Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
GENESIS
Prev Up Next
Chapter 43
Gene LinVB 43:2  Esilisi bango koli mbu­ma inso ya mampa bazwaki o Ezipeti, tata wa bango alobi : « Bosonga kuna kosombela biso biloko bya kolia. »
Gene LinVB 43:3  Yuda ayanoli : « Kuna moto ona akebisaki biso polele mpenza : Bokoki kobima o miso ma ngai te, soko boyei na ndeko wa bino te.
Gene LinVB 43:4  Soko ondimi ’te akende na biso, tokokende kosombela yo biloko.
Gene LinVB 43:5  Kasi soko ondimi te, tokokende te. Mpamba te, moto ona alobaki na biso : Soko boyei na ndeko wa bino te, bokoki kobima o miso ma ngai te. »
Gene LinVB 43:6  Israel alobi : « Mpo nini bosalaki ngai mabe maye, mpe boyebisaki ye ’te bozali naino na ndeko mosusu. »
Gene LinVB 43:7  Bango bazongisi : « Moto ona atunaki biso mituna mingi, mpo ya biso mpe mpo ya libota lya biso. Atunaki : Tata wa bino azali ? Bozali na ndeko mosusu ? Toyanolaki ye na bosembo. Tokokaki nde koyeba ’te akoloba na biso : Boya na ndeko wa bino awa ? »
Gene LinVB 43:8  Yuda alobi na tata wa ye Israel : « Tika mwana akende na ngai. Tosala noki mpe tokende, bongo tobika mpe tokufa na nzala te, biso na yo tata, na bana ba biso.
Gene LinVB 43:9  Ngai moko nakobatela ye ; na nsima otuna bobele ngai. Soko nazo­ngisi ye awa te, soko nabimisi ye awa o miso ma yo te, nakomeme likambo epai ya yo tee liwa lya ngai.
Gene LinVB 43:10  Soko tosilaki mingi boye te, mbele tosilaki kozonga mbala ya ibale. »
Gene LinVB 43:11  Tata Israel alobi na bango : « Tokoki bobele kosala boye : bokamata o ngoto ya bino ndambo ya mbuma ya bilanga mpo ’te bokoka kobo-nzela moto ona : malasi na mwa mafuta ma nzoi, mpaka, matiti ma nsolo mpimbo, mbuma ya nzete ya pistase, na mbuma ya lidame.
Gene LinVB 43:12  Bokamata mosolo moye bokutaki o ngoto ya bino, mbele babosanaki mwango. Bobakisa mosolo mosusu.
Gene LinVB 43:13  Na nsima bokamata ndeko wa bino, mpe bozonga epai ya moto ona.
Gene LinVB 43:14  Nzambe wa bokasi bonso asala ’te ayamba bino malamu, ali-ngisa bino ’te bozonga na ndeko wa bino mpe na Benyamin. Soko ese-ngeli ’te nabungisa bana ba ngai, likambo te ! »
Gene LinVB 43:15  Bakamati makabo, babakisi mosolo mosusu mpe bakei elongo na Benyamin. Bakomi o Ezipeti mpe babimi o miso ma Yosefu.
Gene LinVB 43:16  Emoni Yosefu ’te Benyamin azalaki na bango, alobi na mosaleli wa ye : « Kotisa bato baye o ndako, boma nyama mpe lamba yango, zambi nalingi kolia na bango esika yoko na midi. »
Gene LinVB 43:17  Mosaleli asali lokola Yosefu atindaki ye mpe akotisi bango o ndako ya ye.
Gene LinVB 43:18  Bango babangi zambi bakotisi bango o ndako ya Yosefu. Balobi : « Basali biso bongo mpo ya mosolo tokutaki o ngoto ya biso o mobe-mbo mwa yambo. Balingi kokanga biso, kosala biso mabe mpe kokomisa biso baombo mpe kobotolo biso mpunda. »
Gene LinVB 43:19  Awa bakomi epai ya mosaleli wa Yosefu, balobi na ye :
Gene LinVB 43:20  « Mokonzi, limbisa biso ; toyaki awa mbala ya yambo mpo tosomba biloko bya kolia.
Gene LinVB 43:21  Awa tozongi, ntango tokomi o esika ya kolala, tofungoli ngoto ya biso, mpe tokuti mosolo mwa biso wana. Moto na moto akuti mosolo mwa ye molali likolo lya biloko ; sikawa tozongi na mwango awa.
Gene LinVB 43:22  Tomemi mosolo mosusu mpo tosomba biloko. Toyebi te soko nani atiaki mosolo mona o ngoto ya biso. »
Gene LinVB 43:23  Mosaleli azongisi : « Bokitisa mitema, bobanga te ! Bobele Nzambe wa bino, Nzambe wa tata wa bino, atiaki mosolo o ngoto ya bino. Ngai na­zwaki mosolo mwa ngai. » Na nsima abimiseli bango Simeon.
Gene LinVB 43:24  Mosaleli akotisi bango o ndako ya Yosefu. Ayeli bango mai mpo basukola makolo, aleisi mpe mpu-nda ya bango.
Gene LinVB 43:25  Bango babongisi makabo maye bayeli Yosefu, mpe bazili ye tee midi, mpo bayoki ’te bakolia midi o ndako ena.
Gene LinVB 43:26  Ntango Yosefu ayei, babonzeli ye makabo maye bamemi, bagu-mbameli ye tee o nse.
Gene LinVB 43:27  Ayambi bango malamu mpe atuni bango : « Tata wa bino oyo akomi mobange lokola boyebisaki ngai, azali naino na bomoi ? »
Gene LinVB 43:28  Bazongisi : « Tata wa biso, mosaleli wa yo, akufi te, azali malamu. » Bafukami mpe bagumbami.
Gene LinVB 43:29  Yosefu átombola miso, amoni ndeko wa ye Benyamin, oyo azali na ye mama moko. Atuni bango : « Oyo nde mosimi wa bino, mwana wa nsuka, lokola boyebisaki ngai ? » Bongo alobi na ye : « Mwana wa ngai, Nzambe abenisa yo. »
Gene LinVB 43:30  Awa amoni mosimi wa ye, akoki kokanga motema lisusu te mpe mai mabimeli ye o miso. Abimi noki, akoti o eteni ya ndako ya ye moko mpe aleli.
Gene LinVB 43:31  Asukoli elongi, azongi epai ya bango. Akangi motema, alobi : « Boya na bilei. »
Gene LinVB 43:32  Batieli ye bilei o meza ya ye moko, batieli bango bilei o esika esusu ; batieli mpe ba-Ezipeti, baye bakoliaka na ye elongo, epai esusu, za­mbi ba-Ezipeti bakoki kolia na ba-Ebrei esika yoko te. O miso ma bango likambo lyango lizali nsomo mpenza.
Gene LinVB 43:33  Bafandisi bango o boso bwa ye, moko moko o esika ebo­ngi na ye, motomolo liboso, bazimi nsima. Banso batalani na bokamwi.
Gene LinVB 43:34  Kasi Yosefu apesi bango bilei bya meza ya ye moko ; mpe o sani ya Benyamin atii biloko bileki biye bya bandeko basusu soki mbala itano. Na nsima banso bameli esika yoko, balangwe.