I MACCABEES
Chapter 3
I Ma | LinVB | 3:2 | bandeko ba ye banso, na mpe baninga ba tata wa ye bandimi kosalisa ye. Babundi etumba ya Israel na mpiko enene. | |
I Ma | LinVB | 3:3 | Atomboli lokumu la ekolo ya ye, alati molato mwa bitumba lokola elombe, akangi bibuneli o loketo, abandi bitumba mbala na mbala, na mopanga abateli nganda ya ye. | |
I Ma | LinVB | 3:5 | Baye bapangani na Mobeko te, akei koluka bango mpo ’te abengana bango ; atumbi baye batiaki mobulu o ekolo, | |
I Ma | LinVB | 3:6 | ayokisi bango nsomo ; alengisi baye basali mabe ; akambi bato ba ye o nzela ya libiki. | |
I Ma | LinVB | 3:7 | Ayokisi bakonzi baike mpasi mpenza, kasi asepelisi bato ba Yakob na bikela bya ye ; yango wana bato bakokumisa nkombo ya ye seko. | |
I Ma | LinVB | 3:8 | Akatisi bingumba bya Yuda mpo ya koboma bato baboyi Nzambe, alongoli bongo nkanda ya Nzambe o Israel. | |
I Ma | LinVB | 3:10 | Apolonio asangisi bikolo bya pene mpe bato baike ba Samaria mpo ’te bakende kobundisa Israel. | |
I Ma | LinVB | 3:11 | Yudas ayoki yango mpe akei kokutana na ye ; alongi ye o etumba mpe abomi ye. Banguna ebele bazoki mpe bakufi ; basusu baye babiki, bakimi. | |
I Ma | LinVB | 3:12 | Ba-Yuda babotoli biloko bya bango ; Yudas akamati mopanga mwa Apolonio ; banda wana azalaki kobunda bitumba bobele na mopanga mona. | |
I Ma | LinVB | 3:13 | Seron, komanda wa basoda ba Siria ayoki ’te Yudas asangisi bato ba boyambi na basoda basusu mpo ya bitumba ; | |
I Ma | LinVB | 3:14 | amilobeli : « Nazwi nzela ya kokoma moto wa lokumu, bongo bato banso o ekolo bakumisa ngai. Nakokende kobundisa Yudas na bato ba ye, baye baboyi bitinda bya mokonzi. » | |
I Ma | LinVB | 3:15 | Bongo akei na limpinga linene lya basoda, bato baboyi Nzambe, mpo ’te asukisa bato ba Israel. | |
I Ma | LinVB | 3:16 | Awa akomi penepene na ngomba Betoron, Yudas abimi mpe akei kokutana na ye elongo na mwa liboke lya basoda. | |
I Ma | LinVB | 3:17 | Awa bamoni limpinga linene lya basoda liyeli bango etumba, balobi na Yudas : « Tozali na bato mingi te, tokoki nde kobunda na basoda ebele boye ? Biso tolembi mpenza, lelo tolei naino te. » | |
I Ma | LinVB | 3:18 | Yudas azongiseli bango : « Bato bazali mingi te bakoki kolonga limpinga linene. Tozala bato baike to te, Nzambe akoki kobikisa biso. | |
I Ma | LinVB | 3:19 | Tokolonga banguna mpo ya bokasi bwa basoda ebele te, kasi na bokasi bwa Nzambe wa likolo. | |
I Ma | LinVB | 3:20 | Bato baye baboyi Nzambe batondi na lolendo, bayei kobundisa biso mpo ya koboma biso, ná basi ná bana ba biso, mpe bayiba biloko bya biso. | |
I Ma | LinVB | 3:23 | Esilisi ye koloba bongo, akei kobundisa banguna na mbalakaka. Bongo Yudas akweisi Seron na basoda ba ye. | |
I Ma | LinVB | 3:24 | Alandi baye bazalaki kokita ngomba Betoron tee bakomi o esobe. Bato soki nkama mwambe bakufi ; basusu bakimi o mokili mwa ba-Filisti. | |
I Ma | LinVB | 3:25 | Ut’o mokolo mona bato banso babangi bokasi bwa Yudas na bandeko ba ye. O bikolo binso bya penepene babandi koyoka nsomo. | |
I Ma | LinVB | 3:26 | Mokonzi monene mpe ayoki nsango ya ye, bipai binso bato bazalaki kosolola lisolo lya bitumba bya ye. | |
I Ma | LinVB | 3:27 | Eyoki Antioko makambo mana manso, atoki na nkanda. Atindi ’te basangisa limpinga linene lya basoda ba mpiko enene. | |
I Ma | LinVB | 3:28 | Afungoli sanduku ya mosolo mwa leta, afuti na mwa-ngo basoda lifuta lya mobu mobimba. Akebisi bango ’te bakoka ata na likama nini. | |
I Ma | LinVB | 3:29 | Kasi amoni ’te mosolo mokomi moke : bato batombokoki mpo abomaki mibeko mya kala mya ekolo, bongo mpako ezalaki kofutama malamu lisusu te. | |
I Ma | LinVB | 3:30 | Abangi ’te mosolo moye mokokoka te na bofuti bato ba ye ; yango esili esalemaki mpo azalaki kokabela bato ba ye bikabela. Na likambo liye aleki bakonzi banso bazalaki liboso lya ye. | |
I Ma | LinVB | 3:31 | Ekomi ye na kwokoso, akani kokende o ekolo ya ba-Persi mpo ya kofutisa bango mpako, azwa mosolo mingi. | |
