Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
PSALMS
Prev Up Next
Chapter 139
Psal LinVB 139:1  Ya kapita wa bayembi. Ya Davidi. Mokonzi, okotalaka motema mwa ngai, oyebi ngai mobimba solo.
Psal LinVB 139:2  Nafanda to nateleme, oyebi ; ut’o mosika oyebi makanisi ma ngai.
Psal LinVB 139:3  Natambola to nalala, ozali komono, oyebi nzela ya ngai inso.
Psal LinVB 139:4  Naino nabimisi liloba o monoko te, osili oyebi lyango, Mokonzi.
Psal LinVB 139:5  Okobatelaka ngai o liboso mpe o nsima, okosimbaka ngai na loboko la yo.
Psal LinVB 139:6  Bwanya bwa yo bonene bokokamwisaka biso, boleki mayele ma ngai mosika.
Psal LinVB 139:7  Nakende wapi mpo ’te nakoma mosika na yo ? Nabombama wapi mpo ’te nakima miso ma yo ?
Psal LinVB 139:8  Nabuta kin’o likolo ? Ozali wana ! Nakita o mboka ya bawa ? Ozali mpe kuna !
Psal LinVB 139:9  Napimbwa epai moi mokobimaka to nakende o nsuka ya mbu,
Psal LinVB 139:10  ata kuna loboko la yo lokokamba ngai, loboko la yo la mobali lokosimba ngai.
Psal LinVB 139:11  Náloba : « Ebongi molili mobomba ngai, penepene na ngai moi mobongwana butu ! »
Psal LinVB 139:12  Se mpamba : molili mokoki kobomba yo te, o miso ma yo butu bozali lokola moi, mpe molili lokola mwinda.
Psal LinVB 139:13  Yo moto okelaki ebandela ya bomoi bwa ngai, oyemaki ngai o libumu lya mama wa ngai.
Psal LinVB 139:14  Natondi yo mpo ya makamwa maye manso, nayebi malamu ’te bikela bya yo bileki binene.
Psal LinVB 139:15  Ozalaki komono ngai o kati ya libumu lya mama, ntango okelaki ngai na bonkutu, lokola o nse ya mabelé.
Psal LinVB 139:16  Nazalaki se moke, osilaki komono ngai, osilaki kokoma mikolo mya ngai minso o buku ya bomoi ; otangaki myango, naino mokolo moko mobandi te.
Psal LinVB 139:17  Koyeba mayele ma yo, Mokonzi, eleki kwokoso ; makanisi ma yo maleki ebele.
Psal LinVB 139:18  Nameka kotanga mango, nakoki te, maleki zelo na boike ; esilisi ngai kotanga, nakokuta se yo.
Psal LinVB 139:19  E Nzambe, soko olingi, boma bato baboyi yo ! Bino bato bokobomaka baninga, bolongwa epai ya ngai !
Psal LinVB 139:20  Bakotukaka yo na mayele mabe mpe bakokinolaka mikano mya yo.
Psal LinVB 139:21  E Mokonzi, baye bakoyinaka yo, náyina bango te ? Baye bakobunisaka yo, náyoka bango mpi te ?
Psal LinVB 139:22  Nayini bango boyini, bango banso bakomi banguna ba ngai mpe.
Psal LinVB 139:23  E Nzambe, tala ngai mpo oyeba motema mwa ngai, meka ngai mpo oyeba makanisi ma ngai.
Psal LinVB 139:24  Tala ngai soko nakolanda nzela ebe te, mpe kamba ngai o nzela ya lobiko.