JUDGES
Chapter 19
Judg | LinVB | 19:1 | O eleko ena, mokonzi azalaki o Israel te. Mo-Levi moko afandi o ngomba ya Efraim, akamati makango wa Beteleme o Yuda. | |
Judg | LinVB | 19:2 | Makango akosi ye, na nsima akei kofanda o ndako ya tata wa ye o Beteleme ya Yuda, esika atikali soki sanza inei. | |
Judg | LinVB | 19:3 | Mobali wa ye akei kolanda ye mpo ya kobondela ye azonga o ndako ya ye. Akei elongo na mosaleli wa ye mpe na mpunda ibale. Makango ayambi ye o ndako ya tata wa ye. Tata wa mwasi akei koyamba ye na motema esengo. | |
Judg | LinVB | 19:4 | Bokilo wa ye, tata wa elenge mwasi afandisi ye o ndako. Atikali wana mikolo misato, balei, bameli mpe balali na butu. | |
Judg | LinVB | 19:5 | O mokolo mwa minei balamuki na nta ntongo mpe mo-Levi amilengeli mpo ya kokende, kasi tata wa elenge mwasi alobi na bokilo wa ye : « Lia ndambo ya mampa mpo ozala makasi, na nsima okende. » | |
Judg | LinVB | 19:6 | Bafandi, balei mpe bameli esika yoko. Tata wa elenge mwasi alobi na ye : « Ndima naino kolala awa na butu lelo, motema mwa yo mosepela. » | |
Judg | LinVB | 19:7 | Awa mobali atelemi mpo ya kokende, bokilo abondeli ye ; yango wana na butu atikali kolala wana. | |
Judg | LinVB | 19:8 | Mokolo mwa mitano na ntongo-ntongo atelemi mpo ya kokende, kasi tata wa elenge mwasi alobi na ye : « Nabondeli yo, lia naino mwa moke mpe zila tee mpokwa. » Bongo balei lisusu esika yoko. | |
Judg | LinVB | 19:9 | Mobali amilengeli mpo ya kokende elongo na makango wa ye mpe na mosaleli wa ye, kasi bokilo wa ye, tata wa elenge mwasi, alobi na ye : « Tala, moi molingi mokita, etikali moke tokoma na butu. Bolala awa, motema mwa yo mosepela ! Lobi na ntongo okoki kokende mpo ozonga o ema ya yo. » | |
Judg | LinVB | 19:10 | Kasi mobali aboyi kolala wana lisusu ; atelemi, akei mpe akomi penepene na Yebus (Yeruzalem). Akei na mpunda ya ye ibale, elongo na makango mpe na mosaleli wa ye. | |
Judg | LinVB | 19:11 | Ekomi bango penepene na Yebus, moi mosilaki kokita. Mosaleli alobi na nkolo wa ye : « Nabondeli yo, totika nzela eye, tokende o engumba eye ya ba-Yebus, tolala wana na butu. » | |
Judg | LinVB | 19:12 | Kasi nkolo wa ye alobi : « Tokolala wana te, ezali mboka ya bampaya, bazali ba-Israel te. Totambola tee Gibea. » | |
Judg | LinVB | 19:13 | Alobi lisusu na mosaleli wa ye : « Totambola noki mpe tomeka kokoma o Gibea to o Rama. » | |
Judg | LinVB | 19:14 | Batamboli naino tee moi mosili kokita o ntango bakomi penepene na Gibea o mokili mwa Benyamin. | |
Judg | LinVB | 19:15 | Batiki nzela enene mpo balala o Gibea. Mo-Levi akoti o mboka mpe akei kofanda o zando ya mboka, kasi moto moko te alingi koyamba ye o ndako mpo balala wana. | |
Judg | LinVB | 19:16 | Penepene na butu mobange moko auti o mosala mwa ye mwa bilanga. Azalaki moto wa mokili mwa ngomba ya Efraim, kasi afandi o Gibea, nzokande bato ba Gibea bazalaki ba-Benyamin. | |
Judg | LinVB | 19:17 | Atombola miso, amoni moto wa mobembo afandi wana o libanda, atuni ye : « Outi wapi mpe ozali kokende wapi ? » | |
Judg | LinVB | 19:18 | Azongisi : « Tolongwi o Beteleme o Yuda mpe tozali kokende kin’o nsuka ya ngomba ya Efraim. Ngai nakofandaka kuna. Nakendeki o Beteleme ya Yuda, sikawa nakozonga o mboka. Awa moto moko te alingi koyamba biso o ndako ya ye. | |
Judg | LinVB | 19:19 | Nzokande tozali na bilei mpe na matiti mpo ya mpunda ya biso, tozali mpe na mampa na vino ikoki na ngai, na mwasi mpe na elenge mobali oyo azali kokende na ngai. Tozangi eloko te ! » | |
Judg | LinVB | 19:20 | Mobange ayanoli : « Boboto bozala na yo ! Soko ozangi eloko, nakopesa yo yango, kasi bolala o libanda te. » | |
Judg | LinVB | 19:21 | Akotisi bango o ndako ya ye mpe aleisi mpunda. Bato ba mobembo basukoli makolo, nsima balei mpe bameli. | |
Judg | LinVB | 19:22 | Ezalaki bango kolia, tala bato ba mboka, bifaka bya bato, bayei kozinga ndako, babeteli ezibeli ya ndako makasi mpe balobi na mobange, nkolo wa ndako : « Bimisa moto oyo akoti o ndako ya yo, tolala na ye. » | |
Judg | LinVB | 19:23 | Nkolo wa ndako abimi mpe alobi : « Te, bandeko ba ngai, nabondeli bino bosala mabe boye te. Awa moto oyo ayingeli o ndako ya ngai, botika kosala likambo lya nsomo boye. | |
Judg | LinVB | 19:24 | Bokamata mwana wa ngai wa mwasi, azali naino ngondo ; nakobimisa ye. Bolala na ye mpe bosala na ye lokola bolingi. Kasi bosala moto oyo likambo lya nsomo boye te ! » | |
Judg | LinVB | 19:25 | Kasi bango baboyi koyoka maloba ma ye. Sikawa mo-Levi akamati makango wa ye mpe abimisi ye o libanda. Bato balali na ye mpe babebisibebisi ye butu mobimba ; penepene na ntongo batiki ye. | |
Judg | LinVB | 19:26 | Penepene na ntongo, mwasi ayei komibwaka o boso bwa ndako ya moto oyo ayambaki mobali wa ye, alali wana tee moi mobimi. | |
Judg | LinVB | 19:27 | Na ntongo mobali wa ye alamuki, afungoli ndako mpe abimi mpo ya kokoba mobembo mwa ye. Mpe tala maka-ngo wa ye alali wana o boso bwa ndako, maboko o libanga lizalaki wana. | |
Judg | LinVB | 19:28 | Alobi na ye : « Teleme, tokende noki ! » Kasi azwi eyano yoko te. Alalisi ye o mpunda mpe azongi na ye o mboka. | |
Judg | LinVB | 19:29 | Ekomi ye o mboka akamati mbeli, akati makango wa ye na biteni zomi na bibale, mpe atindi byango o mokili mobimba mwa Israel. | |