I Ma | LinVB | 3:32 | Aponi Lisias, nkumu mpe moto wa libota lya bakonzi, bo moyangeli wa mokili mwa ye banda ebale Efrate tee ndelo ya Ezipeti. | |
I Ma | LinVB | 3:34 | Atikeli ye ndambo ya mampinga ma basoda ná mpe nzoku. Ayebisi ye motindo nini asengeli kosala, liboso mpenza o maye matali bato ba Yuda mpe ba Yeruzalem. | |
I Ma | LinVB | 3:35 | Akani kokende kobundisa ba-Israel mpo ya kokweisa mpe kosilisa bango, na mpe baye batikali o Yeruzalem. Bongo na nsima, ata nkombo ya bango eyebana lisusu te. | |
I Ma | LinVB | 3:36 | Akani mpe kotondisa mokili mwa bango na bato ba bikolo bisusu, mpe akabola mabelé ma bango. | |
I Ma | LinVB | 3:37 | Ye moko mokonzi akei na limpinga lisusu lya basoda, atiki Antioko, mboka mokonzi ya ekolo ya ye o mobu mwa monkama na ntuku inei na nsambo. Akatisi ebale Efrate mpe akei o bikolo bya ngomba. | |
I Ma | LinVB | 3:38 | O kati ya baninga ba mokonzi Lisias aponi Tolemeo, mwana wa Dorimeno, na Nikanor na mpe Gorgias, | |
I Ma | LinVB | 3:39 | mpe atindi bango na basoda ba makolo nkoto ntuku inei, mpe na basoda ba farasa nkoto nsambo ; atindi bango bakende o mokili mwa Yuda, babebisa mwango lokola mokonzi alobaki. | |
I Ma | LinVB | 3:40 | Bakei na limpinga liye linene mpe bakomi penepene na Emaus o esobe, esika bapiki nganda ya bango. | |
I Ma | LinVB | 3:41 | Ntango bato ba mombongo bayoki yango, bakamati wolo na palata ebele, na mpe minyololo, bakei o nganda ya basoda kosomba ba-Israel bo baombo. Bato ba Idumea na ba-Filisti basali se bongo. | |
I Ma | LinVB | 3:42 | Yudas na bandeko ba ye bamoni mabe malingi kokwela bango, awa basoda ebele bakomi o mokili mwa bango. Bayebi mpe etinda eye mokonzi apesaki basoda ’te baboma bato banso. | |
I Ma | LinVB | 3:43 | Yango wana balobani : « Totombola lokumu la ekolo ya biso, tobunda mpo tobikisa bato ba biso na mpe Tempelo esantu. » | |
I Ma | LinVB | 3:44 | Babengi bato o likita mpo ’te bamilengele mpo ya kobunda, basambela mpe babondela Nzambe, ayokela bango mawa mpe ngolu. | |
I Ma | LinVB | 3:45 | Yeruzalem ekomi mopotu monene, moto moko azalaki koyingela to kobima wana lisusu te. Banyatinyati ndako esantu, bauta bakomi kofanda o ebombamelo, esika bapagano bazalaki kokutana. Bato ba Yakob bazalaki na esengo lisusu te, nzenze na likembe iyokani lisusu te. | |
I Ma | LinVB | 3:46 | Banso bayei kosangana o Mispa, eye etalani na Yeruzalem. Liboso ba-Israel bazalaka kosambela wana. | |
I Ma | LinVB | 3:47 | Mokolo bakomi, balali nzala, balati ngoto, bapakoli mputulu ya makala o mitó, mpe bapasoli bilamba. | |
I Ma | LinVB | 3:48 | Balingoli buku ya Mobeko mpo ’te bayeba maye bapagano bakotunaka bikeko bya bango bya banzambe ba lokuta. | |
I Ma | LinVB | 3:49 | Bayei na bilamba bya banganga Nzambe, na mbuma ya yambo ya bilanga, mpe na eteni ya zomi ya biloko binso bya bilanga. Babengi ba-Nazir, baye bakokisi eleko ya elako eye balakelaki Nzambe. | |
I Ma | LinVB | 3:50 | Batali o likolo mpe babeleli : « Tosala nini na bato baye ? Tokende na bango epai wapi ? | |
I Ma | LinVB | 3:51 | Banyati mpe basantoli Tempelo esantu ya yo. Banganga Nzambe bazali na lilaka, bazali koyoka nsoni. | |
I Ma | LinVB | 3:55 | Nsima ya yango Yudas aponi bayangeli : basusu ba bato nkoto yoko, basusu ba bato monkama, basusu ba bato ntuku itano, basusu ba bato zomi. | |
I Ma | LinVB | 3:56 | Baye bazalaki kotonga ndako, na baye babalaki sika, baye bazalaki na elanga ya vino ya sika, na baye bazalaki kobanga, alingisi bango ’te bazonga o mboka ya bango, lokola Mobeko molingisi. | |
I Ma | LinVB | 3:58 | Yudas alobi : « Bokamata bibuneli bya bino, bozala na mpiko ! Bomilengele mpo ’te lobi tobanda etumba na bato baye bayokani mpo ya kosilisa biso mpe koboma Tempelo ya biso. | |
I Ma | LinVB | 3:59 | Eleki malamu tokufa o etumba, kasi tomono te mpasi eye ekokwela ekolo mpe Tempelo ya biso. | |