NUMBERS
Chapter 14
Numb | LinVB | 14:1 | Awa bayoki bongo, bato banso batomboki mpe bagangi makasi ; bazalaki kolela butu mobimba. | |
Numb | LinVB | 14:2 | Na nsima bana banso ba Israel batomboki na Moze mpe na Aron, balobi na bango : « Mpo nini tokufaki o Ezipeti to awa o eliki te ? | |
Numb | LinVB | 14:3 | Mpo nini Yawe akambi biso awa o mokili moye mpo baboma biso na mopanga, mpe bayiba basi na bana ba biso ? Eleki malamu tozonga o Ezipeti ! » | |
Numb | LinVB | 14:6 | Yozue, mwana wa Nun, na Kaleb, mwana wa Yefune, baye bakendeki kotala mokili mwa sika, bapasoli bilamba bya bango. | |
Numb | LinVB | 14:7 | Balobi na lisanga mobimba lya bana ba Israel : « Mokili tokendeki kotala mozali kitoko mingi. | |
Numb | LinVB | 14:8 | Soko Yawe asalisi biso, akokotisa biso o mokili mwango akopesa biso. Ezali mokili motondi na mabéle ma ngombe mpe na mafuta ma nzoi. | |
Numb | LinVB | 14:9 | Botombokela Yawe te. Bobanga mpe bato ba ekolo ena te, zambi tokolonga bango. Banzambe ba bango batiki kobatela bango, kasi Yawe azali na biso. Bobanga bango te ! » | |
Numb | LinVB | 14:10 | Bato banso ba Israel bayokani ’te bakoboma bango na mabanga, kasi o ntango ena nkembo ya Yawe emononi likolo lya Ema ya Likita o miso ma bato banso ba Israel. | |
Numb | LinVB | 14:11 | Yawe alobi na Moze : « Mikolo boni naino bato baye bakokinola ngai ? Ata nasalaki makamwisi mingi o miso ma bango, mikolo boni bakotia ntembe na ngai ? | |
Numb | LinVB | 14:12 | Nakotindela bango bokono bobe mpe nakopima bango mokili nalingaki kopesa bango. Kasi nakokomisa yo tata wa ekolo enene, eleki bokasi na boike bwa bato. » | |
Numb | LinVB | 14:13 | Moze ayanoli Yawe : « Bato ba Ezipeti bayebi ’te yo moto obimisaki bango o mokili mwa bango na bokasi bwa yo. | |
Numb | LinVB | 14:14 | Bayebisi bato ba ekolo eye mpo yango. Bayoki ’te yo Yawe ozali o ntei ya bato ba yo, mpe okolakisaka bango elongi ya yo. Bayebi ’te limpata lya yo likotelemeke likolo lya bango, mpe okotambolaka liboso lya bango ; na moi okomononoko lokola limpata, na butu lokola likonzi lya móto. | |
Numb | LinVB | 14:15 | Soko obomi bato ba yo na mbala yoko boye, bampaya baye bayoki nsango ya yo bakoloba : | |
Numb | LinVB | 14:16 | ‘Yawe akokaki te kokotisa bato ba ye o mokili moye alayelaki bango ndai ’te bakoyingela wana, yango wana abomi bango banso o eliki.’ | |
Numb | LinVB | 14:18 | ‘Ngai Yawe wa ngolu, nakoyokelaka bato mawa. Nayebi kolimbisa bato soko babuki mobeko mpe soko basali lisumu, kasi nakopesaka etumbu ; ata bana na bankokolo bakozwa etumbu mpo ya masumu ma batata ba bango.’ | |
Numb | LinVB | 14:19 | Sikawa limbisa mabe ma bato baye, mpo oleki bonene mpe bolamu ; limbisa bango lokola osalaki bango banda o mokili mwa Ezipeti tee sikawa. » | |
Numb | LinVB | 14:22 | Bato baye banso bamonoki nkembo ya ngai mpe makamwisi manene nasalaki o mokili mwa Ezipeti mpe awa o eliki, bango basili komeka ngai mbala zomi mpe baboyaki koyoka lolaka la ngai, | |
