NEHEMIAH
Chapter 11
Nehe | LinVB | 11:1 | Awa bayangeli ba ekolo bakei kofanda o Yeruzalem, bato basusu babeti zeke mpo ’te bapono moto moko o kati ya bato zomi afanda o Yeruzalem, engumba esantu ; basusu libwa bakoki kofanda o mboka isusu. | |
Nehe | LinVB | 11:3 | Tala nkombo ya bayangeli ba ekolo, bafandi o Yeruzalem. O mboka isusu ya Yuda bato basusu ba Israel bafandi : banganga Nzambe, ba-Levi, basalisi, na bana ba basali ba Salomo, bafandi, moto na moto o mabelé mpe o mboka ya ye moko. | |
Nehe | LinVB | 11:4 | O Yeruzalem efandi ndambo ya bato ba libota lya Yuda mpe ba libota lya Benyamin. O libota lya Yuda ezalaki : Ataya, mwana wa Uzia, mwana wa Zekaria, mwana wa Amaria, mwana wa Sefatia, mwana wa Malalel wa libota lya Peres ; | |
Nehe | LinVB | 11:5 | na Maseya, mwana wa Baruk, mwana wa Kolkoze, mwana wa Kazaya, mwana wa Adaya, mwana wa Yoyarib, mwana wa Zekaria, wa libota lya Sela. | |
Nehe | LinVB | 11:7 | O libota lya Benyamin ezalaki : Salu, mwana wa Mesulam, mwana wa Yoed, mwana wa Pedaya, mwana wa Kolaya, mwana wa Maseya, mwana wa Itiel, mwana wa Yesaya, | |
Nehe | LinVB | 11:9 | Yoel, mwana wa Zikri, azalaki moyangeli wa bango ; Yeyuda, mwana wa Asenua, azalaki moto wa babale mpo ya koyangela mboka. | |
Nehe | LinVB | 11:11 | Seraya, mwana wa Kilkia, mwana wa Mesulam, mwana wa Sadok, mwana wa Merayot, mwana wa Akitub, nkumu wa Tempelo ya Nzambe ; | |
Nehe | LinVB | 11:12 | na mpe bandeko ba bango bakosalaka mosala o Tempelo : bato 822 ; Adya, mwana wa Yerokam, mwana wa Pelalia, mwana wa Amsi, mwana wa Zakaria, mwana wa Pasekur, mwana wa Malkia, | |
Nehe | LinVB | 11:13 | na bandeko ba ye, bankumu ba mabota : bato 242 ; na Amasai, mwana wa Azarel, mwana wa Aksai, mwana wa Mesilemot, mwana wa Imer, | |
Nehe | LinVB | 11:14 | na bandeko ba ye, bato ba mpiko : 128. Zabdiel, mwana wa Agadol, azalaki moyangeli wa bango. | |
Nehe | LinVB | 11:15 | O libota lya ba-Levi ezalaki : Semaya, mwana wa Asub, mwana wa Asrikam, mwana wa Kasabia, mwana wa Buni ; | |
Nehe | LinVB | 11:16 | Sabtai na Yozabad, baya-ngeli ba ba-Levi bazalaki kotala misala mya libanda lya Tempelo ya Nzambe ; | |
Nehe | LinVB | 11:17 | Matania, mwana wa Mika, mwana wa Zabdi, mwana wa Asaf, oyo azalaki koyembisa bato nzembo mpe kosambela na bango bisambo bya kotondo Nzambe ; Bakbukia, moto wa babale o kati ya bandeko ba ye ; Obadia, mwana wa Samua, mwana wa Galal, mwana wa Yedutun. | |
Nehe | LinVB | 11:19 | Bakengeli ba bizibeli bya Ndako ya Nzambe : Akub, Talmon na bandeko ba bango : bazalaki 172. | |
Nehe | LinVB | 11:20 | Bato basusu ba Israel, banganga Nzambe na ba-Levi bafandi o mboka inso ya Yuda, moto na moto o mabelé ma ye moko. | |
Nehe | LinVB | 11:22 | Moya-ngeli wa ba-Levi ba Yeruzalem : Uzi, mwana wa Bani, mwana wa Kasabia, mwana wa Matania, mwana wa Mika, wa libota lya Asaf ; bazalaki bayembi o Tempelo ya Nzambe ; | |
Nehe | LinVB | 11:23 | mpo mokonzi apesaki bango mobeko, alakisaki boniboni bayembi basala mosala mwa bango mokolo na mokolo. | |
Nehe | LinVB | 11:24 | Petakia, mwana wa Mesazebel, wa libota lya Zera, mwana wa Yuda, azalaki penepene na mokonzi mpo ’te atala makambo manso ma bato. | |
Nehe | LinVB | 11:25 | O mboka inso ya esobe, bana ba Yuda bafandi o Kiriat-Arba, o Dibon, o Yekabsel mpe o bituka bya penepene, | |
Nehe | LinVB | 11:30 | o Zanoa, o Adulam, o Lakis, o Azeka mpe o bituka bya penepene ; bango bakei kofanda ut’o Berseba tee lobwaku la Inom. | |