GENESIS
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
Chapter 39
| Gene | LinVB | 39:1 | Bakei na Yosefu o Ezipeti. Moto moko wa Ezipeti Potifar, mosaleli wa Farao mpe komanda wa bakengeli, asombi ye epai ya ba-Ismael, baye bayaki na ye. | |
| Gene | LinVB | 39:2 | Yawe azalaki kobatela Yosefu, mpe Yosefu azalaki kosala mosala mwa ye se malamu. Efandi ye o ndako ya mo-Ezipeti moko, mokonzi wa ye, | |
| Gene | LinVB | 39:3 | oyo amoni ’te Yawe azalaki kosalisa Yosefu mpo ’te misala mya ye minso mitambola malamu. | |
| Gene | LinVB | 39:4 | Abandi kolinga Yosefu mingi, mpe akomisi ye mosalisi wa ye mpenza, aluboli ye mokengeli wa biloko bya ye binso, atalela ye misala minso. | |
| Gene | LinVB | 39:5 | Ut’o mokolo Yosefu akomaki kapita wa basali mpe mokengeli wa biloko bya ye binso, mo-Ezipeti amoni ’te Yawe azalaki kobenisa ndako ya ye, biloko bya ndako mpe bya bilanga mpo ya Yosefu. | |
| Gene | LinVB | 39:6 | Bongo mokonzi wa ndako atikeli Yosefu makambo ma ye manso, mpe mpo ya ye, azalaki kopangana lisusu na eloko te, se na bilei. Yosefu azalaki mobali kitoko, solo. | |
| Gene | LinVB | 39:7 | Nsima ya makambo maye, mwasi wa Potifar abandi kolula Yosefu, alobi na ye : « Lala na ngai. » | |
| Gene | LinVB | 39:8 | Yosefu aboyi, alobi na mwasi wa nkolo wa ye : « Awa nazali o ndako, mokonzi apangani lisusu na eloko te, atiki manso o maboko ma ngai. | |
| Gene | LinVB | 39:9 | O ndako eye aleki ngai na bokasi te ; apimi ngai eloko te, bobele yo, mpo osali mwasi wa ye. Boniboni násala mabe maye, násumuka o miso ma Nzambe ? » | |
| Gene | LinVB | 39:10 | Ata mwasi azalaki kotungisa ye mikolo minso, Yosefu aboyi kolala na ye, alingi komipesa na ye te. | |
| Gene | LinVB | 39:11 | Mokolo moko Yosefu ayingeli o ndako mpo ya kosala mosala mwa ye ; moto mosusu azalaki te. | |
| Gene | LinVB | 39:12 | Mwasi akangi ye na molato, alobi : « Lala na ngai. » Kasi Yosefu atiki molato o maboko ma ye mpe akimi. | |
| Gene | LinVB | 39:14 | abengi basali ba ye mpe alobi na bango : « Talaka, mo-Ebrei oyo bayelaki biso, alingi kosakana na biso ! Ayaki koluka ngai mpo tosala mabe, kasi nagangi makasi. | |
| Gene | LinVB | 39:15 | Awa ayoki ’te natomboli mongongo mpo ya kobenga bato, atiki elamba ya ye, akimi mpe abimi o libanda. » | |
| Gene | LinVB | 39:17 | Alobi na ye se nde-nge yoko : « Moombo oyo wa ba-Ebrei okotisaki o ndako ya biso, ayaki koluka ngai mpo ya kosala mabe. | |
| Gene | LinVB | 39:19 | Mwasi alobi na mobali wa ye : « Yoka makambo moombo wa yo alingaki kosala ngai. » Eyoki mobali maloba mana, asiliki mingi. | |
| Gene | LinVB | 39:20 | Akangisi Yosefu mpe akotisi ye o boloko, esika mokonzi akangisi baye basalaki ye mabe. Bongo Yosefu atikali kokangema o boloko. | |
| Gene | LinVB | 39:21 | Kasi Yawe asalisi ye, atikali penepene na ye, mpe atindi motema mwa kapita wa bakengeli ’te alinga ye. | |
| Gene | LinVB | 39:22 | Mokonzi wa boloko atiki bato banso o maboko ma Yosefu ; bobele ye akomi kotala makambo manso. | |