JOHN
Chapter 15
John | LinVB | 15:2 | Etápi lya ngáí ínso ibótí mbuma té, akokáta lyangó ; etápi ibótí mbuma, akopétola lyangó mpô ’te íbóta mbuma míngi. | |
John | LinVB | 15:4 | Bókangana na ngáí lokóla ngáí nakangání na bínó. Etápi ekokí kobóta mbuma té sókó ekangání na nzeté té. Sé bôngó bínó mpé bokokí kobóta mbuma té sókó bokangání na ngáí té. | |
John | LinVB | 15:5 | Ngáí nazalí nzeté ya víno, bínó bozalí bitápi. Moto akangání na ngáí lokóla ngáí nakangání na yě, akobóta mbuma míngi, zambí sókó tokabwání, bokokí kosála elóko té. | |
John | LinVB | 15:6 | Sókó moto akangání na ngáí lisúsu té, bakobwáka yě o libándá, lokóla etápi eye ekátání : etápi ekokauka, bakolokoto yangó mpé bakobwáka yangó o móto, ekozíka. | |
John | LinVB | 15:7 | Sókó bokangání na ngáí, sókó bobómbí maloba ma ngáí o mitéma, bokokí kosénge mánso bolingí, mpé bokozwa mangó. | |
John | LinVB | 15:8 | Tatá wa ngáí akozwa nkémbo sókó bobótí mbuma míngi mpé sókó bokomílakisaka bayékoli ba ngáí. | |
John | LinVB | 15:10 | Sókó botósí mibéko mya ngáí, bokotíkala o bolingí bwa ngaí, sé lokóla ngáí natósí mibéko mya Tatá wa ngáí, mpé natíkálí o bolingi bwa yě. | |
John | LinVB | 15:11 | Nayébísí bínó yangó mpô ’te esengo ya ngáí ézala na bínó, mpé esengo étónda o mitéma mya bínó. | |
John | LinVB | 15:15 | Nakotánga bínó lisúsu basáleli té, zambí mosáleli ayébí té maye mokonzi akosálaka ; kasi nakotánga bínó báníngá, zambí nalakísí bínó mánso nayókí epái ya Tatá. | |
John | LinVB | 15:16 | Bínó boponí ngáí té, kasi ngáí naponí bínó mpé natíndí bínó bókende, bóbóta mbuma, mpé mbuma ya bínó íúmela sékô, mpô ’te mánso bokosénge Tatá o nkómbó ya ngáí, ápésa bínó mangó. | |
John | LinVB | 15:19 | Sókó bozalákí bato ba nsé, mbele bato ba nsé balingákí bínó lokóla elóko ya bangó. Kasi bozalí báníngá ba bangó té, zambí naponí bínó mpé nalongólí bínó o ntéi ya bangó, yangó wâná bato ba nsé bayiní bínó. | |
John | LinVB | 15:20 | Bókundola o mitéma maloba nalobákí na bínó : mosáleli alekí mokonzi wa yě té. Sókó banyókólókí ngáí, bakonyókolo bínó lokóla ; sókó bandimákí maloba ma ngáí, bakondima mpé maloba ma bínó. | |
John | LinVB | 15:21 | Kasi bakosála bínó mâná mánso mpô ya nkómbó ya ngáí, zambí óyo atíndí ngáí, bayébí yě té. | |
John | LinVB | 15:22 | Sókó nayákí té, sókó mpé nalobákí na bangó té, mbele bazalákí na lisúmu té. Kasi sikáwa bazalí na lisúmu, bakokí komílóngisa té. | |
John | LinVB | 15:24 | Nasálákí o míso ma bangó misálá miye moto mosúsu asálí té. Sókó nasálákí myangó té, mbele bazalákí na lisúmu té. Kasi bamónókí misálá mya ngáí mpé bayiní bísó, bísó na Tatá wa ngáí. | |
John | LinVB | 15:25 | Esálémí bôngó mpô ya kokokisa maloba makomámí o Mobéko mwa bangó : Bayinákí ngáí na ntína té. | |
John | LinVB | 15:26 | Ntángo Mobóndi akoyâ, óyo nakotíndela bínó o nkómbó ya Tatá, akosakola mpô ya ngáí. Yě ndé Elímo wa Bosôló akoúta epái ya Tatá. | |