Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EZRA
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10
Prev Up Next
Chapter 10
Ezra LinVB 10:1  O ntango Esdra azalaki kolela bongo mpe kokumbama o boso bwa Tempelo ya Nzambe mpo ’te asambela mpe asakola masumu ma ye, bato baike ba Israel, babali na basi na bana, bayei epai ya ye mpe baleli makasi.
Ezra LinVB 10:2  Sekania, mwana wa Yekiel, nkoko wa Elam, alobi na Esdra : « Tosali masumu o miso ma Nzambe wa biso, awa tobalaki basi bampaya ba mokili moye. Kasi ata tosali bo­ngo, Israel azali na mwa elikya.
Ezra LinVB 10:3  Sikawa tokolaya ndai o miso ma Nza­mbe wa biso ’te tokolongola basi ba biso bampaya, na bana ba bango ; tokolanda bobele lilako lya yo, moko­nzi wa biso, na lilako lya bato banso bakotosaka mobeko mwa Nzambe wa biso. Esalema se lokola Mobeko motindi !
Ezra LinVB 10:4  Yo teleme, likambo liye litali yo ; biso tokosalisa yo ; banda mosala mpe sala makasi. »
Ezra LinVB 10:5  Esdra atelemi mpe alayisi bakonzi ba banganga Nzambe na ba-Levi na bato banso ba Israel ndai ’te bakosala lokola balobaki ; mpe banso balayi ndai.
Ezra LinVB 10:6  Esdra atiki esika afandaki o boso bwa Tempelo ya Nzambe mpe akei o ndako ya Yekonan, mwana wa Eliasib. Alali wana na butu, alei ma­mpa te, ameli mpe mai te, mpo azalaki na mawa manene mpo ya masumu ma bato bautaki o boombo.
Ezra LinVB 10:7  Basakoli likambo liye bipai binso o Yuda mpe o Yeruzalem, bayebisi bato banso bautaki o boombo ’te baya kosangana o Yeruzalem.
Ezra LinVB 10:8  Moto oyo akoya te o kati ya mikolo misato mikoya, mpe akolanda etinda ya ba­nkumu mpe ya bakolo te, babotolo ye biloko binso mpe balongola ye o lisanga lya bato bautaki o boombo.
Ezra LinVB 10:9  Bongo bato banso ba Yuda mpe ba Benyamin bakei kosangana o Yeruzalem o mikolo misato mina. Ezalaki o sanza ya libwa, mokolo mwa ntuku ibale. Bato banso bakei koteleme o libanda o boso bwa Tempelo ya Nza­mbe, balengi mpo ya likambo lina mpe mpo ya mbula makasi.
Ezra LinVB 10:10  Nganga Nzambe Esdra alobi : « Bosalaki mabe, awa bobalaki basi bampaya, bobakisi lisumu likolo lya masumu manso ma Israel.
Ezra LinVB 10:11  Sikawa bosakola makambo ma bino o miso ma Yawe Nzambe wa bankoko ba bino, mpe bolanda nzela ya ye ; boka-bwana na bato ba mokili mona mpe bolongola basi bampaya. »
Ezra LinVB 10:12  Bato ba­nso bayanoli na mongongo makasi : « Solo, tondimi, tokolanda maloba ma yo !
Ezra LinVB 10:13  Kasi bato bazali mingi mpe sikawa ezali eleko ya mbula, tokoki kotikala awa o libanda te ; ezali lika­mbo lya mokolo moko to mikolo mibale te ; mpamba te, bato basali mabe mana bazali mingi.
Ezra LinVB 10:14  Malamu bako­nzi ba biso bazala wana o nkombo ya lisanga, mpe baye banso bazali o bingumba bya biso mpe babalaki basi bampaya, baya o mokolo toyokani elongo na bakolo ba mboka mpe na bazuzi ba bango tee mokolo Nzambe wa biso akokitisa motema mpo ya likambo lina. »
Ezra LinVB 10:15  Bobele Yonatan, mwana wa Asael, na Yezaya, mwana wa Tikva, ba-ndimi te ndenge bokati likambo ; Mesulam na mo-Levi Sabtai bandimi mpe te.
Ezra LinVB 10:16  Kasi bato bautaki o boo­mbo basali lokola batindaki. Nganga Nzambe Esdra aponi bakolo ba mabota ma batata ba bango, batangi ba­ngo na nkombo. Babandi mosala mwa bokati makambo o mokolo mwa ya­mbo mwa sanza ya zomi.
Ezra LinVB 10:17  Basilisi kokata makambo ma babali banso babalaki basi bampaya o mokolo mwa yambo mwa sanza ya yambo.
Ezra LinVB 10:18  O kati ya banganga Nzambe babalaki basi bampaya, bazwi bato baye : O libota lya Yozue, bazwi mwana wa Yosadak na bandeko ba ye : Maseya, Eliezer, Yarib na Gedalia ;
Ezra LinVB 10:19  bango balayi ndai ya kolongola basi ba ba­ngo mpe ya kobonzela mpata mobali yoko mpo ya bofuti nyongo ya masumu.
Ezra LinVB 10:21  O libota lya Karim, bazwi Maseya, Elia, Semaya, Yekiel na Uzia.
Ezra LinVB 10:22  O libota lya Pasekur, bazwi Elioenai, Maseya, Yismael, Netanel, Yozabad na Eleasa.
Ezra LinVB 10:23  O libota lya ba-Levi, bazwi Yozabad, Simei, Kelaya (to Kelita), Petakia, Yeyuda na Eliezer.
Ezra LinVB 10:24  O libota lya bayembi, bazwi Eliasib na Zakur. O libota lya bakengeli ba bizibeli bya Tempelo bazwi, Salum, Telem na Uri.
Ezra LinVB 10:25  Mpe o kati ya ba-Israel ; o libota lya Paros bazwi Ramia, Yiziya, Malia, Miyamin, Eleazar, Malkia na Benaya.
Ezra LinVB 10:26  O libota lya Elam bazwi Matania, Zekaria, Yekiel, Abdi, Yeremot na Eli­kya.
Ezra LinVB 10:27  O libota lya Zatu bazwi Elioenai, Eliasib, Matania, Yeremot, Zabad na Aziza.
Ezra LinVB 10:28  O libota lya Bebai bazwi Yokanan, Kanania, Zabai na Atlai.
Ezra LinVB 10:29  O libota lya Bigvai bazwi Mesulam, Maluk, Yedaya, Yasub, Yisal na Yeremot.
Ezra LinVB 10:30  O libota lya Pakat-Moab bazwi Adna, Kelal, Benaya, Maseya, Matania, Besalel, Binui na Manase.
Ezra LinVB 10:31  O libota lya Karim bazwi Eliezer, Yisia, Malkia, Semaya, Simeon,
Ezra LinVB 10:33  O libota lya Kasum bazwi Matenai, Matatia, Zabad, Elifelet, Yeremai, Manase na Simei.
Ezra LinVB 10:43  O libota lya Nebo bazwi Yekiel, Matitia, Zabad, Zebina, Yadai, Yoel na Benaya.
Ezra LinVB 10:44  Bango banso babalaki basi ba­mpa­ya, balongoli ná basi ná bana.