Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
LUKE
Prev Up Next
Chapter 13
Luke LinVB 13:1  Bobélé o ntángo êná bato basúsu bayéí koyébisa yě maye makwêlákí bato ba Galiléa. Piláto abomísákí bangó ntángo bazalákí kobonzela Nzámbe mibómá.
Luke LinVB 13:2  Yézu alobí na bangó : « Awa basálí bangó bôngo, bokanísí ’te masúmu ma bangó malekí masúmu ma ba-Galiléa basúsu bánso ?
Luke LinVB 13:3  Nalobí na bínó : Elóko té ! Kasi sókó bobóngólí mitéma té, bínó bánso bokokúfa sé ndéngé yǒkó.
Luke LinVB 13:4  Mpé bato zómi na mwambi bakúfákí mpô linóngi lya Silowe likwêlákí bangó, bokanísí ’te mabé ma bangó malekí mabé ma bato basúsu ba Yerúzalem ?
Luke LinVB 13:5  Nalobí na bínó : Elóko té ! Kasi sókó bobóyí kobó­ngola mitéma, bínó bánso bokokúfa sé ndéngé yǒkó. »
Luke LinVB 13:6  Alobí na bangó naíno moúlání moye : « Moto mǒkó alónákí nzeté ya fígi o elanga ya yě ya víno. Ayéí koluka mbuma, kasi azwí té.
Luke LinVB 13:7  Alobí na mosáli wa elanga : ‘Tálá, mbúla ísáto nakoyáka koluka mbuma o nzeté eye, kasi nazwí té. Kátá yangó. Mpô níni ésílisa lisúsu makási ma mabelé ?’
Luke LinVB 13:8  Kasi moto ôná azóngísí : ‘Mokonzi, tíká yangó naíno mbúla eye, bôngó názwa ntángo ya kotímola mabelé zóngazónga na nzeté mpé ya kotía bipolú.
Luke LinVB 13:9  Mbele ekobóta mbuma nsima… Sókí té, okokáta yangó’. »
Luke LinVB 13:10  Yézu azalákí kotéya o sinagóga o mokolo mwa sábato.
Luke LinVB 13:11  Mwásí mǒkó azalákí wâná, ekómí mbúla zómi na mwambi elímo yǒkó aka­ngí yě mpé abélísí yě. Mokongo mwa yě mogúmbámí, akokí kosémbola nzóto sókí té.
Luke LinVB 13:12  Yézu amóní yě, abéngí yě, alobí : « Mwasi, bokono bwa yǒ bosílí ».
Luke LinVB 13:13  Atíélí yě mabóko ; sé o ntángo êná mwásí asémbólí nzóto mpé akúmísí Nzámbe.
Luke LinVB 13:14  Kasi mokonzi wa sinagóga ayókí mabé, mpô Yézu abíkísí moto o mokolo mwa sábato, alobí na bato : « Mikolo motóbá tokokí kosála mosálá ; bôngó sókó bolingí kobíka, bóyâ o mikolo mîná, kasi o mokolo mwa sábato té. »
Luke LinVB 13:15  Yézu azóngísélí yě : « Bakíbisi ! O mokolo mwa sábato bínó bánso bokoka­ngola ngómbé tǒ mpúnda té mpô ya kokende komelisa yangó mái ?
Luke LinVB 13:16  Tálá mwána óyo wa Abaráma. Sátana asílákí kokanga yě ekómí mbúla zómi na mwambe ; bôngó bákáta nsinga eye o mokolo mwa sábato té, sôló ? »
Luke LinVB 13:17  Elobí yě bôngó, bangúná ba yě bánso bayókí nsóni, kasi bato bánso basepélí mpô ya makambo manéne mánso yě asálí.
Luke LinVB 13:18  Yézu alobí : « Bokonzi bwa Nzámbe bozalí lokóla níni ? Nápésa ndakisa níni ?
