Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
PSALMS
Prev Up Next
Chapter 18
Psal LinVB 18:1  Ya kapita wa bayembi. Ya Davidi, mosaleli wa Mokonzi. Ayembeli Mokonzi nzembo eye o mokolo Nzambe abikisi ye o maboko ma banguna ba ye banso mpe ma Saul (2 Sam 22).
Psal LinVB 18:2  Alobi boye : Nalingi yo, Mokonzi, yo bokasi bwa ngai,
Psal LinVB 18:3  Mokonzi akobatelaka ngai, ye ebombamelo ya ngai, Mobikisi wa ngai, Nzambe wa ngai. Ye libanga lya ngai, namibombi epai ya ye, ye nguba ya ngai, ebombamelo, bokasi mpe libiki.
Psal LinVB 18:4  Bakumisa ye ! Nabeleli Mokonzi mpe nabiki o maboko ma banguna.
Psal LinVB 18:5  Minyama mya liwa mikangi ngai, mai bozindo mayokisi ngai nsomo.
Psal LinVB 18:6  Minyama mya mboka ya bawa mikangi ngai, batieli ngai mitambo mya liwa.
Psal LinVB 18:7  Ntango nayoki nsomo nabeleli Mokonzi mpe nabengi Nzambe wa ngai. Ut’o Tempelo ya ye ayoki lolaka la ngai, boleli bwa ngai bokomi tee o matoi ma ye.
Psal LinVB 18:8  Mokili mobulungani mpe moningani, ngomba ilengi mpe ibukani mpo ya nkanda ya ye.
Psal LinVB 18:9  Zolo ya ye ebimisi milinga, monoko mwa ye mobimisi móto mokosilisa binso, mopelisi makala ma móto.
Psal LinVB 18:10  Akitisi likolo mpe ye moko akiti, atamboli likolo lya mampata maindo.
Psal LinVB 18:11  Abuteli kerubim mpe apimbwi, akatisi likolo na mapapu ma mompepe.
Psal LinVB 18:12  Amilatisi molili lokola elamba, amikangi na mampata maindo ebele.
Psal LinVB 18:13  Mwinda mongengi liboso lya ye, ut’o mampata anokisi mbula ya matandala mpe ya makala ma móto.
Psal LinVB 18:14  Ut’o likolo Mokonzi abetisi nkake, ayokisi lolaka la ye.
Psal LinVB 18:15  Abeteli banguna makula ma ye mpe akimisi bango, minkalali mya ye mipanzi bango.
Psal LinVB 18:16  Nse ya mai ma mbu ekomi komonono, makonzi ma mokili makomi polele mpo ya nkanda ya yo, Mokonzi, mpe mpema ya zolo ya yo.
Psal LinVB 18:17  Ut’o likolo atandi loboko mpe asimbi ngai, abendi ngai ut’o bozindo bwa mai manene.
Psal LinVB 18:18  Abikisi ngai o maboko ma monguna makasi, o maboko ma banyokoli baleki ngai na nguya.
Psal LinVB 18:19  O mokolo nalembi, babimeli ngai, kasi Mokonzi ayei kosalisa ngai.
Psal LinVB 18:20  Abimisi ngai wana mpe alendisi ngai, abikisi ngai mpo ya bolingi bwa ye bonene.
Psal LinVB 18:21  Mokonzi asali na ngai engebene na bosembo bwa ngai, asalisi ngai zambi nazalaki na maboko peto,
Psal LinVB 18:22  mpo nalandaki nzela ya Mokonzi, naboyaki monoko mwa Nzambe wa ngai te.
Psal LinVB 18:23  Nazalaki kotosa mibeko mya ye minso, mpe natiki nzela ya mitindo mya ye te.
Psal LinVB 18:24  O miso ma ye nazali na likambo lyoko te mpe namibateli mpo ’te nasala masumu te.
Psal LinVB 18:25  Mokonzi asali na ngai engebene na bosembo bwa ngai, mpo amoni ’te nazalaki na maboko peto.
