Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I KINGS
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 14
I Ki LinVB 14:1  O mikolo mina Abia, mwana wa Yeroboam, akomi kobele.
I Ki LinVB 14:2  Yeroboam alobi na mwasi wa ye : « Nabondeli yo, teleme mpe lata bilamba bisusu mpo ’te bato bayeba te ’te ozali mwasi wa Yeroboam ; na nsima kende o Silo. Profeta moko afa­ndi kuna ; nkombo ya ye Akia ; ye moto ayebisaki ngai ’te nakozala moko­nzi wa bato ba ekolo eye.
I Ki LinVB 14:3  Kamata ma­mpa zomi, bisikiti na mbeki ya mafuta ma nzoi ; kende koluka ye. Ye akoyebisa yo makambo nini makokwela mwana. »
I Ki LinVB 14:4  Mwasi wa Yeroboam asali se bongo : atelemi, akei o Silo mpe akoti o ndako ya Akia. Kasi moto oyo azalaki komono lisusu malamu te, miso ma ye malembi zambi akomi mobange mpenza.
I Ki LinVB 14:5  Kasi Yawe ayebisaki ye : « Mwasi wa Yeroboam azali koya kotuna yo likambo nini liko­kwela mwana wa ye, oyo azali kobele. Oloba na ye lokola nakoyebisa yo. Ntango akoya, akokosa yo, akomiyebisa te. »
I Ki LinVB 14:6  Eyoki Akia makolo ma ye pene na ezibeli ya ndako, alobi na ye : « Mwasi wa Yeroboam, koto ! Mpo nini obo­yi komiyebisa ? Batindi ngai nayebisa yo liloba lya mpasi.
I Ki LinVB 14:7  Kende koyebisa Yeroboam : Yawe Nzambe wa Israel alobi boye : Naponoki yo o kati ya bato banso bo mokonzi wa bato ba ngai ba-Israel ;
I Ki LinVB 14:8  nabotoloki bokonzi o maboko ma bato ba libota lya Davidi mpe napesaki yo bwango. Kasi osalaki te lokola mosaleli wa ngai Davidi, oyo atosaki bitinda bya ngai mpe alandaki ngai na motema moko, asalaki bobele maye makosepelisa ngai.
I Ki LinVB 14:9  Oleki bakonzi banso na bobe, baye bazalaki liboso lya yo ; okendeki kosala bikeko bya banza­mbe basusu na bikeko bya bibende, mpe bongo otumolaki ngai mingi ; obwaki ngai moko nsima ya moko-ngo mwa yo.
I Ki LinVB 14:10  Yango wana mabe makokwela libota lya Yeroboam ; nakosilisa babali banso ba libota lya Yeroboam, baombo to bansomi o Israel ; nakokombo ndako ya Yeroboam lokola bakolongolaka bosoto o ndako ya bato.
I Ki LinVB 14:11  Bato ba libota lya Yeroboam, baye bakokufa o mboka, mbwa ikolia bango ; baye bakokufa o bila­nga, ndeke ya likolo ikolia bango, zambi Yawe alobaki bongo.
I Ki LinVB 14:12  Yo, teleme mpe zonga o ndako ya yo. O ngongamei okonyata mabelé ma mbo­ka, mwana akokufa.
I Ki LinVB 14:13  Bato ba­nso ba Israel bakosala lilaka mpo ya ye mpe bakokunda ye. Solo, bobele ye moko o kati ya libota lya Yeroboam akokundama o lilita, zambi bobele ye moto asalaki malamu o libota lya Yeroboam o miso ma Yawe Nzambe wa Israel.
I Ki LinVB 14:14  Yawe akolubola o Israel mokonzi oyo akosilisa libota lya Yeroboam mobimba. Mana manso makosalema se lelo ; bobele lelo te, kasi sikasikawa !
I Ki LinVB 14:15  Yawe akonyokolo ba-Israel ; ekozala na bango lokola nkekele ikoninganaka na mai. Yawe akolo­ngola ba-Israel o mokili moye molamu apesaki bankoko ba bango mpe akopanza bango o ngambo ya ebale Efrate, zambi basalaki bikeko bya banzambe basusu mpe batumolaki Yawe bongo.
I Ki LinVB 14:16  Yawe akoboya Israel mpo ya masumu ma Yeroboam, mpe maye atindaki ba-Israel basala mango. »
I Ki LinVB 14:17  Mwasi wa Yeroboam atelemi, akei mpe akomi o Tirsa, mpe awa ayi­ngeli o ndako, mwana akufi.
I Ki LinVB 14:18  Bakundi ye mpe bato banso ba Israel basali lilaka mpo ya ye, se lokola Yawe alobaki na mosaleli wa ye, profeta Akia.
I Ki LinVB 14:19  Makambo masusu ma Yeroboam, bitumba na misala mya ye, manso makomami o buku ya Bikela bya bakonzi ba Israel.
I Ki LinVB 14:20  Yeroboam ayangeli ekolo mibu ntuku ibale na mibale, na nsima akei kokutana na bankoko ba ye. Mwana wa ye Nadab akitani ye.
I Ki LinVB 14:21  Roboam, mwana wa Salomo, ako­mi mokonzi wa Yuda. Akokisi mibu ntuku inei na moko ntango akomi mokonzi. Ayangeli ekolo mibu zomi na nsambo o Yeruzalem, mboka Yawe aponoki o kati ya mabota manso ma Israel mpo ya kotia nkombo ya ye kuna. Nkombo ya mama wa ye Naama, moto wa ekolo ya Amon.
I Ki LinVB 14:22  Ba-Yuda basali mabe o miso ma Yawe ; na masumu ma bango bayokisi Yawe zuwa, koleka bankoko ba bango.
I Ki LinVB 14:23  Bango mpe batongi bitumbelo mpo ya kokumisa ba­nzambe basusu, batelemisi makonzi mpe batii bikeko o ngomba inso mpe o nse ya nzete ibesu inso.
I Ki LinVB 14:24  Lisusu, o mokili mwa bango bandimi ’te basala mpo bosoni, ata o ndako esantu. Balandi makambo manso ma nsomo ma bikolo biye Yawe abenganaki o boso bwa bana ba Israel.
I Ki LinVB 14:25  O mobu mwa mitano mwa bokonzi bwa Roboam, Sesonk, moko­nzi wa Ezipeti, akei kobunda na Yeruzalem.
I Ki LinVB 14:26  Alongoli biloko binso bya motuya o Tempelo ya Yawe mpe o ndako ya mokonzi. Abotoli biloko binso nye na mpe nguba ya wolo Salomo asalaki.
I Ki LinVB 14:27  O esika ya yango mokonzi Roboam atiki nguba ya mbe­ngi, iye apesi o maboko ma basoda bakokengeleke ezibeli ya ndako ya mokonzi.
I Ki LinVB 14:28  Mbala inso mokonzi azalaki kokoto o Tempelo ya Yawe, baso­da bakamati nguba ina mpe na nsima bazongisi yango o ndako ya bake­ngeli.
I Ki LinVB 14:29  Makambo masusu ma Roboam na misala mya ye makomami o buku ya Bikela bya bakonzi ba Yuda.
I Ki LinVB 14:30  Bitumba bizalaki ntango inso kati ya Roboam na Yeroboam.
I Ki LinVB 14:31  Roboam akei kokutana na bankoko ba ye mpe bakundi ye o Engumba ya Davidi. Mwana wa ye Abiam akitani ye.