PSALMS
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
67
68
69
70
71
72
73
74
75
76
77
78
79
80
81
82
83
84
85
86
87
88
89
90
91
92
93
94
95
96
97
98
99
100
101
102
103
104
105
106
107
108
109
110
111
112
113
114
115
116
117
118
119
120
121
122
123
124
125
126
127
128
129
130
131
132
133
134
135
136
137
138
139
140
141
142
143
144
145
146
147
148
149
150
Chapter 79
Psal | LinVB | 79:1 | Nzembo ya Asaf. E Nzambe, bapagano bakoti o ekolo ya yo, babebisi Tempelo ya yo esantu, bakomisi Yeruzalem mopotu monene. | |
Psal | LinVB | 79:2 | Babwaki bibembe bya basaleli ba yo bo bilei bya ndeke, nzoto ya bato ba yo ikomi bilei bya nyama ya zamba. | |
Psal | LinVB | 79:4 | Bato ba bikolo bya penepene bakofingaka biso, o bikolo bisusu bakotiolaka mpe bakosekeke biso. | |
Psal | LinVB | 79:5 | Mokonzi, nkanda ya yo ekoumela mikolo boni ? Mpe zuwa lya yo linene likosila ntango nini ? | |
Psal | LinVB | 79:6 | Silikela bato ba bikolo bisusu bayebi yo te na mpe bato ba mikili bakobondelaka nkombo ya yo te. | |
Psal | LinVB | 79:9 | Salisa biso, Nzambe mobikisi wa biso, mpo ya lokumu la nkombo ya yo. Bikisa biso, limbisa masumu ma biso mpo ya nkombo ya yo. | |
Psal | LinVB | 79:10 | Olinga te ’te bato ba bikolo bisusu baloba : « Nzambe wa bango azali wapi ? » Olakisa bango polele o miso ma biso ’te okozongisa mabe na bato basopaki makila ma basaleli ba yo ! | |
Psal | LinVB | 79:11 | Yoka boleli bwa bato bakangemi o boombo ; na bokasi bwa yo bikisa baye bazali kobunda na liwa ! | |
Psal | LinVB | 79:12 | Bato ba bikolo bisusu bayokisi yo mpasi, Mokonzi, zongisela bango mbala nsambo mafinga bafingaki yo. | |