Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
NUMBERS
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 17
Numb LinVB 17:2  « Loba na Eleazar, mwana wa nga­nga Nzambe Aron, alongola mbeki ya mpaka ya malasi o kati ya makala mpe apanza móto mosika,
Numb LinVB 17:3  zambi mbeki iye ya bato bakufi mpo ya masumu ma bango, ikomi mbeki isantu, mpo bayaki na yango o miso ma Yawe ; batula na yango manzanza mpo ya kozipa altare. Ikozala o miso ma bana ba Israel lokola elembo. »
Numb LinVB 17:4  Nganga Nzambe Eleazar akamati mbeki ya mbengi ; bato bamemeki yango bakufaki na móto. Batuli na yango manzanza mpo ya kozipa altare.
Numb LinVB 17:5  Yango ikoyebisa bana ba Israel ’te moto moko, soko azali wa libota lya Aron te, akoki kobeleme te mpo ya kotumba mpaka ya malasi o miso ma Yawe, soki te akozwa likambo lokola Kore na baninga ba ye, se lokola Yawe ayebisaki bango na monoko mwa Moze.
Numb LinVB 17:6  Mokolo mwa nsima bato banso ba Israel batomboki na Moze mpe na Aron, balobi : « Bobomi bato ba ekolo ya Yawe. »
Numb LinVB 17:7  O ntango bato banso ba­zalaki kotombokela Moze na Aron, batali epai ya Ema ya Likita ; mpe tala, limpata lisipi yango mpe nkembo ya Yawe emononi.
Numb LinVB 17:8  Moze na Aron bakei koteleme o boso bwa Ema ya Likita.
Numb LinVB 17:10  « Longwa epai ya bango ; nakoboma bango na mbala yoko. » Bango bakwei elongi o nse.
Numb LinVB 17:11  Moze alobi na Aron : « Kamata mbeki ya mpaka ya malasi, tia móto mwa altare o kati, sopa mpaka ya malasi likolo mpe kende noki epai ya bato mpo ya kosala milulu mya bolimbisi masumu, mpo Yawe ayoki nkanda mpenza : etumbu esili eba­ndi. »
Numb LinVB 17:12  Aron akamati mbeki lokola Moze alobaki, mpe apoti mbangu o kati ya lisanga lya bato ; etumbu esili ebandi o kati ya bango. Atii mpaka ya malasi mpe asali milulu mya bolimbisi masumu.
Numb LinVB 17:13  Na nsima akei koteleme o kati ya baye bakufi na baye bakufi te ; bokono bokomi kosila.
Numb LinVB 17:14  Bato nkoto zomi na inei na nkama nsambo bakufi mpo ya etumbu ena, kotanga bato bakufaki mpo ya likambo lya Kore te.
Numb LinVB 17:15  Na nsima Aron azongi epai ya Moze o monoko mwa Ema ya Likita ; etumbu esili nye.
Numb LinVB 17:17  « Loba na bana ba Israel : Bapesa yo mangenda, libota lyoko lyoko lingenda lyoko ; bankumu ba mabota bapesa yo ma­ngenda zomi na mabale o nkombo ya libota lya bango. Okoma nkombo ya libota o lingenda lyoko lyoko.
Numb LinVB 17:18  O li­ngenda lya Levi koma nkombo ya Aron, zambi libota lyoko lyoko likozala na lingenda lyoko.
Numb LinVB 17:19  Tia mango o Ema ya Likita, o boso bwa Sanduku ya Bondeko, o esika nakokutanaka na yo.
Numb LinVB 17:20  Lingenda liye likobimisa nkasa, likolakisa moto oyo ngai naponi. Bongo nakosilisa bilobaloba bya bana ba Israel bazali kolobela yo. »
Numb LinVB 17:21  Moze asololi na bana ba Israel mpe bankumu ba mabota manso bapesi ye lingenda, moto na moto li­ngenda lya ye : mangenda zomi na mabale o mabota ma bango manso. O kati ya mango lingenda lya Aron lisalaki mpe.
Numb LinVB 17:22  Moze atii mango o boso bwa Yawe o Ema ya Likita.
Numb LinVB 17:23  Eyi­ngeli Moze, o mokolo mwa nsima o Ema ya Likita, lingenda lya Aron, liye lya libota lya Levi, libimisi nkasa, fulele ifungwami mpe mbuma ya lidame iteli.
Numb LinVB 17:24  Moze akamati mangenda manso o miso ma Yawe mpe akei kolakisa bana ba Israel banso mango, awa bamoni mango moto na moto akamati lingenda lya ye.
Numb LinVB 17:25  Na nsima Yawe alobi na Moze : « Zongisa lingenda lya Aron o boso bwa Sanduku ya Bondeko, litikala wana lokola elembo mpo ya bato baye batombokoki. Lingenda lina likosilisa bilobaloba bya bango nye ; bo­ngo nayoka bango lisusu te, mpo bakufa te. »
Numb LinVB 17:27  Bana ba Israel balobi na Moze : « Esili na biso, tokokufa ! Tokokufa biso banso !
Numb LinVB 17:28  Moto ata nani abelemi na Ndako ya Yawe mpo ya kobonza libonza akokufa. Tokufa bongo biso banso ? »