Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
PSALMS
Prev Up Next
Chapter 77
Psal LinVB 77:1  Ya kapita wa bayembi ; ya Yedutun. Nzembo ya Asaf.
Psal LinVB 77:2  Nabengi Nzambe na mongongo makasi, nabeleli Nzambe mpo ayoka ngai.
Psal LinVB 77:3  O ntango ya nsomo naluki Mokonzi. Butu mobimba natandi maboko, nalembi te, mpe nalingi te ’te moto abondo ngai.
Psal LinVB 77:4  Nakanisi Nzambe mpe nabandi kokimela, soko namanyoli mingi, motema mwa ngai mokomi kolembe.
Psal LinVB 77:5  Opekisi ngai kokanga miso, mayele ma ngai mabulungani, nakoki koloba te.
Psal LinVB 77:6  Nakanisi mikolo mya kala, nakundoli mibu mileki.
Psal LinVB 77:7  Na butu nazali komitungisa, nakanisi mingi mpe nazali komituna :
Psal LinVB 77:8  Mokonzi akoboya biso, solo ? Akolakisa biso bolamu bwa ye lisusu te ?
Psal LinVB 77:9  Bolingi bwa ye bosili nde libela ? Akotindela biso maloba ma ye lisusu te ?
Psal LinVB 77:10  Nzambe abosani koyokela biso mawa, solo ? Bongo akangi nde motema mpo ya nkanda ?
Psal LinVB 77:11  Namilobeli : « Mpo eyokisi ngai mpasi, yango eye : Nzambe akopangana na biso lisusu te ! »
Psal LinVB 77:12  Nakundoli bikela binene bya Mokonzi mpe makamwisi ma ye ma kala.
Psal LinVB 77:13  Nakanisi lisusu misala mya yo minene, namanyoli myango mbala na mbala.
Psal LinVB 77:14  E Nzambe, nzela ya yo, izali isantu ; nzambe mosusu azali nde, monene lokola yo ?
Psal LinVB 77:15  Se yo, Nzambe, osali makamwa ma solo, mpe olakisi bato ba bikolo binso nguya ya yo.
Psal LinVB 77:16  Osikolaki ekolo ya yo na bokasi bwa loboko la yo, obikisaki bana ba Yakob mpe ba Yozefu.
Psal LinVB 77:17  Mai ma mbu mamonoki yo, Nzambe, mai mamonoki yo malengeki mpe bozindo bwa mai boninganaki ;
Psal LinVB 77:18  mampata manokisaki mbula mpe mayokisaki makeléle, mpe minkalali mitindamaki lokola makula ma móto.
Psal LinVB 77:19  O ntango nkake ezalaki kobete, minkalali mizalaki kongengele mokili, nse mobimba elengeki mpe eninganaki.
Psal LinVB 77:20  Opasolaki nzela o kati ya mai ma mbu, olekaki o kati ya mai bozindo, mpe moto moko te amoni esika olekaki.
Psal LinVB 77:21  Okambaki bato ba yo lokola etonga ya mpata na maboko ma Moze mpe ma Arone.