Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
PSALMS
Prev Up Next
Chapter 5
Psal LinVB 5:1  Ya kapita wa bayembi, na mpiololo. Nzembo ya Davidi.
Psal LinVB 5:2  E Mokonzi, tia matoi na maloba ma ngai, yoka boleli bwa ngai,
Psal LinVB 5:3  yoka ndenge nazali kobelela yo, e Mokonzi wa ngai mpe Nzambe wa ngai, nazali kobondela bobele yo.
Psal LinVB 5:4  E Mokonzi, ut’o ntongo okoyokaka lolaka la ngai, na ntongo nakomibonzaka na yo : nakotiaka motema se na yo.
Psal LinVB 5:5  Yo Nzambe okosepelaka na masumu ma bato te, mpe okoyambaka bato babe epai ya yo te.
Psal LinVB 5:6  Bato ba lolendo bakoki kobika o miso ma yo te ; okoyinaka bato banso bakosalaka mabe.
Psal LinVB 5:7  Okosilisaka bato bakobukaka lokuta ; Mokonzi akoyinaka babomi na baye bakokosaka baninga.
Psal LinVB 5:8  Kasi, mpo ya bolingi bwa yo bonene, ngai nakoki koyingela o ndako ya yo, kokumbama o boso bwa Tempelo ya yo esantu, mpe kokumbamela yo.
Psal LinVB 5:9  E Mokonzi, kamba ngai na bosembo bwa yo, ata banguna bazali kokanela ngai ; bongisela ngai nzela ya yo naleka.
Psal LinVB 5:10  O minoko mya bango liloba lya bosolo lizali te, o mitema bakani se kobebisa ; mingongo mya bango mizali lokola lilita polele, mpe minoko mya bango mitondi na maloba ma boleti.
Psal LinVB 5:11  E Nzambe, tumbola bango, mikano mya bango mikweisa bango. Bengana bango, zambi masumu ma bango maleki mingi, mpo batombokeli yo.
Psal LinVB 5:12  Baye banso baluki libiki epai ya yo basepela, bayoka nsai ntango inso, mpo okobatelaka bango, baye balingi nkombo ya yo baganga na esengo.
Psal LinVB 5:13  Yo Mokonzi, okobenisaka moto wa bosembo, bolingi bwa yo bokobatelaka ye lokola nguba.