I KINGS
Chapter 18
| I Ki | LinVB | 18:1 | Elaka elai eleki, ekomi mobu mwa misato ’te mbula ezalaki konoko lisusu te, Yawe alobi na Elia : « Kende kotala Akab, nakonokisa mbula o mokili. » | |
| I Ki | LinVB | 18:3 | Akab abengi Obadia, moyangeli wa ndako ya mokonzi. Obadia azalaki kobanga Yawe solo : | |
| I Ki | LinVB | 18:4 | ntango Yezabel azalaki koboma ba-profeta ba Yawe, abombaki bango monkama o mibenga mibale ; o mobenga moko moko bato ntuku itano, mpe asalisaki bango na mampa mpe na mai. | |
| I Ki | LinVB | 18:5 | Akab alobi na Obadia : « Yaka, tokatisa ekolo mobimba, tokende kotala maziba na miluka minso ; mbele tokozwa matiti mpo tobikisa farasa na mpunda mpe toboma yango te. » | |
| I Ki | LinVB | 18:7 | Bobele o nzela ena Obadia akutani na Elia, ayebi ye, amibwaki o mabelé mpe alobi : « Yo, mokonzi wa ngai Elia ? » | |
| I Ki | LinVB | 18:9 | Kasi Obadia alobi : « Nasali lisumu nini mpo okaba ngai mosaleli wa yo o maboko ma Akab, bongo aboma ngai ? | |
| I Ki | LinVB | 18:10 | Lokola Yawe Nzambe wa yo azali na bomoi, nkolo wa ngai asili atindi bato o bikolo binso mpe o mikili minso mpo ya koluka yo. Esika bango balobi ’te bamoni yo te, alayisi bato ba ekolo to mokili mona ndai ’te bamoni yo te. | |
| I Ki | LinVB | 18:12 | Kasi soko nakei, Elimo wa Yawe akokende na yo soki wapi. Soko nakoyebisa Akab, ye akozwa yo te mpe akoboma ngai. Nzokande ngai mosaleli wa yo nakobanga Yawe banda bomwana. | |
| I Ki | LinVB | 18:13 | E Mokonzi wa ngai, makambo nasalaki o eleko Yezabel abomaki baprofeta ba Yawe, bayebisaki yo te ? Nabombaki baprofeta ba Yawe monkama o mibenga mibale, o mobenga moko moko bato ntuku itano, mpe nazalaki kopesa bango mampa na mai. | |
| I Ki | LinVB | 18:14 | Mpe sikawa olobi na ngai : ‘Kende koloba na nkolo wa yo : Namoni Elia’, kasi ye akoboma ngai. » | |
| I Ki | LinVB | 18:15 | Elia alobi : « Lokola Yawe wa bokasi bonso oyo nakosalelaka, azali na bomoi, ya solo, lelo mpenza ngai nakokende epai ya Akab. » | |
| I Ki | LinVB | 18:16 | Obadia akei epai ya Akab mpe ayebisi ye makambo manso ; mpe Akab akei kokutana na Elia. | |
| I Ki | LinVB | 18:18 | Elia azongisi : « Ngai nazali mobebisi wa Israel te, kasi yo moko na libota lya tata wa yo boboyi mibeko mya Yawe, mpe bondimi Baal. | |
| I Ki | LinVB | 18:19 | Sikawa kende kosangisa ba-Israel banso o ngomba Karmel, elongo na baprofeta ba Baal nkama inei na ntuku itano, na mpe baprofeta ba Asera nkama inei, baye bakoliaka o meza ya Yezabel. » | |
| I Ki | LinVB | 18:21 | Elia akei epai ya bango, alobi : « Mikolo boni bokokumisa naino bato babale ? Soko Yawe azali Nzambe, bolanda ye ; soko ezali Baal, bolanda ye. » Bato bazwi liloba lya kozongisa te. | |
| I Ki | LinVB | 18:22 | Elia alobi lisusu : « Natikali ngai moko profeta wa Yawe. Baprofeta ba Baal bazali nkama inei na ntuku itano. | |
| I Ki | LinVB | 18:23 | Bopesa biso bana ba ngombe, ngombe babali ibale. Bango bakamata yoko, baboma yango mpe batia nkoni, kasi bapelisa móto te. Ngai nakokamata ngombe esusu, nakopelisa mpe móto te. | |
| I Ki | LinVB | 18:24 | Bino bokobelela nzambe wa bino, ngai nakobondela nkombo ya Yawe. Nzambe oyo akondima losambo mpe akotinda móto, ye nde Nzambe wa solo. » Banso bandimi, balobi : « Malamu ! » | |
| I Ki | LinVB | 18:25 | Elia alobi na baprofeta ba Baal : « Bino bopono ngombe eye bolingi mpe bobanda liboso, mpo bino boleki mingi. Bobelela nkombo ya nzambe wa bino, kasi bopelisa móto te. » | |
