Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JUDGES
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16 17 18 19 20 21
Prev Up Next
Chapter 13
Judg LinVB 13:1  Ba-Israel babandi kosala mabe lisusu o miso ma Yawe, mpe Yawe akabi bango o maboko ma ba-Filisti mibu ntuku inei.
Judg LinVB 13:2  Ezalaki o mboka Sorea moto moko wa libota lya Dan, nkombo ya ye Manoa. Mwasi wa ye ekomba, abotaki te.
Judg LinVB 13:3  Anzelu wa Yawe abimeli mwasi, alobi na ye : « Ozalaki ekomba, obo­ti te,
Judg LinVB 13:4  kasi okozwa zemi mpe okobota mwana mobali. Okeba banda lelo : omele vino to masanga makasi te, olia eloko mbindo te.
Judg LinVB 13:5  Mpamba te, oko­zwa zemi, okobota mwana mobali ; bakokata ye nsuki te, zambi akobo­nzama na Nzambe ut’o libumu lya mama wa ye ; ye moto akobikisa bana ba Israel o maboko ma ba-Filisti. »
Judg LinVB 13:6  Mwasi akei koyebisa mobali wa ye : « Moto wa Nzambe abimelaki ngai ; elongi ya ye lokola elongi ya anze­lu wa Nzambe, azalaki kitoko mpenza. Natuni ye te esika auti, ye mpe ayebisi ngai nkombo ya ye te.
Judg LinVB 13:7  Kasi alobi na ngai : Okozwa zemi, okobota mwana mobali ; bongo okeba : omele vino to masanga makasi te, olia eloko mbindo te, zambi mwana akobonzama na Nzambe ut’o libumu lya mama wa ye. »
Judg LinVB 13:8  Manoa abondeli Yawe, alobi : « E Mokonzi, nabondeli yo, moto wa Nza­mbe oyo otindeli biso aya mbala esusu mpo ayebisa biso nini tosengeli kosala na mwana oyo tokobota. »
Judg LinVB 13:9  Nzambe andimi losambo la Manoa. Anzelu wa Nzambe ayei lisusu kotala mwasi. Azalaki o bilanga, kasi mobali wa ye Manoa azalaki na ye te.
Judg LinVB 13:10  Mwasi akei mbangu koyebisa mobali wa ye alobi na ye : « Moto oyo aya­ki awa mokolo mosusu, abimelaki ngai lisusu. »
Judg LinVB 13:11  Manoa atelemi, alandi mwasi wa ye, akomi epai ya moto ona, atuni ye : « Yo moto osololaki na mwasi oyo ? » Azongisi : « Iyo, ezali bo­bele ngai. »
Judg LinVB 13:12  Manoa atuni ye : « Sikawa, awa maloba ma yo malingi masalema, mobeko nini tosengeli kolanda mpo ya mwana, mpe boniboni tokoki kosala mpo ya ye ? »
Judg LinVB 13:13  Anzelu wa Yawe ayanoli : « Biloko binso natangelaki mwasi, atika byango.
Judg LinVB 13:14  Alia mbuma yoko ya nzete ya vino te, amele vino to lotoko te ; alia eloko mbindo te ; atosa mibeko minso natindaki ye. »
Judg LinVB 13:15  Manoa alobi na anzelu wa Yawe : « Ondima tofandisa yo moke mpe tolambela yo mwana ntaba ! »
Judg LinVB 13:16  Anzelu wa Yawe alobi na Manoa : « Ata ofa-ndi­si ngai, nakolia bilei bya yo te, kasi soko olingi kotumba libonza, bo­nze­la Yawe lyango. » Manoa ayebi te ’te moto oyo azali anzelu wa Yawe.
Judg LinVB 13:17  Manoa atuni anzelu wa Yawe : « Nko­mbo ya yo nani mpo ’te tokoka kokumisa yo o mokolo maloba ma yo makosalema ? »
Judg LinVB 13:18  Anzelu wa Yawe azongisi : « Mpo nini olingi koyeba nkombo ya ngai ? Ezali mobombamo. »
Judg LinVB 13:19  Manoa akamati mwana ntaba mpe bilei ; o libanga abonzeli Yawe yango. Yawe asali likambo lya kokamwa o miso ma Manoa na mwasi wa ye :
Judg LinVB 13:20  mololi moye molongwi o altare mpe mobuti o likolo momemi anzelu wa Yawe. Emoni Manoa na mwasi wa ye likambo lina, bakwei bilongi o nse.
Judg LinVB 13:21  Anzelu wa Yawe amilakisi lisusu na Manoa mpe na mwasi wa ye te. Bongo Manoa ayebi sikawa ’te ezalaki anzelu wa Yawe.
Judg LinVB 13:22  Manoa alobi na mwasi wa ye : « Tokokufa solo, zambi tomonoki Nzambe. »
Judg LinVB 13:23  Kasi mwasi wa ye alobi : « Soko Yawe alingaki ’te tokufa, mbele andimaki libonza o maboko ma biso te, mbele alakisaki biso mana manso te, mbele ayebisaki biso maloba mana manso te. »
Judg LinVB 13:24  Mwasi abo­ti mwana mobali, apesi ye nko­mbo Samson. Mwana akoli mpe Yawe abenisi ye.
Judg LinVB 13:25  Elimo ya Yawe eba­ndi kokitela Samson, o mokili mwa Dan, kati ya Sorea na Estaol.