Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
GENESIS
Prev Up Next
Chapter 47
Gene LinVB 47:1  Yosefu akei koyebisa Farao nsango, alobi na ye : « Tata na bandeko ba ngai bauti o mokili mwa Kanana, bakomi awa na mpata na ngombe mpe na biloko bya bango binso. Sikawa bazali o mokili mwa Gesen. »
Gene LinVB 47:2  Akendeki na bandeko batano mpe alakisi Farao bango.
Gene LinVB 47:3  Oyo atuni bango : « Bokosalaka mosala nini ? » Bazongisi : « Biso basaleli ba yo tozali babokoli ba mpata, se lokola batata ba biso. »
Gene LinVB 47:4  Balobi na Farao : « Toyei kofanda o mokili mwa yo, zambi epai ya biso matiti mazali lisusu te mpo toleisa bibwele bya biso, mpo nzala ezali kongala o mokili mwa Kanana. Lingisa biso basaleli ba yo tofanda o mokili mwa Gesen. »
Gene LinVB 47:5  Farao alobi na Yosefu : « Bafanda o mokili mwa Gesen, mpe soko o kati ya bango bato basusu babongi na mosala mwa kapita, bakoma bake­ngeli ba bibwele bya ngai moko. » Yakob na bana ba ye bakei o Ezipeti epai ya Yosefu. Farao, mokonzi wa Ezipeti, ayoki yango mpe alobi na Yosefu : « Nakopesa yo esika o mokili mwa Ezipeti ; ponela tata na bandeko ba yo esika eleki malamu mpo bafanda. »
Gene LinVB 47:6  Farao alobi na Yosefu : « Bafanda o mokili mwa Gesen, mpe soko o kati ya bango bato basusu babongi na mosala mwa kapita, bakoma bake­ngeli ba bibwele bya ngai moko. » Yakob na bana ba ye bakei o Ezipeti epai ya Yosefu. Farao, mokonzi wa Ezipeti, ayoki yango mpe alobi na Yosefu : « Nakopesa yo esika o mokili mwa Ezipeti ; ponela tata na bandeko ba yo esika eleki malamu mpo bafanda. »
Gene LinVB 47:7  Yosefu abyangisi tata wa ye Yakob mpe akei na ye epai ya Farao. Yakob apesi Farao losako.
Gene LinVB 47:8  Farao atuni Yakob : « Okokisi mbula boni ? »
Gene LinVB 47:9  Yakob azongisi : « Mobembo mwa ngai o mokili moumeli mibu mo-nkama na ntuku isato. Ezali se eleko ekuse mpe nazalaki na mpasi mingi o bomoi bwa ngai ; nakokisi mibu mya bankoko ba ngai naino te, mikolo bazalaki awa o nse. »
Gene LinVB 47:11  Yosefu afandisi tata na bandeko ba ye o mokili mwa Ezipeti, apesi bango mabelé maleki malamu o mokili mwa Ramses, se lokola Farao atindaki.
Gene LinVB 47:12  Yosefu apesi tata wa ye, bandeko ba ye na mpe libota lya tata wa ye mobimba bilei, engebene na motango mwa bana ba bango.
Gene LinVB 47:13  O mokili mobimba bilei bizalaki lisusu te, zambi nzala engali makasi. Ba-Ezipeti na ba-Kanana balingaki bakufa na nzala.
Gene LinVB 47:14  Yosefu azwi mosolo monso mwa mokili mwa Ezipeti, na mpe mosolo mwa mokili mwa Kanana, na botekeli bato mbuma ya mampa. Azalaki kotika mo­solo monso o ndako ya Farao.
Gene LinVB 47:15  Esili mosolo monso mwa mokili mwa Ezipeti mpe mwa Kanana, ba-Ezipeti bakei epai ya Yosefu, balobi na ye : « Pesa biso bilei tolia. Awa tozali na mosolo lisusu te, olingi tokufa na nzala o miso ma yo, solo ? »
Gene LinVB 47:16  Yosefu alobi na bango : « Botikela ngai bibwele bya bino. Awa bozali na mosolo lisusu te, nakopesa bino bilei, soko botikeli ngai bibwele. »
Gene LinVB 47:17  Bayeli Yosefu bi-bwele bya bango mpo ’te bazwa bilei ; batikeli ye farasa, ngombe, mpata na mpe mpunda ; azwi bi­bwele bya bango binso, mpe apesi bango bilei bikoki na mobu mona.
