Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
PSALMS
Prev Up Next
Chapter 37
Psal LinVB 37:1  Ya Davidi. Bato babe, oyokela bango zuwa te, baye bazangi bosembo mpe te :
Psal LinVB 37:2  mosika te bakokauka lokola matiti, bakopolo lokola matiti mabesu.
Psal LinVB 37:3  Tia motema na Mokonzi mpe sala se malamu, bongo ofanda na boboto o mokili.
Psal LinVB 37:4  Luka esengo ya yo bobele epai ya Mokonzi, ye akopesa yo binso biye motema mwa yo molingi.
Psal LinVB 37:5  Tia bomoi bwa yo o maboko ma Mokonzi, tia elikya se na ye mpe akosalisa yo.
Psal LinVB 37:6  Akomonisa bosembo bwa yo polele lokola ntongo mpe bosolo bwa yo lokola moi na midi.
Psal LinVB 37:7  Zala motema mpio mpe tia elikya na Mokonzi, oyoka motema mpasi te soko basusu bazwi nkita noki, to soko balongi na mayele mabe.
Psal LinVB 37:8  Tika koyoka nkanda, tika mpe kosilika, kozala motema móto ekobebisaka motema.
Psal LinVB 37:9  Zambi bato babe bakosila nye, bato bakolikya o Mokonzi, bango nde bakozwa mokili.
Psal LinVB 37:10  Etikali moke mosumuki akozala lisusu te, ata oluki esika azali, okomono ye lisusu te.
Psal LinVB 37:11  Kasi bato babola bakozwa mokili, bakosepela na boboto nsuka te.
Psal LinVB 37:12  Soko moto mabe akaneli moto semba, mpe alakisi ye mino na nkanda,
Psal LinVB 37:13  Mokonzi akoseke ye, zambi asili amoni mokolo akozwa etumbu.
Psal LinVB 37:14  Bato babe babimisi mompanga, batandi litimbo mpo ’te baboma basemba, babola mpe baye bazali na makasi te.
Psal LinVB 37:15  Nzokande mompanga mokotubola mitema mya bango moko, matimbo ma bango makobukana.
Psal LinVB 37:16  Mwa mosolo moke mwa moto semba, moleki nkita enene ya mosumuki.
Psal LinVB 37:17  Zambi maboko ma mosumuki makobukana, kasi Mokonzi akolendisa basemba.
Psal LinVB 37:18  Nzambe akobatelaka bomoi bwa basemba, lisango lya bango likoumela seko.
Psal LinVB 37:19  O mikolo mya mpasi bakoyoka nsoni te, o mikolo mya nzala enene bakolia mpe bakotonda.
Psal LinVB 37:20  Nzokande basumuki bakokufa, banguna ba Nzambe bakosila, lokola matiti ma esobe mpe lokola milinga.
Psal LinVB 37:21  Moto mabe akodefa kasi akozongisaka te, moto semba azali motema ngolu mpe akokabaka.
Psal LinVB 37:22  Baye Nzambe akobenisa, bakozwa mokili. Baye akotombela bobe, bakokufa.
Psal LinVB 37:23  Mokonzi akokamba moto o nzela ya ye, soko ezalela ya ye esepelisi ye.
Psal LinVB 37:24  Soko akwei, akotikala kolala o mabelé te, zambi Mokonzi asili asimbi ye na loboko.
Psal LinVB 37:25  Nazalaki mwana, sikawa nakomi mobange, namoni naino te ’te Nzambe akotika basemba to bankoko ba bango bakende kosenge limpa.
Psal LinVB 37:26  Oyo akoyokaka ngolu, akodefisaka, libota lya ye likoumela seko !
Psal LinVB 37:27  Kima lisumu mpe sala malamu mpe okozwa esika ya kofanda seko.
Psal LinVB 37:28  Zambi Mokonzi alingi bosembo, akotika bato ba ye te, akobatelaka bango ntango inso ; kasi akosilisa bato babe na mpe libota lya bango mobimba.
Psal LinVB 37:29  Bato ba bosembo bakokoma bankolo ba Ekolo, bakofanda kuna mikolo minso seko.
Psal LinVB 37:30  Monoko mwa moto semba mokosakola bwanya, maloba ma ye se maloba ma bosembo.
Psal LinVB 37:31  Soko atosi mobeko mwa Nzambe na motema moko, makolo ma ye makozonga nsima te.
Psal LinVB 37:32  Baye baboya Nzambe bakonongoko moto wa bosembo, mpe bakolukaka mayele ma koboma ye.
Psal LinVB 37:33  Kasi Nzambe akotika ye o maboko ma bango te, akolingisa te ’te bakitisa ye o likambo.
Psal LinVB 37:34  Tia elikya na Mokonzi mpe landa nzela ya ye, ye akolendisa yo mpo okoma o Ekolo, mpe okomono ’te banyokoli bakosila.
Psal LinVB 37:35  Namonoki moto mabe akomi monyokoli, akoli se bokoli, lokola sédere ya Libano.
Psal LinVB 37:36  Na nsima, ntango naleki, azalaki lisusu te, asili alimwi, naluki ye, kasi namoni ye lisusu te.
Psal LinVB 37:37  Tala mpe bato babongi, bato ba bosembo, bato ba boboto bakozala na bana baike.
Psal LinVB 37:38  Kasi basumuki banso bakokufa, mpe libota lya baye baboya Nzambe likosila.
Psal LinVB 37:39  Libiki lya basemba likouta epai ya Mokonzi, ye azali ebombamelo ya bango o ntango ya nsomo.
Psal LinVB 37:40  Nzambe akosalisaka mpe akobatelaka bango, akolongola bango o maboko ma bato babe, akobikisa bango, mpo batii elikya na ye.