Numb | LinVB | 14:23 | bakomono mokili te, moye nalayaki ndai ’te nakopesa batata ba bango. Ata moto moko te wa baye bakokinolaka ngai akomono mokili mona. | |
Numb | LinVB | 14:24 | Kasi mosaleli wa ngai Kaleb, oyo azali na motema lokola bango te mpe atosi ngai o makambo manso, ye akokoto o mokili esika akendeki kotala, mpe bana ba ye bakokoma bankolo ba mokili mona. | |
Numb | LinVB | 14:25 | Ba-Amalek na ba-Kanana bakofandaka o esobe ena. Bozonga lobi esika boutaki, bokende lisusu o eliki, bolanda nzela ekokende epai ya Mbu ya Nsoló. » | |
Numb | LinVB | 14:27 | « Mikolo boni bato baye babe bakosilikela ngai ? Nayoki boniboni bana ba Israel batombokeli ngai. | |
Numb | LinVB | 14:28 | Loba na bango : Yawe alobi boye : Ngai nazali Nzambe ; awa bosilikeli ngai nakosala bino lokola bozali koloba o matoi ma ngai. | |
Numb | LinVB | 14:29 | Awa botombokeli ngai, bino banso botangemi, bino banso bokokisi mibu ntuku ibale : bibembe bya bino bikolala o eliki eye. | |
Numb | LinVB | 14:30 | Natomboli loboko mpe nalayi ’te bokoyingela te o mokili nalakelaki bino. Bobele Kaleb, mwana wa Yefune, na Yozue, mwana wa Nun bakoyingela kuna. | |
Numb | LinVB | 14:31 | Bankoko ba bino, baye bolobaki ’te bakokwa o maboko ma banguna, ngai nakokotisa bango o mokili mona, mpe bakoyeba mokili moye bino boboyaki. | |
Numb | LinVB | 14:33 | mpe bana ba bino bakozala bakengeli ba mpata mpe bakoyengayenga o eliki mibu ntuku inei ; bakozwa etumbu mpo ya masumu ma bino ; ekozala bongo tee bibembe bya bino banso bikolala o eliki. | |
Numb | LinVB | 14:34 | Botambolaki mikolo ntuku inei mpo ya kotala mokili mona. Mokolo moko mokokoma lokola mobu moko. Yango wana bokofuta mabe ma bino mibu ntuku inei mobimba ; bongo bokoyeba mabe nini bosalaki awa boboyaki ngai. | |
Numb | LinVB | 14:35 | Ngai Yawe nalobi bongo ! Nakopesa boye etumbu na bato baye babe bayokanaki ’te bakotombokela ngai. O eliki eye moto moko akobika te, banso bakokufa kuna. » | |
Numb | LinVB | 14:36 | Bato baye Moze atindaki batala mokili, o ntango bazongaki, bapesi bato ba Israel mayele mabe mpo ’te batomboko na Moze, zambi balobaki se maloba mabe mpo ya mokili mona ; | |
Numb | LinVB | 14:38 | O kati ya babali bakendeki kotala mokili mona, bobele Yozue, mwana wa Nun, na Kaleb, mwana wa Yefune, babiki. | |
Numb | LinVB | 14:40 | Mokolo mwa nsima, na ntongontongo, bakei kobuta tee o nsonge ya ngomba mpe balobi : « Tala, tozali awa mpe tobuti ngomba eye Yawe alakisaki. Solo, tosali masumu. » | |
Numb | LinVB | 14:41 | Moze atuni bango : « Boyei kosala nini ? Bobuki mobeko mwa Yawe. Bokolonga soki moke te. | |
Numb | LinVB | 14:43 | Bato ba Amalek na bato ba Kanana bazali liboso lya bino, bokokufa na mopanga mwa bango, zambi boboyaki Yawe mpe Ye akozala na bino te. » | |
Numb | LinVB | 14:44 | Nzokande na lolendo babuti tee o nsonge ya ngomba, kasi Sanduku ya Bondeko ebimi o nganda te, Moze mpe te. | |