I SAMUEL
Chapter 9
I Sa | LinVB | 9:1 | Ezalaki moto moko wa nkita, wa libota lya Benyamin, nkombo ya ye Kis, mwana wa Abiel, nkoko wa Seror, oyo Bekorat abotaki ; ye mwana wa Afia, wa libota lya Benyamin. | |
I Sa | LinVB | 9:2 | Azalaki na mwana mobali, Saul, elenge mobali kitoko, moto moko o Israel akokani na ye te ; aleki bato banso na bolai. | |
I Sa | LinVB | 9:3 | Mokolo moko mpunda isusu ya tata wa ye Kis ibungi. Kis alobi na mwana wa ye Saul : « Kende na mosaleli moko koluka mpunda yango. » | |
I Sa | LinVB | 9:4 | Bakatisi ngomba ya Efraim na mokili mwa Salisa, kasi bamoni yango te. Bakatisi mokili mwa Salim ; kuna mpe mpunda imononi te. Bakatisi mokili mwa Benyamin, bazwi yango te. | |
I Sa | LinVB | 9:5 | Awa bakomi o mokili mwa Suf, Saul alobi na mosaleli wa ye : « Malamu tozonga o mboka ; tata akanisi mpunda ya ye lisusu te, mbele akomi kobanga mpo ya biso. » | |
I Sa | LinVB | 9:6 | Kasi mosaleli ayanoli : « Moto moko wa Nzambe akofandaka o mboka ena. Azali moto wa lokumu lonene ; makambo akoloba makosalema solo. Tokende kuna, mbele ye akoyebisa biso esika nini tokoki koluka mpunda. » | |
I Sa | LinVB | 9:7 | Saul alobi na mosaleli : « Soko tokei epai ya ye, tokobonzela ye libonza nini ? Mampa masili o libenga lya biso mpe tozali na eloko esusu mpo tobonzela ye te. Eloko nini ezali na biso naino ? » | |
I Sa | LinVB | 9:8 | Mosaleli ayanoli Saul : « Nazali na yoko ya binei ya motako mwa palata, nakopesa mwango na moto wa Nzambe ; akoyebisa biso nzela nini tokoki kolanda mpo tokoba mobembo mwa biso. » | |
I Sa | LinVB | 9:9 | Saul alobi na mosaleli wa ye : « Olobi malamu, tokende. » Mpe bakei o mboka eye moto wa Nzambe akofandaka. Ezalaki bango kobuta nzela ya mboka, bakuti bilenge basi babimi o mboka mpo ya kotoka mai, batuni bango : « Momoni-makambo azali awa ? » Kala, awa balingaki kotuna Nzambe likambo, bameseneke koloba boye o Israel : « Tokende kotala ‘Momoni-makambo’ », profeta wa lelo, kala babengaka ye ‘momoni-makambo’. | |
I Sa | LinVB | 9:10 | Saul alobi na mosaleli wa ye : « Olobi malamu, tokende. » Mpe bakei o mboka eye moto wa Nzambe akofandaka. Ezalaki bango kobuta nzela ya mboka, bakuti bilenge basi babimi o mboka mpo ya kotoka mai, batuni bango : « Momoni-makambo azali awa ? » Kala, awa balingaki kotuna Nzambe likambo, bameseneke koloba boye o Israel : « Tokende kotala ‘Momoni-makambo’ », profeta wa lelo, kala babengaka ye ‘momoni-makambo’. | |
I Sa | LinVB | 9:11 | Saul alobi na mosaleli wa ye : « Olobi malamu, tokende. » Mpe bakei o mboka eye moto wa Nzambe akofandaka. Ezalaki bango kobuta nzela ya mboka, bakuti bilenge basi babimi o mboka mpo ya kotoka mai, batuni bango : « Momoni-makambo azali awa ? » Kala, awa balingaki kotuna Nzambe likambo, bameseneke koloba boye o Israel : « Tokende kotala ‘Momoni-makambo’ », profeta wa lelo, kala babengaka ye ‘momoni-makambo’. | |
I Sa | LinVB | 9:12 | Bilenge basi bazongisi : « Ya solo, azali kuna o liboso. Sikawa bokende noki, ayaki lelo o mboka, zambi lelo akobonza libonza o miso ma bato banso kuna o ngomba esantu. | |
I Sa | LinVB | 9:13 | Ekokoto bino o mboka, bokokuta ye naino abandi kolia te o ngomba esantu. Soko ye akomi naino te, bato mpe bakolia te. Ye moto akobenisa libonza ; bobele nsima bato babyangemi bakoki kolia. Sikawa bobuta ngomba, bokokuta ye noki. » | |
I Sa | LinVB | 9:14 | Bongo bakei o mboka. Ekoti bango o mboka, Samuel abimi liboso lya bango, akei o ngomba esantu. | |
I Sa | LinVB | 9:16 | « Lobi na ngonga eyemei, nakotindela yo moto moko wa mokili mwa Benyamin, pakola ye mafuta mpo azala mokonzi wa Israel ; ye akobikisa bato ba ngai o maboko ma ba-Filisti, zambi namoni mpasi ya bato ba ngai, boleli bwa bango bokomi mpe tee epai ya ngai. » | |
I Sa | LinVB | 9:17 | Ntango Samuel amoni Saul, Yawe ayebisi ye : « Tala moto oyo nayebisaki yo ’te akoyangela ekolo ya ngai. » | |
I Sa | LinVB | 9:18 | Pene na ezibeli ya mboka Saul alobi na Samuel : « Olingi kolakisa ngai ndako ya Momoni-makambo ? » | |
I Sa | LinVB | 9:19 | Samuel azongisi : « Momoni-makambo bobele ngai oyo ! Tambola liboso lya ngai mpe buta mwa ngomba. Lelo okolia na ngai elongo. Lobi na ntongo nakotika yo mpe nakoyebisa yo manso mazali kotungisa yo. | |
I Sa | LinVB | 9:20 | Kitisa motema, mpunda iye osili obungisi mikolo misato imononi ! Nkita inso ya Israel izali ya nani ? Izali ya yo mpe ya libota lya tata wa yo te ? » | |
I Sa | LinVB | 9:21 | Saul ayanoli : « Ngai nazali moto wa libota lya Benyamin, libota like mpenza o kati ya mabota manso ma Israel, mpe etuka ya ngai ezali nsima ya bituka binso bya Benyamin. Mpo nini olobi na ngai maloba ma motindo mona ? » | |
I Sa | LinVB | 9:22 | Samuel akamati Saul na mosaleli wa ye mpe akotisi bango o ndako ya limpati. Afandisi bango o esika ya liboso o kati ya bato babyangemi ; bango bazalaki soki bato ntuku isato. | |
I Sa | LinVB | 9:24 | Molambi akamati lokolo la nyama na mokila. Atii yango liboso lya Saul mpe alobi : « Tala nyama eye etikali, lia yango, zambi nabombelaki yo yango mokolo balobaki ’te nakobyanga bato o limpati. » Mpe o mokolo mona Saul alei elongo na Samuel. | |
I Sa | LinVB | 9:25 | Balongwi o ngomba esantu mpe bakei o mboka. Samuel na Saul basololi mingi o mbalasani ya ndako. | |
I Sa | LinVB | 9:26 | Balamuki na nta ntongo, mpe o ntango moi mobandi kobima, Samuel abengi Saul epai ya likolo, alobi na ye : « Teleme, nakokende kotika yo. » Saul atelemi mpe bango babale, ye na Samuel, bakei o libanda. | |