Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
GENESIS
Prev Up Next
Chapter 39
Gene LinVB 39:1  Bakei na Yosefu o Ezipeti. Moto moko wa Ezipeti Potifar, mosaleli wa Farao mpe komanda wa bakengeli, asombi ye epai ya ba-Ismael, baye bayaki na ye.
Gene LinVB 39:2  Yawe azalaki kobatela Yosefu, mpe Yosefu azalaki kosala mosala mwa ye se malamu. Efandi ye o ndako ya mo-Ezipeti moko, mokonzi wa ye,
Gene LinVB 39:3  oyo amoni ’te Yawe azalaki kosalisa Yosefu mpo ’te misala mya ye minso mitambola malamu.
Gene LinVB 39:4  Abandi koli­nga Yosefu mingi, mpe akomisi ye mosalisi wa ye mpenza, aluboli ye mokengeli wa biloko bya ye binso, atalela ye misala minso.
Gene LinVB 39:5  Ut’o mokolo Yosefu akomaki kapita wa basali mpe mokengeli wa biloko bya ye binso, mo-Ezipeti amoni ’te Yawe azalaki kobenisa ndako ya ye, biloko bya ndako mpe bya bilanga mpo ya Yosefu.
Gene LinVB 39:6  Bongo mokonzi wa ndako atikeli Yosefu makambo ma ye ma­nso, mpe mpo ya ye, azalaki kopa­ngana lisusu na eloko te, se na bilei. Yosefu azalaki mobali kitoko, solo.
Gene LinVB 39:7  Nsima ya makambo maye, mwasi wa Potifar abandi kolula Yosefu, alobi na ye : « Lala na ngai. »
Gene LinVB 39:8  Yosefu aboyi, alobi na mwasi wa nkolo wa ye : « Awa nazali o ndako, mokonzi apangani lisusu na eloko te, atiki manso o maboko ma ngai.
Gene LinVB 39:9  O ndako eye aleki ngai na bokasi te ; apimi ngai eloko te, bobele yo, mpo osali mwasi wa ye. Boniboni násala mabe maye, násumuka o miso ma Nzambe ? »
Gene LinVB 39:10  Ata mwasi azalaki kotungisa ye mikolo minso, Yosefu aboyi kolala na ye, alingi komipesa na ye te.
Gene LinVB 39:11  Mokolo moko Yosefu ayingeli o ndako mpo ya kosala mosala mwa ye ; moto mosusu azalaki te.
Gene LinVB 39:12  Mwasi akangi ye na molato, alobi : « Lala na ngai. » Kasi Yosefu atiki molato o maboko ma ye mpe akimi.
Gene LinVB 39:13  Awa amoni ’te Yosefu atiki molato o maboko ma ye mpe akimi,
Gene LinVB 39:14  abengi basali ba ye mpe alobi na bango : « Talaka, mo-Ebrei oyo bayelaki biso, alingi kosakana na biso ! Ayaki koluka ngai mpo tosala mabe, kasi nagangi makasi.
Gene LinVB 39:15  Awa ayoki ’te natomboli mongongo mpo ya kobenga bato, atiki elamba ya ye, akimi mpe abimi o libanda. »
Gene LinVB 39:16  Mwasi atii molato penepene na ye, mpe azili tee mobali wa ye azo-ngi o ndako.
Gene LinVB 39:17  Alobi na ye se nde-nge yoko : « Moombo oyo wa ba-Ebrei okotisaki o ndako ya biso, ayaki koluka ngai mpo ya kosala mabe.
Gene LinVB 39:18  Awa natomboli mongongo mpo ya kobenga bato, atiki molato mwa ye mpe akimi. »
Gene LinVB 39:19  Mwasi alobi na mobali wa ye : « Yoka makambo moombo wa yo alingaki kosala ngai. » Eyoki mo­ba­li maloba mana, asiliki mingi.
Gene LinVB 39:20  Akangisi Yosefu mpe akotisi ye o boloko, esika mokonzi akangisi baye basalaki ye mabe. Bongo Yosefu atikali kokangema o boloko.
Gene LinVB 39:21  Kasi Yawe asalisi ye, atikali penepene na ye, mpe atindi motema mwa kapita wa bakengeli ’te alinga ye.
Gene LinVB 39:22  Mokonzi wa boloko atiki bato banso o maboko ma Yosefu ; bobele ye akomi kotala makambo ma­nso.
Gene LinVB 39:23  Kapita wa bakengeli atali lisusu mosala moko te, zambi mosala monso atikeli Yosefu, mozalaki kotambola ntango inso se malamu, mpo Yawe azalaki kosalisa ye.