NUMBERS
Chapter 25
Numb | LinVB | 25:1 | Ba-Israel bakei kofanda o Sitim. Kasi bato babandi kosala bondumba na bana basi ba Moab. | |
Numb | LinVB | 25:2 | Bilenge basi babendi bango babonzela banzambe ba bango mabonza. Ba-Israel balei biloko bya bango mpe bafukameli banzambe ba bango. | |
Numb | LinVB | 25:4 | Yawe alobi na Moze : « Kanga bakambi banso mpe tingisa bango o nzete na moi, o miso ma Yawe mpo ’te nkanda ya Yawe ona bato ba Israel esila. » | |
Numb | LinVB | 25:5 | Moze alobi na bazuzi ba Israel : « Moto na moto akanga mpe aboma baye bafukamelaki Baal wa Peor. » | |
Numb | LinVB | 25:6 | Moto moko wa Israel ayei na mwasi mo-Madian epai ya bandeko ba ye, o miso ma Moze mpe ma bato banso ba Israel o ntango bazalaki kolela o monoko mwa Ema ya Likita. | |
Numb | LinVB | 25:7 | Pinekas, mwana wa nganga Nzambe Eleazar, noko wa Aron, amoni bongo, na mbangu, likongo o loboko, | |
Numb | LinVB | 25:8 | alandi mo-Israel tee o ndako ya kolala, mpe atuboli bango babale libumu, ná mo-Israel ná mwasi lokola. O ntango ena etumbu eye ekwelaki bana ba Israel bokomi kosila. | |
Numb | LinVB | 25:11 | « Pinekas, mwana wa Eleazar, nkoko wa nganga Nzambe Aron, alongoli nkanda ya ngai eye nayokelaki bana ba Israel, zambi ye moko o kati ya bango azalaki na zuwa lokola ngai ; bongo, ata nazalaki na zuwa linene, nasilisi bana ba Israel te. | |
Numb | LinVB | 25:13 | Bondeko bona bokozala bwa ye mpe bwa bana ba ye seko, bokopesa ye bonganga bwa seko, zambi awa azalaki na mpila mpo ya Nzambe wa ye, akoki kosala milulu mya bolimbisi masumu ma bana ba Israel. » | |
Numb | LinVB | 25:14 | Moto wa Israel, oyo babomaki elongo na mwasi mo-Madian, nkombo ya ye Zimri, mwana wa Salu, nkumu wa libota lya Simeon. | |
Numb | LinVB | 25:15 | Mwasi mo-Madian, oyo babomaki, nkombo ya ye Kozbi, mwana wa Sur, nkumu wa libota lya Madian. | |