PSALMS
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
67
68
69
70
71
72
73
74
75
76
77
78
79
80
81
82
83
84
85
86
87
88
89
90
91
92
93
94
95
96
97
98
99
100
101
102
103
104
105
106
107
108
109
110
111
112
113
114
115
116
117
118
119
120
121
122
123
124
125
126
127
128
129
130
131
132
133
134
135
136
137
138
139
140
141
142
143
144
145
146
147
148
149
150
Chapter 139
Psal | LinVB | 139:1 | Ya kapita wa bayembi. Ya Davidi. Mokonzi, okotalaka motema mwa ngai, oyebi ngai mobimba solo. | |
Psal | LinVB | 139:7 | Nakende wapi mpo ’te nakoma mosika na yo ? Nabombama wapi mpo ’te nakima miso ma yo ? | |
Psal | LinVB | 139:12 | Se mpamba : molili mokoki kobomba yo te, o miso ma yo butu bozali lokola moi, mpe molili lokola mwinda. | |
Psal | LinVB | 139:13 | Yo moto okelaki ebandela ya bomoi bwa ngai, oyemaki ngai o libumu lya mama wa ngai. | |
Psal | LinVB | 139:14 | Natondi yo mpo ya makamwa maye manso, nayebi malamu ’te bikela bya yo bileki binene. | |
Psal | LinVB | 139:15 | Ozalaki komono ngai o kati ya libumu lya mama, ntango okelaki ngai na bonkutu, lokola o nse ya mabelé. | |
Psal | LinVB | 139:16 | Nazalaki se moke, osilaki komono ngai, osilaki kokoma mikolo mya ngai minso o buku ya bomoi ; otangaki myango, naino mokolo moko mobandi te. | |
Psal | LinVB | 139:18 | Nameka kotanga mango, nakoki te, maleki zelo na boike ; esilisi ngai kotanga, nakokuta se yo. | |
Psal | LinVB | 139:19 | E Nzambe, soko olingi, boma bato baboyi yo ! Bino bato bokobomaka baninga, bolongwa epai ya ngai ! | |
Psal | LinVB | 139:21 | E Mokonzi, baye bakoyinaka yo, náyina bango te ? Baye bakobunisaka yo, náyoka bango mpi te ? | |
Psal | LinVB | 139:23 | E Nzambe, tala ngai mpo oyeba motema mwa ngai, meka ngai mpo oyeba makanisi ma ngai. | |