NUMBERS
Chapter 27
Numb | LinVB | 27:1 | Bana basi ba Selofead bayei epai ya Moze. Selofead azalaki mwana wa Efer, nkoko wa Galaad, mwana wa Makir, mwana wa Manase. Azalaki moto wa etuka ya Manase, mwana wa Yozefu. Nkombo ya bana basi ba ye : Mala, Noa, Ogla, Milka na Tirsa. | |
Numb | LinVB | 27:2 | Bakei epai ya Moze, nganga Nzambe Eleazar, bankumu na bato banso ba lisanga o monoko mwa Ema ya Likita, balobi : | |
Numb | LinVB | 27:3 | « Tata wa biso akufaki o eliki. Azalaki te o kati ya baye batombokoki na Yawe, azalaki o kati ya bato ba Kore te. Akufaki se mpo ya lisumu lya ye moko, abotaki bana babali te. | |
Numb | LinVB | 27:4 | Mpo nini nkombo ya ye ekufa bongo o libota lya ye ? Awa abotaki mwana mobali te, pesa biso ndambo ya mabelé o kati ya bandeko ba tata wa biso. » | |
Numb | LinVB | 27:7 | « Bana basi ba Selofead balobi malamu. Pesa bango mabelé mazala ma bango o kati ya bandeko ba tata wa bango ; pesa bango ndambo eye ya tata wa bango. | |
Numb | LinVB | 27:8 | Nsima loba na bana ba Israel : Soko mobali akufi mpe abotaki bana babali te, bopesa mabelé ma ye na mwana wa ye wa mwasi. | |
Numb | LinVB | 27:11 | Soko tata wa ye azali na bandeko babali te, bopesa mango na moto moko wa libota, oyo azali ndeko wa penepene. Ye moto azwa mabelé mana mpe akozala nkolo wa mango. Ezali mobeko mwa bosembo mwa bana ba Israel, lokola Yawe atindaki Moze. » | |
Numb | LinVB | 27:13 | Awa omoni mwango, okokufa mpe okokende kokutana na bankoko ba yo lokola ndeko wa yo Aron, | |
Numb | LinVB | 27:14 | zambi botombokeli ngai o eliki ya Sin, mpe bato banso baswanisi ngai o mokolo natindaki yo ’te obimisa mai mpo ’te nalakisa bosantu bwa ngai. » Mazali mai ma Meriba epai ya Kades o eliki ya Sin. | |
Numb | LinVB | 27:17 | oyo akobima mpe akoyingela liboso lya bango, moto akobimisa mpe akoyingisa bato ba lisanga lya Yawe ; bongo bazala te lokola etonga ezangi mokengeli. » | |
Numb | LinVB | 27:18 | Yawe alobi na Moze : « Kamata Yozue, mwana wa Nun, moto atondi na elimo ya Nzambe. Tandela ye maboko. | |
Numb | LinVB | 27:19 | Nsima benga ye ateleme o miso ma nganga Nzambe Eleazar mpe ma bato banso ba lisanga mpo ’te okoka kopesa ye bitinda bya yo o miso ma bango. | |
Numb | LinVB | 27:21 | Akoteleme o boso bwa nganga Nzambe Eleazar, oyo akosenge Yawe akata likambo na Urim (zeke). Bobele na nsima Yozue akoyeba soko ye na bato banso ba lisanga lya Israel bakoki kobima to koyingela. » | |
Numb | LinVB | 27:22 | Moze asali lokola Yawe atindaki ye. Akamati Yozue, alakisi ye na nganga Nzambe Eleazar mpe na bato banso ba lisanga. | |