Psal LinVB 18:26  Okolakisaka boboto na moto atosi bondeko bwa yo, mpe bolamu bwa yo na moto abongi nye.
Psal LinVB 18:27  Okomilakisaka peto na moto wa bopeto, kasi ozali na bokebi na moto alingi kokosa.
Psal LinVB 18:28  Okobikisaka bato banyokwami, kasi okokitisaka mitó mya bato ba lofundo.
Psal LinVB 18:29  Yo, Mokonzi, ozali mwinda mwa ngai, Nzambe wa ngai, tanisa molili moyeli ngai.
Psal LinVB 18:30  Na bokasi bwa yo nabuki lopango la banguna, na bokasi bwa Nzambe wa ngai napimbwi likolo lya efelo.
Psal LinVB 18:31  Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bosembo, liloba lya Mokonzi lizali liloba lya bosolo, ye nguba ekobatelaka bato banso bakoluka libiki epai ya ye.
Psal LinVB 18:32  Nani azali Nzambe, bobele Mokonzi te ? Nani azali libanga, bobele Nzambe wa biso te ?
Psal LinVB 18:33  Ye Nzambe oyo akopesaka ngai nguya, mpe akosembolaka nzela ya ngai.
Psal LinVB 18:34  Akokomisaka ngai mbangu lokola mboloko mpe akotelemisaka ngai ngbi o nsonge ya ngomba.
Psal LinVB 18:35  Akolendisaka ngai mpo ya etumba, mpe maboko ma ngai mpo ya kobenda litimbo lya mbengi.
Psal LinVB 18:36  Ozali nguba mpe lisalisi lya ngai, na loboko la yo okolendisaka ngai, okondimelaka ngai na bolamu bonso.
Psal LinVB 18:37  Okobongiselaka ngai nzela, mpo makolo ma ngai matuta libaku te.
Psal LinVB 18:38  Nalandi banguna mpe nazwi bango. Nakozonga bobele soko nasilisi bango.
Psal LinVB 18:39  Nabeti bango, bakoki koteleme lisusu te, bakwei o nse ya makolo ma ngai.
Psal LinVB 18:40  Opesi ngai nguya o etumba, okitisi o boso bwa ngai baye bayei kobunisa ngai.
Psal LinVB 18:41  Okimisi banguna o miso ma ngai, mpe nasilisi baye bayinaki ngai.
Psal LinVB 18:42  Bagangi, kasi moto moko abikisi bango te, babeleli Mokonzi, kasi ayanoli te.
Psal LinVB 18:43  Naniki bango lokola mputulu epimbwi na mompepe, nanyati bango lokola potopoto ya balabala.
Psal LinVB 18:44  Obikisi ngai o maboko ma bato ba ekolo ya ngai batomboki, otii ngai mokonzi wa bikolo. Bato nayebaki liboso te, bakomi kosalela ngai ;
Psal LinVB 18:45  bampaya baluki kosepelisa ngai, batosi ngai noki mpenza ;
Psal LinVB 18:46  bana ba bikolo bisusu balembi, balengi mpe bakimi ebombamelo ya bango.
Psal LinVB 18:47  Mokonzi azala seko ! Ye libanga lya ngai ! Bakumisa Nzambe mobikisi wa ngai.
Psal LinVB 18:48  Ye Nzambe apesi ngai makasi ma kolonga banguna, akomisi bato ba bikolo bisusu basaleli ba ngai.
Psal LinVB 18:49  Obikisi ngai o nkanda ya banguna, osali ’te nalonga baye bayeli ngai etumba, mpe obikisi ngai o maboko ma banyokoli.
Psal LinVB 18:50  Yango wana nalingi kokumisa yo, Mokonzi, o bikolo binso, mpe koyembela nkombo ya yo nzembo :
Psal LinVB 18:51  « Alongisi mokonzi wa ye o bitumba biike, alakisi moponomi wa ye bolingi, mpe asalisi Davidi na libota lya ye seko. »