Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
GENESIS
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 3
Gene LinVB 3:1  O kati ya nyama inso ya zam­ba Yawe Nzambe asalaki, nyoka eleki mayele mabe. Nyoka alobi na mwasi : « Ya solo, Nzambe apekisi bino kolia mbuma ya nzete inso ya elanga ? »
Gene LinVB 3:2  Mwasi ayanoli : « Tokoki kolia mbuma ya nzete inso ya ela­nga,
Gene LinVB 3:3  kasi mpo ya mbuma ya nzete eye ezali o kati ya elanga Nzambe alobaki : Bokoki kolia mbuma ya nzete ena te ; soko bosimbi yango bokokufa. »
Gene LinVB 3:4  Nyo­ka azongisi : « Lokuta, bokokufa te !
Gene LinVB 3:5  Nzambe ayebi ’te mokolo bokolia mbuma ya nzete ena, miso ma bino makofungwana, bokokoma lokola Nza­mbe, bokoyeba nini ezali malamu mpe nini ezali mabe. »
Gene LinVB 3:6  Mwa­si amoni ’te nzete ezali kitoko mpe mbuma elengi, alingi mpe koyeba nini ezali malamu mpe nini ezali mabe ; abuki mbuma, alei yango. Na nsima apesi mpe mobali wa ye azalaki na ye ; ye mpe alei.
Gene LinVB 3:7  Tala, miso ma bango mafungwani mpe bamoni ’te bazalaki bolumbu ; na nkasa ya nzete ya figi batongi bilamba mpe balati byango.
Gene LinVB 3:8  Na mpokwa, ntango mompepe mwa mpio moyei, bayoki ’te Yawe Nzambe ayei kotambola o elanga ; mobali na mwasi bakei kobombama nsima ya nzete ya elanga.
Gene LinVB 3:9  Yawe Nzambe abengi mobali, atuni ye : « Ozali wapi ? »
Gene LinVB 3:10  Mobali ayanoli : « Nayokaki yo ntango oyingelaki o elanga ; yango wana nakei kobo-mbama, mpo nazali bolumbu. »
Gene LinVB 3:11  Yawe Nzambe atuni lisusu : « Nani moto alakisi yo ’te ozali bolu­mbu ? Oliaki nde mbuma ya nzete eye napekisaki yo olia yango te ? »
Gene LinVB 3:12  Mobali ayanoli : « Mwasi oyo opesaki ngai akabeli ngai mbuma ya nzete ena mpe nalei. »
Gene LinVB 3:13  Yawe Nza­mbe atuni mwasi : « Osali nini ? » Mwasi azongisi : « Nyoka ekosaki ngai mpe nalei. »
Gene LinVB 3:14  Sikawa Yawe Nzambe alobi na nyoka : « Mpo ya maye osalaki, okozala nyama eleki mabe o kati ya nyama inso ya mboka mpe ya zamba. Okolanda o libumu mpe okolia mabelé bomoi bwa yo mobimba.
Gene LinVB 3:15  Nakotia bo­nguna kati ya yo na mwasi, kati ya libota lya yo na libota lya ye : bana ba ye bako­nyata yo o motó, mpe yo oko­zwa ye o liti­ndi. »
Gene LinVB 3:16  Mpe Yawe Nzambe alobi na mwasi : « Nakobakisela yo mpasi o ntango okozala na zemi mpe o nta­ngo ya kobota. Mposa ya nzoto ekotinda yo epai ya mobali wa yo, mpe ye akozala mokonzi wa yo. »
Gene LinVB 3:17  Mpe alobi na mobali : « Awa ondimi maloba ma mwasi mpe olei mbuma ya nzete eye napekisaki yo olia yango te, mabe makwela mabelé mpo ya yo. O bomoi bwa yo mobimba okoyoka mpasi mpo ya kozwa bilei.
Gene LinVB 3:18  Mabelé makobota nzube na nsende mpe okolia mbuma ya bilanga okokata.
Gene LinVB 3:19  Okotoko mpo ya mosala mwa koluka bilei kin’o mokolo okozonga o mabelé esika outaki, mpo ozali se mabelé mpe okozonga o mabelé. »
Gene LinVB 3:20  Mobali apesi mwasi wa ye nko­mbo ‘Eva’, zambi azali mama wa bato banso.
Gene LinVB 3:21  Yawe Nzambe asoneli mobali na mwasi minkoto na mposo ya nyama, alatisi bango.
Gene LinVB 3:22  Na nsima Yawe Nzambe alobi : « Moto akomi lokola biso, mpo akomi koyeba nini ezali malamu mpe nini ezali mabe. Mbele akota­nda loboko mpo ya kobuka mbuma ya nzete ya bomoi ; mpe soko alei yango, akozala na bomoi seko. »
Gene LinVB 3:23  Bongo Yawe Nzambe abengani moto o elanga ya Eden, akende kokata bilanga, o mabelé maye autaki.
Gene LinVB 3:24  Abengani moto mpe atii bakerubim o Esti ya elanga ya Eden ; bazalaki na mopanga mwa móto mpo ya kokengele nzela eye ekokende epai ya nzete ya bomoi.