| I Ki | LinVB | 18:26 | Bakamati ngombe mpe balengeli binso. Babeleli nkombo ya Baal, uta ntongo tee midi, balobi : « Baal e, ndimela biso ! » Kasi bayoki lolaka te, eyano mpe te. Babini mpe bafukami liboso lya altare eye batongaki. | |
| I Ki | LinVB | 18:27 | Ekoki midi, Elia aseki bango, alobi : « Boganga makasi, azali nzambe. Mbele azali na mosala mingi, mbele akei mobembo to alali mpongi ; ntembe te, akolongwa o mpongi. » | |
| I Ki | LinVB | 18:28 | Balendisi koganga makasi, bamizokisi na mbeli mpe na mimpanga engebene na momeseno mwa bango, mpe makila matangi mingi kuna. | |
| I Ki | LinVB | 18:29 | Eleki midi, babandi losambo la mpokwa tee ngonga ya libonza lya mpokwa ebeti. Nzokande bayoki lolaka te, eyano te, elembo yoko ya bondimi te. | |
| I Ki | LinVB | 18:30 | Sikawa Elia alobi na bato banso : « Boyaka penepene ! » Mpe bato banso babelemi na ye. Abongisi altare ya Yawe eye babebisaki liboso. | |
| I Ki | LinVB | 18:31 | Akamati mabanga zomi na mabale, engebene na motango mwa mabota zomi na mabale ma bana ba Yakob, oyo Yawe alobaki na ye ’te : Nkombo ya yo ekozala Israel. | |
| I Ki | LinVB | 18:32 | Atongeli Nkombo ya Yawe altare. Atimoli libulu zongazonga na altare likoki kokwa bingwongolo bibale bya mai. | |
| I Ki | LinVB | 18:34 | Na nsima alobi : « Botondisa mbeki inene inei na mai, mpe bosopa mango o libonza mpe o nkoni. » Bango basali se bongo. Elia alobi lisusu : « Bosala bongo mbala ya ibale », mpe basali bongo. Elia alobi lisusu : « Bosala bongo mbala ya isato », mpe basali se bongo. | |
| I Ki | LinVB | 18:36 | Ekoki ngonga ya libonza, profeta Elia ayei mpe alobi : « Yawe Nzambe wa Abarama, wa Izaka mpe wa Israel, lelo bato bayeba ’te bobele yo ozali Nzambe o ekolo Israel. Bayeba ’te ngai nazali mosaleli wa yo mpe nasali maye manso se mpo ’te natosa monoko mwa yo. | |
| I Ki | LinVB | 18:37 | Ndimela ngai, Yawe, yanola ngai mpo ’te bato banso bayeba ’te yo Yawe ozali Nzambe wa solo ; okobongola bongo mitema mya bango. » | |
| I Ki | LinVB | 18:38 | Mpe ut’o likolo, móto mwa Yawe mokiti, mosilisi libonza na nkoni, mosilisi mpe mai mazalaki o libulu. | |
| I Ki | LinVB | 18:39 | Bato banso balengi na nsomo, ba-kwei elongi o nse, balobi : « Yawe azali Nzambe solo ! Yawe azali Nzambe solo ! » | |
| I Ki | LinVB | 18:40 | Elia alobi na bango : « Bokanga baprofeta ba Baal, moto moko akima te ! » Bakangi bango. Elia akei na bango o lobwaku la Kison mpe akati bango nkingo. | |
| I Ki | LinVB | 18:41 | Elia alobi na Akab : « Buta ngomba, lia mpe mele ; mpo nazali koyoka lokito la mbula. » | |
| I Ki | LinVB | 18:42 | Akab akei kolia mpe komele, mpe Elia abuti ngomba Karmel tee o nsonge, akumbami o nse mpe akitisi elongi o mabolongo. | |
| I Ki | LinVB | 18:43 | Alobi na mosaleli wa ye : « Buta naino kuna mpe tala epai ya mbu. » Mosaleli akei, atali mpe alobi : « Namoni eloko te. » Mbala nsambo Elia alobi : « Zonga kuna. » | |
| I Ki | LinVB | 18:44 | Mbala ya nsambo mosaleli alobi : « Namoni mwa limpata like, bonene lokola loboko la moto, libimi epai ya mbu. » Elia alobi : « Kende koyebisa Akab ’te abongisa likalo mpe akende, mbula ekangisela ye nzela te. » | |
| I Ki | LinVB | 18:45 | Mwa moke nsima likolo liindi ; mompepe mobandi kopepe mpe mbula makasi ebeti. Akab abuti likalo, akei epai ya Yizreel. | |