bakende kobundisa Kendebeo. Na butu balali o Modine. | |
I Ma | LinVB | 16:5 | Balamuki na nta ntongo mpe bakei o esobe. Limpinga lya basoda ebele liyei kozwana na bango, basoda ba makolo mpe ba farasa ; kasi mai makaboli bango. | |
I Ma | LinVB | 16:6 | Yoane abongisi milongo mya basoda, batalani na banguna. Emoni ye ’te bato ba ye babangi kokatisa mai, ye moko akatisi mai liboso. Awa basoda ba ye bamoni yango, bakatisi mpe mai nsima ya ye. | |
I Ma | LinVB | 16:7 | Akaboli basoda na mangomba mabale, atii basoda ba farasa o kati ya basoda ba makolo, zambi banguna bayei na basoda ba farasa ebele. | |
I Ma | LinVB | 16:8 | Babeti mindule mpe bakimisi Kendebeo na basoda ba ye ; o kati ya bango mingi bakufi, basusu bakimi o ebombamelo. | |
I Ma | LinVB | 16:9 | Yudas, ndeko wa Yoane, azoki mpota o etumba. Yoane alandi banguna tee Kedron, eye Kendebeo alendisaki. | |
I Ma | LinVB | 16:10 | Basusu bakimi mpe bakei kobombama o manongi batongaki o esobe ya Azoto, yango wana Yoane atumbi mango. Banguna nkoto ibale bakufi ; Yoane azongi na boboto o Yudea. | |
I Ma | LinVB | 16:11 | Tolemeo, mwana wa Abubo, akomaki moyangeli wa mabelé ma Yeriko. Azalaki na wolo mpe na palata mingi, | |
I Ma | LinVB | 16:13 | Akomi moto wa lolendo, aluli bokonzi bwa ekolo mpe akaneli Simoni na bandeko ba ye, aluki koboma bango. | |
I Ma | LinVB | 16:14 | Simoni ameseni kotala kotala mboka inso ya ekolo, mpo apangani na bolamu bwa bato malamu. Akomi bongo na bana ba ye Matatias na Yudas o Yeriko ; ezalaki o mobu mwa monkama na ntuku nsambo na nsambo, o sanza zomi na yoko, sanza Sebat. | |
I Ma | LinVB | 16:15 | Mwana wa Abubo ayambi bango na mayele mabe o Dok, mwa ebombamelo eke ye atongaki. Alambeli bango limpati linene, kasi abombi bato ba ye. | |
I Ma | LinVB | 16:16 | Awa Simoni na bana ba ye balangwi masanga, Tolemeo na bato ba ye babimi na bibuneli o maboko. Bakangi Simoni o ndako ya limpati, babomi ye na bana ba ye babale, na basaleli basusu ba ye. | |
I Ma | LinVB | 16:17 | Asali likambo lya nsomo mpenza : asuli ; esika ya malamu basalaki ye, azongiseli bango se mabe. | |
I Ma | LinVB | 16:18 | Tolemeo ayebisi yango o monkanda atindeli mokonzi mpo ’te basoda baya kosalisa ye, bongo akoka koyangela mboka o ekolo ena. | |
I Ma | LinVB | 16:19 | Atindi bato basusu o Gazara baboma Yoane ; mpe na monkanda abengi bakomanda baya epai ya ye, zambi alingi kopesa bango palata, wolo na mabonza. | |
I Ma | LinVB | 16:21 | Kasi moto moko akendeki liboso koyebisa Yoane o Gazara ’te babomi tata na bandeko ba ye, mpe abakisi ’te : « Atindi mpe bato mpo ’te baboma yo. » | |
I Ma | LinVB | 16:22 | Eyoki Yoane bongo, abulungani. Akangisi bato bayaki koboma ye ; abomisi bango, zambi ayebi ’te bakanaki koboma ye. | |
I Ma | LinVB | 16:23 | Makambo masusu ma Yoane, bitumba bya ye, bikela bya ye bya mpiko, ndenge atongaki mapango manene ma mboka mpe misala mya ye misusu, | |