PSALMS
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
67
68
69
70
71
72
73
74
75
76
77
78
79
80
81
82
83
84
85
86
87
88
89
90
91
92
93
94
95
96
97
98
99
100
101
102
103
104
105
106
107
108
109
110
111
112
113
114
115
116
117
118
119
120
121
122
123
124
125
126
127
128
129
130
131
132
133
134
135
136
137
138
139
140
141
142
143
144
145
146
147
148
149
150
Chapter 89
Psal | LinVB | 89:4 | Nakataki bondeko na moto oyo naponoki, nalayelaki Davidi, mosaleli wa ngai, ndai eye : | |
Psal | LinVB | 89:5 | « Nakosala ’te libota lya yo lizala na bokonzi seko, nakotongela yo ngwende o bileko na bileko. » | |
Psal | LinVB | 89:6 | Ba-likolo bakotondoko yo, Mokonzi, mpo ya makamwa ma yo, bakoyembelaka lobokó la yo o likita lya basantu. | |
Psal | LinVB | 89:7 | Kuna o likolo nani akokani na yo, Mokonzi ? O kati ya banzambe basusu nani azali lokola Mokonzi ? | |
Psal | LinVB | 89:8 | O likita lya basantu Nzambe aleki nsomo, aleki na bonene mpe na bokasi baye bazingi ye. | |
Psal | LinVB | 89:9 | E Mokonzi Nzambe wa bokasi bonso, nani azali lokola yo ? Ozali nta bokasi, nta lobokó ! | |
Psal | LinVB | 89:11 | Yo moto olongaki mpe opasolaki ebuki ya mbisi, opanzaki banguna ba yo na bokasi bwa loboko la yo. | |
Psal | LinVB | 89:13 | O Nordi mpe o Sudi, okelaki binso, ngomba Ermon na Tabor ikoyembelaka nkombo ya yo. | |
Psal | LinVB | 89:14 | Loboko la yo lozali na nguya enene, loboko la yo la mobali nta bokasi lokolongaka binso. | |
Psal | LinVB | 89:16 | Esengo na bato bakokumisaka yo na nzembo ! Bakotambolaka o mwinda mwa elongi ya yo, Mokonzi ! | |
Psal | LinVB | 89:17 | Mpo ya nkombo ya yo bakoyokaka nsai ntango inso, lokumu la bango, nde bosembo bwa yo. | |
Psal | LinVB | 89:20 | Kala olobaka na bayambi ba yo o ndoto : « Napesi elombe moko lisalisi lya ngai, natomboli elenge moko wa ekolo ya ngai. | |
Psal | LinVB | 89:27 | Ye akobenga ngai na nkombo ‘Tata wa ngai, Nzambe wa ngai, libanga likobikisa ngai !’ | |
Psal | LinVB | 89:33 | nakotumbola bango na fimbo mpo ya masumu ma bango, mpe nakobete bango mpo ya mabe ma bango. | |
Psal | LinVB | 89:37 | Nakoumisa libota lya ye seko, mpe ngwende ya ye ekozala lokola mwese o miso ma ngai, | |
Psal | LinVB | 89:47 | Mikolo boni, e Mokonzi, okomibomba naino ? Kin’o nsuka ? Móto mwa nkanda ya yo mokopela nde seko ? | |
Psal | LinVB | 89:49 | Nani moto akozala na bomoi seko mpe akokufa te ? Nani akoki kokima soko mboka ya bawa ekangi ye ? | |
Psal | LinVB | 89:51 | A Mokonzi, kanisa nsoni eye bayokisaki mosaleli wa yo, mpe mafinga bafingaki ngai matondi o motema mwa ngai. | |