Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
PSALMS
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 25
Psal LinVB 25:1  Nzembo ya Davidi. Natomboli motema epai ya yo, Mokonzi, yo Nzambe wa ngai.
Psal LinVB 25:2  Natii elikya ya ngai se na yo, nayoka nsoni te, banguna baseke ngai te !
Psal LinVB 25:3  Moto atii motema na yo, akoyoka nsoni te, kasi oyo akotalaka yo mpamba, ye moto akoyoka nsoni.
Psal LinVB 25:4  Mokonzi, olakisa ngai nzela nasengeli kolanda, oyebisa ngai maye olingi nasala.
Psal LinVB 25:5  Oteya ngai bosolo bwa yo ; okamba ngai, zambi mobikisi wa ngai, se yo ! Mikolo minso nakotia elikya na yo.
Psal LinVB 25:6  Yawe, okundola ngolu ya yo, bolingi bwa yo, bolingi bwa seko.
Psal LinVB 25:7  Obosana masumu mpe mabungi ma ngai ma bolenge, okanisa ngai se na motema bolingi.
Psal LinVB 25:8  Mokonzi aleki bolamu mpe bosembo, akolakisaka nzela na baye babungi.
Psal LinVB 25:9  Akokambaka bato ba bosawa o nzela ya bosembo, mpe akoteyaka bato ba mawa nzela ya ye.
Psal LinVB 25:10  Soko bato batosi mibeko mya bondeko bwa ye, Mokonzi akosala manso na bolingi mpe na bosembo.
Psal LinVB 25:11  Mokonzi, mpo ya nkombo ya yo, limbisa masumu ma ngai maleki mingi.
Psal LinVB 25:12  Moto abangi Mokonzi solo, Mokonzi akolakisa ye nzela asengeli kolanda.
Psal LinVB 25:13  Mikolo minso akozala na esengo, bana ba ye bakozala bankolo ba Ekolo.
Psal LinVB 25:14  Mokonzi akomiyebisa na baye bakobangaka ye, akolakisa bango bondeko.
Psal LinVB 25:15  Miso ma ngai makotala se epai ya Mokonzi, akobatela makolo ma ngai makangema o motambo te.
Psal LinVB 25:16  Obwakela ngai miso, oyokela ngai ngolu, ngai moto wa mawa, nazali se ngai moko.
Psal LinVB 25:17  Olongola bobangi o motema mwa ngai, obimisa ngai o esika ya minyoko.
Psal LinVB 25:18  Tala ndenge nazali na mpasi mpe na mawa, sukola mbindo inso ya masumu ma ngai.
Psal LinVB 25:19  Tala, banguna ba ngai bazali ebele, bayini ngai boyini mpenza !
Psal LinVB 25:20  Batela bomoi bwa ngai mpe bikisa ngai, yo mokengeli wa ngai, nayoka nsoni te.
Psal LinVB 25:21  Bosolo mpe bosembo bobatela ngai, natii motema na yo, Mokonzi.
Psal LinVB 25:22  E Nzambe, bikisa bato ba Israel o makambo manso ma mpasi !