Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
GENESIS
Prev Up Next
Chapter 20
Gene LinVB 20:1  Abarama alongwi wana, akei o mokili mwa Negeb, o etuka yoko penepene na Kades mpe na Sur ; na nsima akei kofanda o mboka Gerar.
Gene LinVB 20:2  Abarama alobi ’te Sara mwasi wa ye azali ndeko wa ye ; bongo Abimelek atindi bato mpo ’te bakamata ye na makasi.
Gene LinVB 20:3  Kasi Nzambe abimeli Abimelek na ndoto na butu, alobi na ye : « Okokufa mpo ya mwasi oyo okamati, mpamba te, azali mwasi wa libala. »
Gene LinVB 20:4  Abimelek ayebanaki na mwa­si ona naino te, bongo alobi : « E Mokonzi, olingi nde koboma moto oyo asali likambo lyoko te ?
Gene LinVB 20:5  Ye moko alobaki na ngai ’te mwasi azali ndeko wa ye, mwasi mpe alobaki ’te azali ndeko wa ye. O motema mwa ngai namoni mabe te, nazali na likambo lyoko te. »
Gene LinVB 20:6  Nza­mbe ayanoli ye na ndoto : « Ngai mpe nayebi ’te osali yango na motema mabe te, nabateli yo mpo ’te osala lisumu o miso ma ngai te ; yango wana napekisi yo ’te osimba ye te.
Gene LinVB 20:7  Sikawa zongisa mwasi epai ya mobali wa ye, zambi azali profeta. Soko oboyi kozongisa ye, nayebisi yo ’te okokufa, yo nabato bayo banso. »
Gene LinVB 20:8  Abimelek alamuki na ntongo-ntongo, abengi basaleli ba ye banso. Ayebisi bango makambo mana manso. Bato ba ye babangi mingi.
Gene LinVB 20:9  Abimelek abengi Abarama, alobi na ye : « Osali biso nini ko ? Mabe nini nasali yo mpo ’te oluka kozwisa ngai na mpe ekolo ya ngai mobimba lisumu linene ? Bakosalaka bongo te. »
Gene LinVB 20:10  Abimelek atuni ye : « Olingaki nini mpenza awa osalaki ngai bongo ? »
Gene LinVB 20:11  Abarama ayanoli : « Nakanisaki : o mokili moye moto moko akobangaka Nzambe te ; bato bakoki koboma ngai mpo ’te ba­zwa mwasi wa ngai.
Gene LinVB 20:12  Mpe ya solo, azali ndeko wa ngai, tobotami na tata moko, kasi tokeseni bamama, mpe nabalaki ye.
Gene LinVB 20:13  Awa Nzambe wa likolo atindaki ngai nalekaleka mosika na ndako ya tata wa ngai, nalobaki na Sara : Sala ngai malamu, bipai binso tokokoma, okoloba ’te ozali ndeko wa ngai. »
Gene LinVB 20:14  Abimelek akamati ngombe na bibwele, akamati basali babali na basi mpe apesi Abarama. Azongiseli ye mwasi wa ye Sara.
Gene LinVB 20:15  Alobi na ye : « Tala mokili mwa ngai mozali awa liboso lya yo. Kende kofanda esika olingi. »
Gene LinVB 20:16  Mpe alobi na Sara : « Nakopesa ndeko wa yo mitako mya palata nkoto yoko, mpo ’te bato banso bayeba ’te ozali na lika­mbo lyoko te. »
Gene LinVB 20:17  Abarama abondeli Nzambe mpo ya Abimelek, mpe Nzambe abikisi ye, ná mwasi wa ye wa libala, ná basi basusu ba ndako ya ye mpo ’te bakoka kobota bana.
Gene LinVB 20:18  Mpo Yawe akangaki mabumu ma basi banso ba libota lya Abimelek, mpo ya Sara, mwasi wa Abarama.