Luke LinVB 13:19  Bozalí lokóla mbóto ya sénevé moto mǒkó akamátí mpé alóní o elanga ya yě. Ekólí, ekómí nzeté, mpé ndeke iyéí kosála zúmbu o bitápi bya yangó. »
Luke LinVB 13:20  Alobí lisúsu : « Bokonzi bwa Nzá­mbe boúlání na níni ? Nápésa ndakisa níni ?
Luke LinVB 13:21  Boúlání na nkísi ya mámpa mwásí mǒkó akamátí ; asa­ngísí yangó na sǎ ni ísáto ya fufú ya mámpa. Nkísi evímbísí fufú îná í­nso. »
Luke LinVB 13:22  Ezalákí Yézu kokende o Yerúzalem, azalákí kotéya o bingumbá mpé o mbóka ínso alekákí.
Luke LinVB 13:23  Moto mǒkó atúní yě : « Mokonzi, bato bakobíka bakozala míngi té ? » Alobí na bangó :
Luke LinVB 13:24  « Bósála makási mpô ya kokóto epái ya ezibeli eké. Nalobí na bínó : bato baíké bakomeka kokóto, kasi bakokoka té.
Luke LinVB 13:25  Ntángo nkóló wa ndáko akotéleme mpô ya kokanga ndáko, bôngó bínó bokotíkala o libándá, bokobanda kobétele ezibeli ya ndáko mpé koloba : ‘Mokonzi, fungólélá bísó’, akozó­ngisela bínó : ‘Nayébí té esíká boútí.’
Luke LinVB 13:26  Bôngó bínó bokoloba : ‘Bísó tolíákí mpé tomelékí na yǒ esíká yǒkó ; otéyákí matéya o mbóka ya bísó.’
Luke LinVB 13:27  Kasi yě akozóngisa : ‘Nayébí té esíká bínó boútí, bólongwa epái ya ngáí, bínó bánso, makambo ma bínó mazángí bosémbo !’
Luke LinVB 13:28  Ntángo bokomóno Abaráma, Izáka, Yakób na baproféta bánso o Bokonzi bwa Nzámbe, kasi bakobwáka bínó o libándá, bokolela mpé bokolía míno.
Luke LinVB 13:29  Bato bakoúta epái ya Esti, Wésti, Nórdi na Súdi, mpé bakofánda o méza ya Bokonzi bwa Nzámbe.
Luke LinVB 13:30  Ya sôló, basúsu bazalí bato ba nsima bakokóma bato ba libosó, basúsu bazalí bato ba libósó, bakokóma bato ba nsima. »
Luke LinVB 13:31  Bobélé o ntángo êná ba-Farizéo basúsu bayéí koyébisa yě : « Lo­ngwá áwa mpé kendé epái esúsu, zambí Eróde alingí kobomisa yǒ. »
Luke LinVB 13:32  Alobí na bangó : « Bókende koyébisa gambala êná ’te leló mpé lóbí nakobengana bazábolo mpé nakobíkisa bato ba bokono, kasi nsima ya mwâ mikolo nakosúkisa mosálá mwa ngáí !
Luke LinVB 13:33  Nzókandé leló, lóbí mpé ndéle nasengélí kokóba nzelá ya ngáí, zambí ebongí té ’te proféta ákúfa o libándá lya Yerúzalem.
Luke LinVB 13:34  Yerúzalem, Yerúzalem ! Yǒ moto okobomaka baproféta mpé oko­bwákelaka bato baye batíndélí yǒ mabángá ! Mbala bóní nalingákí kosangisa bána ba yǒ, lokóla nsósó akosangisaka bána ba yě o nsé ya mapapú, kasi olingákí té !
Luke LinVB 13:35  Tálá, mbóka ya yǒ ekotíkala sé mpá­mba ! Nayébísí bínó : Bokomóno ngáí lisúsu té kín’o mokolo bokoloba : Lokúmu na óyo akoyâ o nkómbó ya Mokonzi ! »