Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
PSALMS
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 32
Psal LinVB 32:1  Ya Davidi. Mateya. Esengo na moto azwi bolimbisi masumu, oyo Nzambe azipi mabe ma ye.
Psal LinVB 32:2  Esengo na moto oyo Mokonzi abosani mabe ma ye, mpe azali na mayele ma mokosi te.
Psal LinVB 32:3  Awa nakangi monoko, bokasi bwa ngai bokomi kosila na boleli ntango inso.
Psal LinVB 32:4  Butu moi loboko la yo lozalaki konyata ngai, motema mwa ngai mokauki lokola esobe eziki na móto.
Psal LinVB 32:5  Nasakoli lisumu lya ngai o miso ma yo, nabombeli yo mabe ma ngai te. Nalobi : Nakosakola masumu ma ngai na Mokonzi, mpe olimbisi ngai nyongo na masumu.
Psal LinVB 32:6  Bongo bato ba yo banso basambela yo o eleko bayoki nsomo ; mai makasi mazindisa bango te.
Psal LinVB 32:7  Ozali esika nakoki kobombama, okobatelaka ngai o ntango ya mpasi, okozingaka ngai na nzembo ya libiki.
Psal LinVB 32:8  Olobi na ngai : « Nakolakisa yo nzela okolanda, nakolanda yo na miso mpo ya kopesa yo malako. »
Psal LinVB 32:9  Osala lokola farasa to mpunda te, iye izangi mayele, ikotosaka bobele soko batii yango ebende o monoko ; basengeli kolakisa yango botosi, soki te, mabe makokwela yo !
Psal LinVB 32:10  Malozi maike makokwela mosumuki, kasi oyo akolikya na Mokonzi, akobombama o bondeko bwa ye.
Psal LinVB 32:11  Bosepela Mokonzi, boyoka nsai, bino basemba, bino bato ba motema semba, boyemba na esengo.