Gene LinVB 47:18  Esili mobu mona, bazongeli ye lisusu o mobu nwa nsima, balobi na ye : « Tokoki kokombela mokonzi wa biso likambo te. Mosolo mwa biso mosili nye, mpe bibwele bya biso bisili bikomi o maboko ma yo, mokonzi wa biso. Etikali na biso sikawa nzoto ya biso moko na mabelé ma biso, esili.
Gene LinVB 47:19  Mpo nini tokufa mpamba boye o miso ma yo, na mabelé ma biso lokola ? Bongo kamata biso na mpe mabelé ma biso, mpe pesa biso bilei ; biso elongo na mabelé ma biso tokosalela Farao. Pesa biso milona mpo tobika ; tokufa te mpe mabelé ma biso matikala mpamba te. »
Gene LinVB 47:20  Yosefu azweli Farao mokili mobimba mwa Ezipeti, zambi ba-Ezipeti banso bateki bilanga bya bango mpo ya nzala ezalaki kongala makasi. Farao akomi nkolo wa mabelé manso ma Ezipeti.
Gene LinVB 47:21  Mpe bato ba ye mpenza, akomisi bango banso baombo, o ekolo mobimba banda Nordi kin’o Sudi.
Gene LinVB 47:22  Kasi Yosefu azwaki mabelé ma banganga Nzambe te, zambi Farao azalaki kopesa bango mosolo sanza na sa-nza ; bazalaki kobika na mwango ; bongo basengelaki koteke mabelé ma bango te.
Gene LinVB 47:23  Yosefu alobi na bato : « Nasali ’te Farao azwa bino moko na mpe mabelé ma bino. Boswa mbuma ya kolona o bilanga bya bino.
Gene LinVB 47:24  Kasi ekomi eleko ya bobuki mbuma, bosengeli kopesa Farao eteni ya bitano ; biteni bisusu binei bino bokozwa byango mpo ’te bolona o bilanga mpe bozwa bilei bya bino, bya bana ba bino mpe bya bato ba bino banso. »
Gene LinVB 47:25  Bango bazongisi : « Obikisi biso ! Yo mokonzi wa biso, sala biso se malamu, tokozala basaleli ba Farao. »
Gene LinVB 47:26  Yosefu abimisi mobeko moko, mosali na bango tee lelo : Ba-Ezipeti bapesa Farao eteni ya bitano ya mbuma ya bilanga. Bobele mabelé ma banganga Nza­mbe mazali mabelé ma Farao te.
Gene LinVB 47:27  Israel afandi o Ezipeti o mokili mwa Gesen. Kuna bazwi mabelé, baboti mingi mpe bakomi libota linene.
Gene LinVB 47:28  Yakob aumeli mibu zomi na nsambo o mokili mwa Ezipeti ; bongo o bomoi bwa ye mobimba akokisi mibu monkama na ntuku inei na nsambo.
Gene LinVB 47:29  Awa mokolo mwa liwa lya ye mokomi penepene, Israel abengi mwana wa ye Yosefu, alobi na ye : « Soko olingi kozala ngai malamu, tia loboko la yo o nse ya ebelo ya ngai, lakisa ngai ’te olingi ngai solo, bongo layela ngai ’te okoku­nda ngai o Ezipeti te.
Gene LinVB 47:30  Nakokende kokutana na bankoko ba ngai ; yo okolongola ngai o Ezipeti mpe okokunda ngai o lilita lya bango. » Alobi na tata wa ye : « Nakosala lokola olobi. »
Gene LinVB 47:31  Kasi tata alendisi : « Layela ngai yango ! » Mpe Yosefu alayeli ye. Israel aku­mbami penepene na motó mwa mbeto ya ye.