PSALMS
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
67
68
69
70
71
72
73
74
75
76
77
78
79
80
81
82
83
84
85
86
87
88
89
90
91
92
93
94
95
96
97
98
99
100
101
102
103
104
105
106
107
108
109
110
111
112
113
114
115
116
117
118
119
120
121
122
123
124
125
126
127
128
129
130
131
132
133
134
135
136
137
138
139
140
141
142
143
144
145
146
147
148
149
150
Chapter 40
Psal | LinVB | 40:3 | Alongoli ngai o libulu lya liwa, o esika ya potopoto epai nazindaki, atelemisi ngai lisusu o mabelé makasi mpe alendisi makolo ma ngai. | |
Psal | LinVB | 40:4 | Atii o monoko mwa ngai nzembo ya sika nzembo ya bokumisi Nzambe wa biso. Moto nyonso ayeba yango mpe abanga, bongo atia motema na Mokonzi. | |
Psal | LinVB | 40:5 | Esengo na moto oyo akolikya na Mokonzi, oyo alandi bato ba lolendo te, to baye babungami o nzela ya lokuta. | |
Psal | LinVB | 40:6 | E Mokonzi Nzambe wa ngai, osalaki makamwa maike, maye obongiseli biso, moto moko te akokani na yo ! Nalingi kosakola mpe koloba mango lisusu, kasi maleki mingi, nakoki kotanga mango manso te. | |
Psal | LinVB | 40:7 | Olingaki libonza to moboma te, kasi ofungolaki ngai matoi mpo ’te nayoka malamu, osengeki libonza lya kotumba to lya kofuta nyongo te. | |
Psal | LinVB | 40:9 | Nzambe wa ngai, nalingi kosala maye yo olingi, mobeko mwa yo mokomami kin’o kati ya motema. » | |
Psal | LinVB | 40:10 | O lisanga linene nasakoli bosembo bwa Mokonzi, solo, nakangi monoko te, oyebi yango malamu. | |
Psal | LinVB | 40:11 | Nabombi bosembo bwa yo o kati ya motema te, nasakoli lobokó mpe libiki lya yo. Nabangi kosolola bolingi na bosolo bwa yo te o lisanga linene lya bankumu. | |
Psal | LinVB | 40:12 | Yo Mokonzi, opima ngai ngolu ya yo te, obatela ngai ntango inso na bolingi mpe na bosolo bwa yo. | |
Psal | LinVB | 40:13 | Malozi maike mayeli ngai ntango inso, masumu ma ngai makweli ngai o motó, maleki boike, nakoki koyeba mango lisusu te, masumu maleki nsuki ya motó mwa ngai na boike, mpe motema mwa ngai molembi nye. | |
Psal | LinVB | 40:15 | Baye balingi koboma ngai basambwa mpe bayoka nsoni ! Baye basepeli na mpasi ya ngai bazonga nsima mpe bakima na nsoni ! | |
Psal | LinVB | 40:17 | Kasi bato banso bakolukaka yo, basepela mpe bayoka esengo mpo ya yo ! Baye banso balingi libiki lya yo, baloba ntango inso : « Nzambe azali monene ! » | |